Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 21 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The oracle of the wilderness of the sea. Like whirlwinds sweeping the Negev, it comes from the wilderness, a fearsome land. Maloba na Yawe na tina na esobe ya ebale monene : Ndenge mopepe makasi elekaka na somo na Negevi, monguna moko azali koya wuta na esobe, wuta na mokili moko ya somo.
2 A harsh vision has been shown to me: the betrayer betrays, and the destroyer destroys. Go up, Elam! Lay siege, Media! I have put an end to all the groaning she caused. Namonaki emoniseli moko ya somo : Moteki baninga azali koteka baninga, mobebisi azali kobebisa. Elami, bundisa bango ! Medi, zingela bango ! Nakosukisa kolela nyonso oyo ayeisaki na bato.
3 Therefore my body is gripped with anguish; pangs have seized me, like the pangs of a woman in labor. I am too doubled over to hear, too terrified to see. Yango wana, loketo na ngai ekomi na pasi, pasi moko ya makasi penza ekangi ngai lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. Makambo oyo nazali koyoka ezali kopesa ngai somo, mpe oyo nazali komona ezali kosilisa ngai mayele.
4 My heart staggers; horror overwhelms me. The twilight I longed for has turned to trembling for me. Motema na ngai ezali kobeta noki-noki, nakomi kolenga na somo, mwa malili ya pokwa oyo nazelaka na esengo ekomeli ngai somo makasi.
5 They set the table, they spread the rugs, they eat, they drink. Rise up, you princes! Oil the shields! Mesa ebongisami, batandi bilamba ya mesa, bazali kolia mpe komela ! Bino bakonzi ya basoda, bopakola banguba na bino mafuta !
6 For this is what the Sovereign Father said to me: "Go, station the watchman; let him report what he sees. Tala liloba oyo Nkolo alobi na ngai : « Kende, tia mokengeli ; mpe tika ete aloba makambo oyo akomona.
7 When he sees riders, horsemen in pairs, riders on donkeys, riders on camels, let him watch closely, very closely." Soki amoni shar oyo bampunda mibale ezali kobenda, basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, bamoko bamati likolo ya ba-ane, bamosusu bamati likolo ya bashamo, tika ete asala keba, asala keba penza ! »
8 Then the watchman cried out: "A lion! Upon the watchtower, O Sovereign Father, I stand continually by day, and at my post I keep watch all through the nights." Boye, mokengeli agangaki lokola nkosi : « Nkolo, mokolo mobimba, natelemaka na likolo ya ndako molayi ya kokengela ; mpe butu nyonso, natikalaka kaka se wana.
9 And look—here come riders, horsemen in pairs! And he answered, "Fallen, fallen is Babylon, and all the carved images of her gods lie shattered on the ground." Tala, moto moko azali koya awa na shar, oyo bampunda mibale ezali kobenda. Azongisaki eyano : ‹ Babiloni esili kokweya, ekweyi solo ! Banzambe na yango nyonso ya bikeko elali-lali mpe epanzani na mabele ! › »
10 O my threshed people, child of my threshing floor, what I have heard from the Father of heaven's armies, I declare to you. Oh bato na ngai, babeti bino ndenge batutaka ble na libanda ! Nazali koyebisa bino makambo oyo nayokaki wuta epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, wuta epai ya Nzambe ya Isalaele.
11 An oracle about Dumah. Someone calls to me from Seir: "Watchman, what of the night? Watchman, what of the night?" Maloba na Yawe na tina na Duma. Moto moko azali kobelela Ngai wuta Seiri : « Mokengeli, olobi nini mpo na butu ? Mokengeli olobi nini mpo na butu ? »
12 The watchman says, "Morning comes, and also the night. If you would inquire, then inquire; come back again." Mokengeli azongisaki : Tongo elingi kotana, kasi butu mpe elingi koya. Soki bolingi kotuna mituna, botuna ; bongo bozonga mpe boya lisusu.
13 The oracle concerning Arabia. In Arabia's thickets you will spend the night, you Dedanite caravans. Maloba na Yawe mpo na kotelemela Arabi : Oh bino bato ya mombongo ya Dedani, bokolala na esobe ya Arabi.
14 Bring water to the thirsty; you who live in the land of Tema, bring bread to the fugitive. Bopesa mayi na moto oyo azali na posa ya mayi ; bino bavandi ya mokili ya Tema, bopesa bilei na bato oyo bazali kokima bitumba.
15 For they have fled from the swords—from the drawn sword, from the bent bow, and from the weight of battle. Pamba te bazali nde kokima mopanga, mopanga oyo babimisi na ebombelo na yango, bazali nde kokima tolotolo oyo etelemi makasi mpe bitumba ya makasi.
16 For the Sovereign Father told me: "Within a year, as a hired worker counts it, all Kedar's glory ends. Tala liloba oyo Nkolo alobaki na ngai : « Etikali kaka mobu moko, ndenge batangaka mikolo ya mowumbu, nkembo nyonso ya Kedari ekosuka.
17 The remaining archers, Kedar's warrior sons, will be few, for our Father has spoken." Bongo, ekotikala kaka mwa ndambo moke ya basoda oyo babundaka na matolotolo mpe ya basoda ya mpiko kati na Kedari, » elobi Yawe, Nzambe ya Isalaele.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]