Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 12 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 And in that day you will say: "I will praise you, my Father, for though you were angry with me, your anger has turned away, and you have comforted me. Na mokolo wana, okoloba : « Oh Yawe, nazali kosanzola Yo, pamba te ata osilikelaki ngai, kanda na Yo elongwaki likolo na ngai mpe obondisaki ngai !
2 See, our Father is my salvation; I will trust and not be afraid, for my Father is my strength and my song; he has become my salvation." Solo, Nzambe azali lobiko na ngai ; nakotia elikya na ngai epai na Ye mpe nakobanga lisusu te. Nkolo Yawe azali makasi mpe nguya na ngai ; azali lobiko na ngai. »
3 With joy you will draw water from the wells of salvation. Yango wana, botoka mayi na esengo na etima ya lobiko.
4 And in that day you will say: "Give thanks to our Father, call on his name, declare his deeds to all peoples, proclaim that his name is exalted. Na mokolo wana bokoloba : « Bosanzola Yawe, bobelela Kombo na Ye, bosakola misala na Ye kati na bikolo mpe botatola ete Kombo na Ye ezali likolo na nyonso.
5 Sing to our Father, for he has done glorious things; let this be known in all the earth. Boyemba loyembo mpo na Yawe, pamba te asali makambo ya kokamwa. Tika ete mokili mobimba eyeba yango !
6 Shout aloud and sing for joy, inhabitant of Zion, for the Holy One of Israel—our Father—is great in your midst." Bino bato ya Siona, bobeta milolo mpe boyemba loyembo na esengo, pamba te Mosantu ya Isalaele azali monene kati na bino ! »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]