Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 14 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 For our Father's heart will feel compassion for Jacob; he will again choose Israel and settle them in their own land. The foreigner will join them and attach himself to the house of Jacob. Yawe akoyokela Jakobi mawa, akopona lisusu Isalaele mpe akopemisa bango na mokili na bango ; bongo bapaya bakosangana na bango mpe bakobakisama na ndako ya Jakobi.
2 Peoples will take them and bring them to their place, and the house of Israel will possess them as male and female servants in the land of our Father. They will capture their captors and rule over their oppressors. Bato ya bikolo bakozwa bango mpe bakomema bango kino na esika na bango. Bongo, libota ya Isalaele ekokamata bango na mokili ya Yawe lokola basali ya mibali mpe ya basi. Bakokomisa bakangami bato oyo bakangaki bango mpe bakokonza bato oyo bakonzaki bango.
3 On the day our Father gives you rest from your pain, turmoil, and the hard labor forced on you, Na mokolo oyo Yawe akopesa yo bopemi na mosala na yo, na komitungisa na yo mpe na misala makasi oyo bapesaki yo,
4 you will take up this taunt against the king of Babylon: How the oppressor has stopped! How his rage has stopped! okoyemba nzembo oyo mpo na kotiola mokonzi ya Babiloni ; okoloba : « Ndenge nini monyokoli akomi na suka ? Ndenge nini penza lolendo na ye esili ?
5 Our Father has broken the staff of the wicked, the scepter of rulers, Yawe abuki fimbu ya moto mabe, lingenda ya bokonzi ya bakambi,
6 that struck the peoples in wrath with endless blows, that ruled the nations in anger with relentless persecution. oyo azalaki kokweyisa bato na kanda mpe kobeta bango na kolemba te, oyo azalaki kokonza bikolo na kanda makasi mpe konyokola bango na mawa te.
7 The whole earth is at rest and quiet; people burst into song. Mikili nyonso ezwi bopemi mpe kimia, ekomi koganga na esengo.
8 Even the cypresses rejoice over you, and the cedars of Lebanon: "Since you were laid low, no woodcutter comes up against us." Banzete ya sipele ezali kosepela mpo na kokweya na yo, mpe banzete ya sedele ya Libani ezali koloba : ‹ Wuta tango okweyaki na se, moto moko te akweyisaka lisusu biso. ›
9 The grave beneath is stirred up to meet you at your coming; it rouses the spirits to greet you, all who were leaders of the earth; it raises from their thrones all who were kings of the nations. Mokili ya bakufi, kuna na se, eningani na sango ya koya na yo, elamusi, mpo na koyamba yo, milimo ya bakufi, bato nyonso oyo bazalaki bakambi na mokili, etomboli bango, na bakiti na bango ya bokonzi, ba-oyo nyonso bazalaki bakonzi ya bikolo.
10 All of them will answer and say to you: "You too have become as weak as we are! You have become like us! Bango nyonso bakozwa maloba mpe bakoloba na yo : ‹ Yo mpe okomi moto ya bolembu lokola biso, okokani na biso ! ›
11 Your pomp is brought down to the grave, along with the music of your harps; maggots are spread out as your bed beneath you, and worms are your covering." Lokumu na yo nyonso ekiti kino na mokili ya bakufi, elongo na makelele ya mandanda na yo. Nkusu etondi na se na yo lokola mbeto, mpe mitsopi ezipi yo lokola elamba.
12 How you have fallen from heaven, Day Star, son of the dawn! How you are cut down to the ground, you who laid the nations low! Ndenge nini penza okweyi wuta na likolo, oh monzoto oyo engengaka na tongo, mwana mobali ya tongo makasi ? Bakweyisi yo penza kino na mabele, yo moto oyo ozalaki kopanza bikolo !
13 You said in your heart, "I will ascend to heaven; I will raise my throne above the stars of God; I will sit on the mount of assembly, in the far reaches of the north. Ozalaki komilobela kati na motema : ‹ Nakomata kino na Lola, nakotombola kiti na ngai ya bokonzi kino na likolo ya minzoto ya Nzambe mpe nakovanda na ngomba epai wapi banzambe basanganaka, na suka ya mokili ya ngambo ya nor ;
14 I will ascend above the heights of the clouds; I will make myself like the Most High." nakomata kino na likolo ya mapata, nakomikomisa lokola Ye-Oyo-Aleki-Likolo. ›
15 But you are brought down to the grave, to the far reaches of the pit. Kasi okiti nde na mokili ya bakufi, na se penza ya libulu.
16 Those who see you will stare at you and wonder: "Is this the man who made the earth tremble, who shook kingdoms, Bato oyo bazali komona yo batie miso na bango epai na yo, bazali komituna : ‹ Boni, ezali penza ye oyo azalaki koningisa mokili mpe kolengisa bikolo ?
17 who made the world like a wilderness and tore down its cities, who would not let his captives go home?" Moto oyo azalaki kokomisa mokili esobe, kokweyisa bingumba na yango mpe kotika te ete bakangami na ye bazonga epai na bango ? ›
18 All the kings of the nations lie in glory, each in his own tomb; Bakonzi nyonso ya bikolo balalaka na lokumu, moko na moko kati na kunda na ye ;
19 but you are cast out, away from your grave, like a loathed branch, covered with the slain, those pierced by the sword, who go down to the stones of the pit, like a trampled corpse. kasi yo obwakami mosika ya kunda na yo lokola kaka eloko moko ya nkele, kati na bibembe ya bato oyo baboma, bato oyo batobola bango na mopanga, bongo bakiti kino na libulu ya mabanga lokola bibembe oyo banyata na makolo.
20 You will not be joined with them in burial, because you destroyed your own land, you killed your own people. May the offspring of evildoers never be named again! Okotikala kosangana na bango te kati na kunda, pamba te obebisaki mokili na yo mpe obomaki bato na yo. Bakotikala lisusu kotanga te bakombo ya bakitani ya bato mabe.
21 Prepare slaughter for his sons because of the guilt of their fathers, so they cannot rise and take over the earth and fill the whole world with cities. Bobongisa esika mpo na koboma bana na ye ya mibali likolo ya masumu ya batata na bango ! Tika ete balamuka lisusu te mpo na kozwa mabele lokola libula mpe kotondisa mokili elongo na bingumba na bango.
22 "I will rise up against them, declares the Father of heaven's armies, and I will cut off from Babylon name and remnant, offspring and descendant, declares our Father. Nakotelemela bango, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakolongola kombo ya Babiloni mpe nyonso oyo ekotikala, bana mpe bakitani na yango, elobi Yawe.
23 I will make it a haunt of the hedgehog and pools of water, and I will sweep it with the broom of destruction, declares the Father of heaven's armies." Nakokomisa yango esika ya potopoto mpe lopango ya bampuku ; mpe nakokombola yango na nzela ya ekombelo ya libebi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
24 The Father of heaven's armies has sworn: "Surely as I planned, so it will be; as I decided, so it will stand. Yawe, Mokonzi ya mampinga, alapi ndayi : « Solo, ndenge kaka nabongisi, ndenge wana mpe ekosalema ; makambo oyo nazali na yango na makanisi, yango nde ekokokisama.
25 I will break the Assyrian in my land, and on my mountains I will trample him underfoot; his yoke will be lifted from them, and his burden removed from their shoulder. Nakobebisa mokili ya Asiri kati na mokili na Ngai, nakonyata-nyata yango na likolo ya bangomba na Ngai ; ekangiseli na bango ekolongwa epai ya bato na Ngai mpe mokumba na bango ekolongwa na mapeka na bango. »
26 This is the purpose determined against the whole earth, and this is the hand stretched out over all the nations. Yango nde mokano oyo Yawe asili kozwa mpo na mokili mobimba, mpe yango nde loboko oyo asili kosembola mpo na kotelemela bikolo nyonso.
27 For the Father of heaven's armies has decided, and who can undo it? His hand is stretched out, and who can turn it back?" Pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, asili kozwa mokano ; bongo nani akolongola yango ? Loboko na Ye esili kosembolama ; nani akozongisa yango ?
28 In the year that King Ahaz died, this oracle came: Maloba oyo eyaki na mobu oyo mokonzi Akazi akufaki :
29 Do not rejoice, all you Philistia, that the rod that struck you is broken; for from the serpent's root will come an adder, and its fruit will be a darting, fiery serpent. « Bino bato nyonso ya Filisitia, bosepela te ete fimbu oyo ezalaki kobeta bino esili kobukana, pamba te etupa ebimaka na libumu ya nyoka, mpe dalagona oyo epumbwaka ebimaka na libumu ya nyoka mabe.
30 The poorest of the poor will graze in safety, and the needy will lie down secure; but I will kill your root with famine, and it will destroy your remnant. Ye oyo aleki mobola nde akozwa eloko ya kolia, mpe moto oyo akelela nde akolala na kimia ; kasi nakoboma bato na yo na nzala ; mpe bato oyo bakobika, bakoboma bango.
31 Wail, gate; cry out, city; melt with fear, all you Philistia! For smoke comes out of the north, and not one soldier falls behind in its ranks. Oh ekuke, lela makasi ! Engumba, ganga makasi ! Mokili mobimba ya Filisitia esili kozinda ! Milinga makasi ezali kobima na ngambo ya nor, mpe moto moko te atikali na libanda ya molongo.
32 What answer will be given to the messengers of the nation? "Our Father has founded Zion, and in her the afflicted of his people find refuge." Eyano nini tokopesa penza epai ya bamemi sango ya ekolo oyo ? Ezali ete Yawe asili kolendisa Siona mpo ete babola kati na bato na Ye basili kozwa ebombamelo ya malonga. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]