Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 18 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Ah, land of whirring wings, beyond the rivers of Cush, Mawa na mokili oyo ezali na bamasuwa oyo ezalaka na bavwale lokola mabanki, bongo enanaka na ebale ya Kushi !
2 who sends ambassadors by the sea, in vessels of papyrus across the waters. Go, swift messengers, to a nation tall and smooth-skinned, to a people feared near and far, a nation mighty and trampling down, whose land the rivers divide. Mawa na yo oyo otindaka bantoma na nzela ya ebale kati na bamasuwa oyo basala na papirisi, na likolo ya ebale monene ! Bino bapanzi sango ya mbangu, bokende epai ya bato ya ekolo oyo bazalaka milayi mpe baposo ya nzoto na bango engengaka, epai ya bato ya ekolo oyo babangisaka na mosika, bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango, mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango.
3 All you inhabitants of the world, you who dwell on the earth: when a banner is raised on the mountains, look! When a trumpet sounds, listen! Bino nyonso, bavandi ya mokili, bino oyo botondisi mabele, tango bakotombola bendele na likolo ya bangomba, bokomona ; tango bakobeta kelelo, bokoyoka !
4 For this is what our Father said to me: I will be still, and I will look on from my dwelling place, like clear heat in the sunlight, like a cloud of dew in the heat of harvest. Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na ngai : « Nakovanda kimia mpe nakotala wuta na ndako na Ngai, lokola kongala ya moyi to lokola mapata na tango ya molunge. »
5 For before the harvest, when the blossom is over and the bud becomes a ripening grape, our Father will cut off the shoots with pruning knives, and the spreading branches he will take away and lop off. Mpo ete liboso ya kobuka bambuma, tango bafololo ya mike etikaka kobima mpe ekomaka bambuma mibesu oyo ekomi pene ya kotela, bakataka bitape na likwangola, babwakaka mpe batiaka pembeni bitape.
6 They will all be left for the birds of prey of the mountains and for the beasts of the earth. The birds of prey will summer on them, and all the beasts of the earth will winter on them. Bakosundola yango epai ya bandeke oyo eliaka misuni na likolo ya bangomba mpe epai ya banyama ya zamba. Bandeke minene ekolia yango na tango ya molunge mpe banyama ya zamba ekolia yango na tango ya malili.
7 At that time gifts will be brought to the Father of heaven's armies, from a people tall and smooth-skinned, from a people feared near and far, a nation mighty and trampling down, whose land the rivers divide—to the place of the name of the Father of heaven's armies, Mount Zion. Na tango wana, bakomema bakado epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, wuta epai ya ekolo ya bato milayi oyo poso ya nzoto na bango engengaka, wuta epai ya ekolo ya bato oyo babangisaka na mosika, bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango, mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango, bakomema bakado yango na ngomba Siona, esika oyo Kombo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezalaka.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]