Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 16 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Send the lambs to the ruler of the land, from Sela by way of the wilderness, to the mountain of the daughter of Zion. Botinda mpate lokola mpako epai ya mokambi ya mokili ; wuta na Sela kino na ngomba Siona, mboka kitoko, bokatisa esobe.
2 Like fluttering birds, like a scattered nest, so are the daughters of Moab at the fords of the Arnon. Bakobengana basi ya Moabi lokola bandeke na zala na yango, na suka ya ebale ya Arinoni.
3 Give counsel; grant justice; make your shade like night at the height of noon. Hide the outcasts; do not betray the fugitive. « Pesa biso toli, kamata mokano. Sala ete elili na yo ezala lokola butu na moyi makasi. Bomba bato oyo bakimeli epai na yo, kobimisa bango te.
4 Let my outcasts dwell among you, Moab; be a shelter to them from the destroyer. When the oppressor is no more, and destruction has ceased, and the tramplers have vanished from the land, Tika ete bato ya Moabi oyo bakimi epai na yo bawumela elongo na yo ! Zala nguba na bango liboso ya mobomi. » Tango minyoko ekokoma na suka, kobebisama ekotikala lisusu te mpe koboma ekosila na mokili.
5 then a throne will be established in covenant love, and on it will sit in faithfulness, in the tent of David, one who judges and seeks justice and is swift to do righteousness. Kiti ya bokonzi ekolendisama na bolingo ; moto moko akovanda na kiti yango na bosolo, akobimela na ndako ya Davidi : alukaka bosembo kati na kosambisa mpe alongisaka makambo ya bosembo.
6 We have heard of Moab's pride—how very proud he is—of his arrogance, his pride, and his fury; his boasting is empty. Toyokaki sango ya lolendo ya Moabi, ndenge atombolaka mapeka : lolendo na ye oyo eleka ndelo mpe lofundu na ye, lolendo mpe maloba na ye ya lofundu ezanga na yango tina.
7 Therefore let Moab wail for Moab; let everyone wail. Mourn, utterly stricken, for the raisin cakes of Kir-hareseth. Yango wana, bato ya Moabi bakosala matanga, bakomilela bango na bango mpo na Moabi. Bolela mpe bozala na mawa mpo na mikate ya Kiri-Aresheti, oyo basala na bambuma ya vino.
8 For the fields of Heshbon wither, and the vine of Sibmah; the rulers of the nations have struck down its choice branches, which reached as far as Jazer and strayed into the wilderness; its shoots spread out and crossed over the sea. Mpo ete bilanga ya Eshiboni esili kokawuka elongo na bilanga ya vino ya Sibima. Bakambi ya bikolo babukaki-bukaki bitape na yango oyo eleki kitoko, oyo ekenda kino na Yaezeri mpe eleka kino na esobe. Bitape yango ezalaki epanzana makasi mpe ekenda mosika kino na ebale monene.
9 Therefore I weep with the weeping of Jazer for the vine of Sibmah; I drench you with my tears, Heshbon and Elealeh, for over your summer fruit and your harvest the battle shout has fallen. Yango wana, nazali kolela lokola Yaezeri mpo na vino ya Sibima. Eshiboni mpe Eleale, nazali kosopa mpinzoli mpo na bino ! Koganga ya esengo esili mpo bambuma na bino mpe mpo na biloko oyo bobuki na bilanga na bino.
10 Joy and gladness are taken away from the fruitful field, and in the vineyards no songs are sung, no cheers are raised. No one treads out wine in the presses; I have put an end to the shouting. Esengo mpe kosepela ebungi na bilanga ya kitoko, banzembo mpe koganga ya esengo ezali lisusu te kati na bilanga ya vino ! Mokamoli vino akokamola lisusu te kati na ekamolelo, pamba te nakosukisa koganga.
11 Therefore my heart moans like a lyre for Moab, my inmost being for Kir-heres. Motema na ngai ezali kolela lokola lindanda mpo na Moabi, mpe kati ya motema na ngai ezali komona pasi mpo na Kiri-Aresheti.
12 And when Moab presents himself, when he wears himself out on the high place and comes to his sanctuary to pray, he will not prevail. Bakomona Moabi komata na bisambelo ya likolo ya bangomba mpo na kobondela na esika na ye ya bule, kasi akolonga te.
13 This is the word that our Father spoke concerning Moab in the past. Yango nde liloba oyo Yawe aloba wuta kala mpo na Moabi.
14 But now our Father has spoken: "In three years, like the years of a hired worker, the glory of Moab will be scorned, in spite of all his great numbers; and the remnant will be very few and feeble." Kasi Yawe alobi sik’oyo boye : « Etikali mibu misato, kobakisa ata mokolo moko te, bato ya lokumu ya Moabi mpe ebele ya bato na ye bakosambwa, bongo bato na ye oyo bakobika bakozala kaka moke mpe bakozanga makasi. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]