Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 18 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Maloba ya kosambisa Etiopi

1Mawa na mokili oyo ezali na bamasuwaoyo ezalaka na bavwale lokola mabanki,bongo enanaka na ebale ya Kushi !

2Mawa na yo oyo otindaka bantoma na nzela ya ebalekati na bamasuwa oyo basala na papirisi,na likolo ya ebale monene !Bino bapanzi sango ya mbangu,bokende epai ya bato ya ekolo oyo bazalaka milayimpe baposo ya nzoto na bango engengaka,epai ya bato ya ekolo oyo babangisaka na mosika,bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango,mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango.

3Bino nyonso, bavandi ya mokili,bino oyo botondisi mabele,tango bakotombola bendele na likolo ya bangomba, bokomona ;tango bakobeta kelelo, bokoyoka !

4Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na ngai :« Nakovanda kimia mpe nakotala wuta na ndako na Ngai,lokola kongala ya moyi to lokola mapata na tango ya molunge. »

5Mpo ete liboso ya kobuka bambuma,tango bafololo ya mike etikaka kobimampe ekomaka bambuma mibesu oyo ekomi pene ya kotela,bakataka bitape na likwangola,babwakaka mpe batiaka pembeni bitape.

6Bakosundola yango epai ya bandekeoyo eliaka misuni na likolo ya bangombampe epai ya banyama ya zamba.Bandeke minene ekolia yango na tango ya molungempe banyama ya zamba ekolia yango na tango ya malili.

7Na tango wana, bakomema bakado epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga,wuta epai ya ekolo ya bato milayioyo poso ya nzoto na bango engengaka,wuta epai ya ekolo ya bato oyo babangisaka na mosika,bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango,mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango,bakomema bakado yango na ngomba Siona,esika oyo Kombo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezalaka.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]