Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 15 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 An oracle about Moab. In one night Ar of Moab is destroyed, ruined; in one night Kir of Moab is destroyed, ruined. Maloba ya kosambisa mokili ya Moabi : Pamba te na butu oyo Moabi ebebisamaki, Ari kati na Moabi mpe ebebisamaki, solo, ebebisamaki kaka na butu moko ! Kiri kati na Moabi mpe ebebisamaki ; solo, ebebisamaki kaka na butu moko !
2 Up to the temple and to Dibon they go, to the high places to weep; over Nebo and over Medeba Moab wails. Every head is shaved bare, every beard shaved off. Bato ya Diboni bazali komata na bisika na bango ya bule, na bisambelo na bango ya likolo ya bangomba, mpo na kolela ; Moabi akomi koganga mpo na Nebo mpe Medeba. Bakokoli mito nyonso mpe bakati mandefu nyonso.
3 In its streets they put on mourning clothes; on its rooftops and in its squares everyone wails, melting down in tears. Balati-lati basaki na babalabala, bato nyonso bazali kolela na likolo ya mitondo ya bandako mpe na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; bazali penza kosopa mpinzoli ebele.
4 Heshbon and Elealeh cry out; their voice is heard as far as Jahaz. Therefore the armed men of Moab cry aloud; his soul trembles within him. Eshiboni mpe Eleale ezali koganga makasi, mingongo ya bato na yango ezali koyokana kino na Yakatsi ; yango wana, mampinga ya Moabi bazali mpe koganga mpe mitema na bango ebukani.
5 My heart cries out for Moab; her fugitives flee as far as Zoar, to Eglath-shelishiyah. Up the ascent of Luhith they go, weeping as they climb; on the road to Horonaim they raise a cry of ruin. Nazali kolela na se ya motema mpo na Moabi, banguna na ye bazali kokima kino na Tsoari, kino na Egilati-Shelishiya ; bazali komata na nzela ya Luyiti na kolela ; mpe na nzela ya Oronayimi, bazali kosala matanga mpo na kobebisama na bango.
6 The waters of Nimrim are dried up; the grass is withered, the new growth gone, nothing green remains. Mayi ya Nimirimi ekawuki, bongo matiti mpe esili kokawuka, matiti ya mobesu eziki-ziki nyonso mpe matiti ya kitoko ezali lisusu te.
7 So they carry away over the Brook of the Willows the wealth they gained and what they stored up. Yango wana, bamemi bomengo oyo bazwaki mpe oyo babombaki na lubwaku ya banzete ya pepiliye.
8 For the cry has gone around the territory of Moab; her wailing reaches Eglaim, her wailing reaches Beer-elim. Kolela na bango etamboli na mokili mobimba ya Moabi ; koganga na bango eyokanaki kino na Egilayimi, mpe kino na mabulu ya mayi ya Elimi.
9 The waters of Dimon are full of blood, yet I will bring still more upon Dimon—a lion for the survivors of Moab, for those who remain in the land. Mayi ya Dimoni etondi na makila, kasi nakotinda lisusu pasi makasi na Dimoni : nkosi moko ekobimela bato ya Moabi oyo bakobika.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]