Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 20 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The year the commander-in-chief came to Ashdod, sent by Sargon king of Assyria, he fought Ashdod and captured it. Na mobu oyo mokonzi monene ya basoda, oyo Sargoni, mokonzi ya Asiri, atindaki, ayaki kobundisa mpe kobotola engumba Asidodi ;
2 At that time our Father said through Isaiah son of Amoz, "Loosen the sackcloth from your waist and take the sandals off your feet." He did so, walking stripped and barefoot. kaka na tango wana, Yawe alobaki maloba oyo na nzela ya Ezayi, mwana mobali ya Amotsi : « Kende, longola bilamba ya saki na nzoto na yo, mpe basapato na makolo na yo. » Mpe asalaki kaka bongo ; akomaki kotambola bolumbu mpe makolo ngulu.
3 Then our Father said, "Just as my servant Isaiah has walked stripped and barefoot three years, as a sign and omen against Egypt and Cush, Bongo Yawe alobaki : « Lokola mosali na Ngai, Ezayi, atamboli bolumbu mpe makolo ngulu mibu misato mpo na kozala elembo mpe ekamwiseli na miso ya Ejipito mpe ya Kushi,
4 so Assyria's king will drive off Egypt's captives and Cush's exiles, young and old, naked, barefoot, buttocks bared—exposing Egypt's shame. mokonzi ya Asiri akomema bakangami ya Ejipito mpe bawumbu ya Kushi bolumbu mpe makolo ngulu : ezala bilenge to bampaka, bakotambola bolumbu mpe makolo ngulu mpo na soni ya Ejipito.
5 Then they will be shattered and ashamed because of Cush their hope and Egypt their boast. Bato nyonso oyo batiaki elikya na bango na Kushi mpe bakomaki lofundu mpo na Ejipito bakokweya mpe bakotonda na soni.
6 On that day, this coastland's people will say, 'See what came of our hope, where we fled for help, to be rescued from the king of Assyria! How can we escape?'" Na mokolo wana, bavandi ya esanga bakoloba : ‹ Tala, makambo nini ekomeli bato oyo biso tozalaki kotiela mitema ? Tozalaki kokima epai na bango mpo na kozwa lisungi mpe lobiko liboso ya mokonzi ya Asiri. Biso sik’oyo tokosuka ndenge nini ? › »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]