Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 22 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 An oracle concerning the Valley of Vision. What is the matter with you now, that you have all gone up to the rooftops, Maloba na Yawe na tina na lubwaku ya Emoniseli : Likambo nini lisusu ekomeli bino sik’oyo mpo ete bino nyonso bomata na likolo ya mitondo ya ndako ?
2 you town full of noise, you wild, chaotic city, you reveling town? Your dead were not killed by the sword, nor did they die in battle. Oh engumba etonda na loyenge, engumba etonda na makelele mpe na bisengo ! Bibembe na yo ekufi na mopanga te to mpe na bitumba te.
3 All your rulers fled together; they were captured without a bow being drawn. All of you who were found were taken captive together, though you had fled far away. Bakambi na yo nyonso bakimaki elongo ; bakangaki bango na basoda na nguya ya tolotolo. Mpe bato na yo, oyo bazalaki kokima monguna na mosika, bakangaki bango mpe bakomaki elongo bakangami.
4 So I said, "Look away from me; let me weep bitterly. Do not try to comfort me over the ruin of the daughter of my people." Yango wana nalobaki : « Botika kotala Ngai, botika ete nalela makasi ! Bomeka kobondisa Ngai te mpo na kobebisama ya bato na Ngai ! »
5 For the Father of heaven's armies has a day of tumult and trampling and confusion in the Valley of Vision—walls battered down and a cry for help echoing to the mountains. Pamba te ezali mokolo moko ya lokito ya bitumba, mokolo ya pasi makasi mpe ya somo kati na lubwaku ya Emoniseli kowuta na Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ; ezali mokolo oyo mir ya makasi ekobukana mpe makelele ya koganga ekobima na bangomba.
6 Elam took up the quiver with chariots and horsemen, and Kir bared their shields. Mampinga ya Elami batomboli makonga, mosusu bamati na bashar mpe bampunda ; Kiri abimisi nguba.
7 Your choicest valleys were full of chariots, and the horsemen took their positions at the gates. Lubwaku na yo, oyo eleki kitoko etondi na bashar, mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda batelemi-telemi na bikuke ya engumba ;
8 Our Father stripped away the defenses of Judah. And in that day you looked to the weapons in the House of the Forest, bibombamelo ya Yuda etikali lisusu te. Na mokolo wana, obalolaki miso na yo na bibundeli oyo ezalaka na Ndako ya Zamba.
9 and you saw how many breaches there were in the city of David. You collected the water of the lower pool, Bomonaki ete Engumba ya mokonzi Davidi ezali na madusu mingi kati na mir oyo ezingeli yango ; boye bobombaki mayi kati na Liziba oyo ezalaka na se,
10 and you counted the houses of Jerusalem and tore some down to fortify the wall. botangaki motango ya bandako ya Yelusalemi, bobukaki mosusu mpo na kolendisa mir ya monene.
11 You built a reservoir between the two walls for the water of the old pool, but you did not look to the One who made it, nor consider our Father who planned it long ago. Bosalaki liziba mpo na kobomba mayi ya liziba ya kala kati na bamir mibale, kasi bobalolaki miso na bino te mpo na kotala Ye oyo asalaki mpe abongisaki yango wuta kala.
12 In that day the Father of heaven's armies called for weeping and mourning, for shaved heads and mourning clothes. Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, azalaki kobenga bino na mokolo wana mpo ete bolela mpe bosala matanga, bomikokola suki mpe bolata saki.
13 But instead there was joy and celebration, slaughtering cattle and killing sheep, eating meat and drinking wine: "Let us eat and drink, for tomorrow we die!" Kasi tala, ezalaki kaka bisengo mpe loyenge, koboma bangombe mpe bameme ya mibali, bantaba ya basi, kolia misuni mpe komela masanga ya vino ! Bozalaki koloba : « Tika ete tolia mpe tomela, pamba te, lobi, tokokufa ! »
14 The Father of heaven's armies has revealed this to me: "Surely this sin will not be wiped away from you until you die," says the Father of heaven's armies. Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayebisaki ngai yango na matoyi na ngai moko penza : « Kino bokokufa, bokotikala kozwa bolimbisi ya lisumu oyo te, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.
15 This is what the Father of heaven's armies says: Go to this steward, Shebna, who is over the household, and say to him: Tala maloba oyo Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Kende kokuta Shebina, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, loba na ye :
16 What are you doing here, and who gave you the right to be here, that you have cut out a tomb for yourself here—carving your grave high up on the heights, chiseling your resting place in the rock? ‹ Ozali kosala nini awa, mpe nani apesi yo nzela ya kotonga kunda na yo awa lokola moto oyo azali kotimola kunda na ye na likolo mpe kotonga epemelo na ye kati na lidusu ya libanga monene ?
17 Look, our Father is about to hurl you away violently, you strong man; he will seize firm hold of you. Tala, Yawe akomi pene ya koningisa yo mpe kobwaka yo mosika, yo moto ya makasi !
18 He will wind you up tightly and fling you like a ball into a vast open land. There you will die, and there your splendid chariots will lie—you disgrace to your master's house. Akobalola yo ndenge babalolaka ndembo mpe akobwaka yo na etando moko ya monene. Kuna nde okokufa, mpe bashar na yo ya lokumu ekotikala, yo oyo osalaka soni ya ndako ya mokonzi na yo.
19 I will depose you from your office, and you will be pulled down from your post. Nakolongola yo na mosala, mpe lokumu na yo ekosila.
20 In that day I will summon my servant Eliakim son of Hilkiah, Na mokolo wana, nakobengisa mosali na Ngai, Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia.
21 I will clothe him with your robe and fasten your sash on him, and I will hand your authority over to him. He will be a father to the people of Jerusalem and to the house of Judah. Nakolatisa ye nzambala na yo, nakokanga ye mokaba na yo mpe nakopesa bokonzi na yo na maboko na ye. Akozala tata mpo na bavandi ya Yelusalemi mpe mpo na ndako ya Yuda.
22 I will place the key of the house of David on his shoulder; what he opens no one will shut, and what he shuts no one will open. Nakotia fungola ya ndako ya Davidi na mapeka na ye : oyo akofungola, moto moko te akokanga yango ; mpe oyo akokanga, moto moko te akofungola yango.
23 I will drive him in like a peg in a firm place, and he will become a seat of honor for his father's house. Nakopika ye lokola sete na esika ya malamu ; akozala lokola kiti ya bokonzi ya lokumu mpo na ndako ya tata na ye.
24 They will hang on him the whole weight of his father's house—the offspring and the offshoots, every small vessel, from the bowls to all the jars. Nkembo nyonso ya ndako ya tata na ye ekozala likolo na ye : kobanda na bakitani na ye kino na bana na bango nyonso, lokola bisalelo oyo : kobanda na bakopo ya mike kino na mbeki ya minene.
25 In that day, declares the Father of heaven's armies, the peg driven into the firm place will give way; it will be cut down and fall, and the load hanging on it will be cut off—for our Father has spoken. Na mokolo wana, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, sete oyo bapikaki na esika ya malamu ekolongwa, ekobukana mpe ekokweya ; mpe mokumba oyo amemaki ekokweya. › » Yawe nde alobaki.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]