Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 13 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The oracle concerning Babylon that Isaiah son of Amoz saw. Maloba ya kosambisa Babiloni, oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, azwaki na emoniseli :
2 "Raise a banner on a bare hilltop; call out to them, beckon with your hand that they may enter the gates of the nobles. Botombola bendele likolo ya ngomba oyo ezanga banzete, boganga epai na bango ; bopepa bango loboko mpo ete bakota na bikuke ya bakambi.
3 I myself have commanded my consecrated ones; I have summoned my warriors to carry out my anger—those who exult in my majesty." Napesaki mitindo epai na bato oyo babulisama mpo na Ngai ; nabengisaki lisusu bilombe na Ngai, bato oyo basepelaka na lokumu na Ngai, mpo na kosilisa kanda na Ngai.
4 Listen—an uproar on the mountains, like that of a great multitude! Listen—the roar of kingdoms, of nations massing together! The Father of heaven's armies is mustering an army for battle. Boyoka makelele likolo ya bangomba : ezali lokola makelele ya bato ebele ! Boyoka lokito ya makelele ya bikolo : ezali lokola bikolo esangana esika moko ! Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali kotala mampinga ya basoda oyo bazali pene ya kokende na etumba.
5 They come from a far-off land, from the ends of the heavens—our Father and the weapons of his wrath—to destroy the whole earth. Bawuti na mikili ya mosika, na suka ya likolo ; Yawe elongo na bisalelo ya kanda na Ye ; mpo na kobebisa mokili mobimba.
6 Wail, for the day of our Father is near; it comes as devastation from the Almighty. Bolela, pamba te mokolo na Yawe ekomi pene, ekoya lokola kobebisama oyo ewuti na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
7 Because of this every hand goes limp, and every human heart melts. Yango wana, maboko nyonso ekolemba mpe mitema ya bato nyonso ekobukana.
8 They are gripped with terror; pangs and agony seize them; they writhe like a woman in labor. They stare at one another in horror, their faces aflame. Somo makasi ekokweyela bango, pasi mpe kobanga ekotika bango te ; bakobunda-bunda lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. Bango na bango bakotalana na kokamwa mpe bilongi na bango ekokoma lokola moto.
9 Look—the day of our Father is coming, cruel, with fury and burning anger, to make the earth a desolation and to destroy the sinners on it. Tala, mokolo na Yawe ezali koya, ezali mokolo moko ya pasi, mokolo ya kotomboka mpe ya kanda makasi mpo na kobebisa mokili mpe koboma bato ya masumu kati na yango.
10 The stars of the heavens and their constellations will give no light; the sun will be dark when it rises, and the moon will not shed its glow. Minzoto na likolo mpe minda nyonso oyo ezali pene na yango ekopesa lisusu pole na yango te : moyi ekokoma molili tango tongo ekotana, mpe sanza ekopesa lisusu pole na yango te.
11 "I will bring judgment upon the world for its evil, and upon the wicked for their guilt; I will put an end to the arrogance of the proud and humble the pride of tyrants. Nakopesa etumbu na mokili mpo na mabe na yango, mpe bato mabe, mpo na masumu na bango. Nakosukisa lofundu ya bato ya lolendo mpe nakokitisa lolendo ya banyokoli.
12 I will make people rarer than pure gold, mankind scarcer than the gold of Ophir. Nakosala ete bato bakoma ya koluka lokola wolo ya peto, lokola wolo ya mboka Ofiri.
13 So I will make the heavens tremble, and the earth will shake from its place, at the wrath of the Father of heaven's armies, in the day of his burning anger." Yango wana nakolengisa likolo, mpe mabele ekoningana na bisimbelo na yango na kanda makasi ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, na mokolo oyo akopelisa kanda na Ye.
14 Like a hunted gazelle, like sheep with no one to gather them, each will turn back to his own people, each will flee to his own land. Lokola mboloko oyo bazali kolanda, lokola bameme oyo ezanga mobateli, moko na moko akozonga epai ya bato na ye, moko na moko akokima kino na mboka ya bakoko na ye.
15 Whoever is found will be run through, and whoever is captured will fall by the sword. Bakotobola na likonga moto nyonso oyo bakokanga. Bato nyonso oyo bakozwa, bakokufa na mopanga.
16 Their infants will be dashed to pieces before their eyes; their houses will be plundered and their wives raped. Bakokata-kata bana na bango na biteni na miso na bango, bakobebisa bandako na bango mpe bakozwa basi na bango na makasi.
17 "Look—I am stirring up the Medes against them, who care nothing for silver and take no delight in gold. Tala, nakotelemisa bato ya Medi ete batelemela bango, bato oyo palata elobelaka bango eloko moko te mpe basepelaka na bango na wolo te.
18 Their bows will cut down the young men; they will show no mercy to infants; they will have no pity for the children." Boye, tolotolo na bango ekoboma bilenge mibali mpe bakoyokela mbuma ya libumu mawa te : liso na bango ekotala bana na mawa te.
19 And Babylon, the jewel of kingdoms, the splendor and pride of the Babylonians, will be like Sodom and Gomorrah when our Father overthrew them. Nzambe akokweyisa Babiloni, kongenga ya babokonzi, nkembo ya lolendo ya bato ya Chalide, ndenge akweyisaki Sodome mpe Gomore.
20 It will never be inhabited or settled through all generations; no Arab will camp there, no shepherds will bed down their flocks there. Bato bakotikala kovanda lisusu kuna te to ekozala lisusu na bato te na milongo nyonso ; kuna, moto ya Arabi akopika te ndako na ye ya kapo, mpe babateli bibwele bakopemisa te banyama na bango.
21 But desert creatures will lie down there, and their houses will be full of howling beasts; there ostriches will dwell, and wild goats will leap about. Kasi bikelamu ya esobe nde ekokoma kolala kuna ; bambwa ya zamba nde ekotondisa bandako na yango, ba-esulungutu ekotonda na bandako, maligbanga ekokoma kovanda kuna mpe bantaba ya zamba ekokoma kopumbwa-pumbwa kuna.
22 Hyenas will howl in its strongholds, and jackals in its luxurious palaces. Her time is near, and her days will not last long. Banyawu ya zamba ekotonda na bandako na bango ya makasi, mpe bambwa ya zamba ekotonda na bandako na bango ya kitoko. Tango na yango esili kobelema, mpe mikolo na yango ekopusana lisusu te.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]