Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 17 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 An oracle about Damascus. Look—Damascus will no longer be a city; it becomes a heap of ruins. Maloba ya kosambisa Damasi : « Tala, Damasi ekotikala lisusu engumba te, ekokoma nde liboke ya libebi.
2 The cities of Aroer are abandoned; they will be left for the flocks, which will lie down with no one to frighten them. Bingumba ya Aroeri ekotikala lisusu na bato te, ekotikala nde mpo na bibwele oyo ekokoma kolala kuna, oyo moto ata moko te akobangisa.
3 The fortress will vanish from Ephraim, and the kingdom from Damascus; and the remnant of Aram will be like the glory of the children of Israel, declares the Father of heaven's armies. Bingumba batonga makasi ekolimwa na Efrayimi, mpe nguya ya bokonzi ekolimwa na Damasi. Batikali ya Siri bakokoma lokola nkembo ya bana ya Isalaele, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
4 In that day the glory of Jacob will be brought low, and the fat of his body will waste away. « Na mokolo wana, lokumu ya Jakobi ekosila, mafuta ya misuni ya nzoto na ye ekosila.
5 It will be as when a harvester gathers the standing grain and harvests the heads of grain with his arm; it will be as when someone gleans the grain in the Valley of Rephaim. Ekozala lokola tango basangisaka matiti ya ble mpe loboko ya moloni ebukaka mito na yango, lokola tango balokotaka mito ya ble oyo ekweyaka na lubwaku ya bato ya Refayimi.
6 Yet a few will be left, as when an olive tree is beaten: two or three ripe olives at the very top, four or five on the fruitful branches, declares the Father of Israel. Kasi kaka ndambo moke ya mito ya ble nde etikalaka ; lokola tango baningisaka nzete mpo na kobuka bambuma ya olive, bongo bambuma mibale to misato etikalaka na songe ya bitape, mpe minei to mitano etikalaka na bitape ya se, » elobi Yawe, Nzambe ya Isalaele.
7 In that day people will look to their Maker, and their eyes will turn to the Holy One of Israel—our Father. Na mokolo wana, bato bakotalela Mokeli na bango mpe bakobalola miso na bango epai ya Mosantu ya Isalaele ;
8 They will not look to the altars, the work of their hands, and they will not gaze at what their own fingers have made—the Asherah poles and the incense altars. bakotalela lisusu bitumbelo te oyo ezali misala ya maboko na bango, mpe miso na bango ekotala lisusu te misala ya misapi na bango : makonzi ya Ashera mpe bitumbelo ya malasi ya ansa.
9 In that day their strong cities will be like the abandoned places of the woods and hilltops, which were deserted when the children of Israel came; and it will be a desolation. Na mokolo wana, bakosundola bingumba na bango oyo batonga makasi ndenge basundolaki banzete mpe bangomba liboso ya bana ya Isalaele. Nyonso ekobebisama penza.
10 For you have forgotten the Father of your salvation, and you have not remembered the Rock of your refuge. Therefore, though you plant pleasant gardens and set out cuttings from a foreign vine, Mpo ete obosani Nzambe, Mobikisi na yo, oboyi kokanisa Libanga oyo azali Ekimelo na yo, okolisi banzete ya kitoko mpe oloni banzete ya vino ya bapaya.
11 and though on the day you plant them they begin to sprout, and by morning your planting is in blossom, yet the harvest will vanish in a day of grief and incurable pain. Kaka na mokolo oyo olonaki yango, omonaki yango kobimisa mito ; mpe na tongo makasi, nkona na yo ebimisaki bafololo. Na mokolo ya pasi, milona na yo ekomonana pamba, mpe pasi yango ekoki kosila te.
12 Ah, the uproar of many peoples—they roar like the roaring of the seas! The rumbling of nations—they rumble like the rumbling of mighty waters! Mawa na ebele ya bato ! Tala ndenge bazali koganga lokola makelele ya ebale monene ! Bato ya bikolo bazali koganga lokola lokito ya mayi ya ebale monene !
13 The nations rumble like the rumbling of many waters, but our Father will rebuke them, and they will flee far away, driven before the wind like chaff on the hills, like whirling dust before the storm. Ata bato ya bikolo bazali koganga lokola makelele ya mayi ya bibale minene, bakimaka penza mosika tango Yawe apamelaka bango ; bakimaka lokola matiti na bangomba na tango ya mopepe, lokola putulu na tango ya mopepe makasi.
14 At evening, sudden terror! Before morning, they are gone. This is the portion of those who plunder us, the lot of those who loot us. Na pokwa, somo ya pwasa nde eyaka ! Bongo liboso ete tongo etana, eloko moko te etikalaka ! Yango nde lifuti ya bato oyo banyokolaka biso, mpe mbano ya bato oyo bamonisaka biso pasi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]