Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 19 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 An oracle about Egypt. Look—our Father rides a swift cloud into Egypt. Egypt's idols tremble before him, and Egypt's heart melts within. Maloba ya Yawe mpo na kosambisa Ejipito : Tala, Yawe amati likolo ya mapata oyo ekendaka mbangu, azali koya na Ejipito. Banzambe ya bikeko ya Ejipito ezali kolenga liboso na Ye mpe mitema ya bato ya Ejipito elembi-lembi kati na bango.
2 I will stir up Egypt against Egypt, and they will fight, each against his brother and each against his neighbor, city against city, kingdom against kingdom. « Nakosala ete bato ya Ejipito batelemelana bango na bango : ndeko akobundisa ndeko na ye, moninga akobundisa moninga na ye, engumba moko ekobundisa engumba mosusu, mpe mboka moko ekobundisa mboka mosusu.
3 The spirit of Egypt will be poured out within it, and I will swallow up its counsel; they will inquire of the idols and the spirit-mediums, the ghosts and the necromancers. Bato ya Ejipito bakosila mayele, mpe nakobebisa mabongisi na bango nyonso ; bakokende kotuna toli epai ya banzambe ya bikeko, epai ya milimo ya bakufi, epai ya bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe epai ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya.
4 I will hand Egypt over into the grip of a harsh master, and a fierce king will rule over them—declares the Father of heaven's armies. Nakokaba bato ya Ejipito na maboko ya bakonzi ya mitema mabe, mpe mokonzi moko ya kanda makasi akokonza bango, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.
5 The waters of the sea will dry up, and the river will be parched and dry. Mayi ya ebale monene ekokita, mpe mayi ya ebale ekosila mpe ekokawuka.
6 The canals will stink; the streams of Egypt will dwindle and dry up; reed and rush will wither. Mayi ya miluka ekokoma solo, mayi ya Ejipito ekokita mpe ekokawuka. Mpe lisusu, banzete oyo ebotaka na mayi ekokawuka,
7 The bare places along the Nile, at the mouth of the Nile, and everything sown beside the Nile will dry up, blow away, and be no more. elongo na matiti oyo ezalaka pembeni ya Nili, na monoko ya ebale. Milona nyonso ya bilanga oyo ebotaka pembeni ya Nili ekokawuka mpe ekopumbwa na mopepe, eloko moko te ekotikala.
8 The fishermen will mourn; all who cast a hook into the Nile will lament, and those who spread nets on the water will waste away. Balobi mbisi bakonyokwama mpe bakokoma kolela, bato nyonso oyo babwakaka ndobo mpe minyama na ebale Nili bakokoma na pasi.
9 The workers in combed flax will be ashamed, and the weavers of white cloth. Bato oyo basalaka lino bakokufa soni ya makasi, mpe bato oyo batongaka bilamba bakotonda na mawa.
10 Her weavers will be crushed, and all who work for wages will be sick at heart. Bato oyo basimbaka mokili bakokweya, mpe basali nyonso bakolemba nzoto.
11 The princes of Zoan are nothing but fools; Pharaoh's wisest counselors give senseless counsel. How can you say to Pharaoh, "I am a son of the wise, a son of ancient kings"? Bakambi ya Tsoani bakomi penza lokola bazoba, bato ya bwanya ya Faraon bakomi kopesa batoli oyo ezanga tina. Ndenge nini bokoki penza koloba na Faraon : « Ngai, nazali moko kati na bato ya bwanya, moyekoli ya bakonzi ya kala ? »
12 Where now are your wise men? Let them tell you and make known what the Father of heaven's armies has planned against Egypt. Wapi sik’oyo bato na yo ya bwanya ? Tika ete balakisa yo mpe basosolisa yo makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, abongisaki mpo na kotelemela Ejipito.
13 The princes of Zoan have become fools, the princes of Memphis are deceived; the cornerstones of her tribes have led Egypt astray. Bakambi ya Tsoani bakomi lokola bazoba, bakambi ya Mefisi bakomi kokanisa makambo ya lokuta ; nzokande bango, makonzi ya bikolo ya bato ya Ejipito, nde bazali kobungisa bato ya Ejipito nzela.
14 Our Father has poured into her a spirit of confusion, and they have made Egypt stagger in all it does, like a drunkard staggering in his vomit. Yawe atindeli bango molimo ya kizunguzungu : bango nde basalaki ete Ejipito ekoma kotenga-tenga na misala na yango nyonso ndenge moto oyo alangwe masanga atengaka-tengaka.
15 There will be nothing Egypt can do, whether head or tail, palm branch or reed. Eloko moko te ekosalema lisusu na Ejipito, ezala na moto to na mokila, na lindalala ya nzete ya mbila to na nzete oyo ebotaka na mayi.
16 In that day the Egyptians will be like women—trembling in fear at the hand the Father of heaven's armies raises against them. Na mokolo wana, bato ya Ejipito bakokoma lokola basi. Bakolenga na somo na koningana ya loboko oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, atomboli mpo na kotelemela bango.
17 The land of Judah will terrify Egypt; all who hear it named will be afraid, because of what the Father of heaven's armies is planning against them. Bongo mokili ya Yuda ekolengisa bato ya Ejipito na somo. Tango nyonso bakoyoka kombo ya Yuda, bakolenga na somo mpo na mabongisi nyonso oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, asalaki mpo na kotelemela bango.
18 In that day five cities in Egypt will speak Canaan's language and swear allegiance to the Father of heaven's armies. One will be called the City of the Sun. Na mokolo wana, bingumba mitano kati na Ejipito ekokoma koloba lokota ya Bayuda mpe kolapa ndayi na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga. Bongo moko kati na yango ekobenga yango : Engumba ya moyi.
19 In that day there will be an altar to our Father in the heart of Egypt, and a pillar to him at its border. Na mokolo wana, bakotonga etumbelo moko na kati-kati ya Ejipito mpe bakotia likonzi moko lokola ekaniseli mpo na Yawe, na bandelo ya mokili.
20 It will be a sign and witness to the Father of heaven's armies in the land of Egypt. When they cry out to our Father because of oppressors, he will send them a savior and defender, and rescue them. Ekozala lokola elembo mpe litatoli mpo na Yawe, Mokonzi ya mampinga, na mokili ya Ejipito. Tango bakoganga epai na Yawe likolo na banyokoli na bango, akotindela bango mobikisi mpe mobundeli, mpe akobikisa bango.
21 Our Father will reveal himself to Egypt; that day the Egyptians will know him, worship with sacrifice and offering, and make vows to him and fulfill them. Boye, Yawe akomimonisa epai na bato ya Ejipito. Mpe na mokolo wana, bato ya Ejipito bakoyeba Yawe, bakogumbamela Ye na bambeka mpe na makabo ya bambuma ; bakolapa ndayi na Kombo na Yawe mpe bakokokisa yango.
22 Our Father will strike Egypt—striking and healing. They will return to him; he will hear their pleas and heal them. Kasi Yawe akobeta Ejipito na nzela ya bitumbu, akobeta yango mpe akobikisa yango. Bakozonga epai na Yawe, bongo akoyanola na kolela na bango mpe akobikisa bango.
23 In that day a highway will run from Egypt to Assyria. Assyrians will enter Egypt and Egyptians Assyria, and Egypt will worship with Assyria. Na mokolo wana, bakopasola nzela moko wuta na Ejipito kino na Asiri. Bato ya Asiri bakokoma koya na Ejipito, mpe bato ya Ejipito bakokoma koya na Asiri. Bato ya Ejipito mpe bato ya Asiri bakokoma kosala elongo losambo mpo na Yawe.
24 That day Israel will be third with Egypt and Assyria, a blessing in the midst of the earth, Na mokolo wana, Isalaele akozala ekolo ya misato, sima na Ejipito mpe Asiri, lipamboli oyo Nzambe akomema na mokili.
25 for the Father of heaven's armies has blessed them: "Blessed be Egypt my children, Assyria my handiwork, and Israel my inheritance." Yawe, Mokonzi ya mampinga, akopambola bango na maloba oyo : « Tika ete bopambolama : Ejipito, bato na Ngai ; Asiri, misala ya maboko na Ngai, mpe Isalaele, libula na Ngai ! »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]