Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 12 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Nzembo mpo na kokumisa Yawe

1Na mokolo wana, okoloba :« Oh Yawe, nazali kosanzola Yo,pamba te ata osilikelaki ngai,kanda na Yo elongwaki likolo na ngaimpe obondisaki ngai !

2Solo, Nzambe azali lobiko na ngai ;nakotia elikya na ngai epai na Yempe nakobanga lisusu te.Nkolo Yawe azali makasi mpe nguya na ngai ;azali lobiko na ngai. »

3Yango wana, botoka mayi na esengona etima ya lobiko.

4Na mokolo wana bokoloba :« Bosanzola Yawe, bobelela Kombo na Ye,bosakola misala na Ye kati na bikolompe botatola ete Kombo na Ye ezali likolo na nyonso.

5Boyemba loyembo mpo na Yawe,pamba te asali makambo ya kokamwa.Tika ete mokili mobimba eyeba yango !

6Bino bato ya Siona, bobeta milolo mpe boyemba loyembo na esengo,pamba te Mosantu ya Isalaele azali monene kati na bino ! »

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]