Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 23 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The oracle concerning Tyre: Wail, you ships of Tarshish, for your harbor is destroyed, left without house or haven. From the land of Cyprus the news has reached them. Maloba na Yawe na tina na engumba ya Tiri : Oh bamasuwa ya Tarsisi, bosala matanga ! Pamba te engumba ya Tiri esili kobebisama nyonso : ezala ndako to libongo, eloko moko te etikali ! Bazwaki sango oyo wuta na esanga ya Shipele.
2 Be silent, you who live on the coast, you merchants of Sidon, whose messengers cross the sea. Bino bavandi ya esanga, bino bato ya mombongo ya Sidoni, oyo nzela ya ebale ekomisa bazwi, bovanda nye !
3 Across the great waters came the grain of Shihor, the harvest of the Nile—this was her revenue; and she became the marketplace of the nations. Lifuti na ye ezalaki : ble ya Shiyori, oyo ezalaki koya na nzela ya ebale monene mpe milona oyo ezalaki kowuta pembeni ya Nili. Engumba ya Tiri ekomaki nde zando ya bikolo.
4 Be ashamed, Sidon, for the sea has spoken, the stronghold of the sea, saying: "I have not labored nor given birth, I have not raised young men nor brought up young women." Yoka soni, Sidoni, ndako batonga makasi ya ebale monene, pamba te ebale monene elobi : « Natikala koyoka pasi ya kobota te, natikala na ngai mpe kobota te, natikala na ngai kobokola bana mibali to kokolisa bana basi te. »
5 When the report reaches Egypt, they will writhe in anguish at the news about Tyre. Tango maloba yango ekokoma na Ejipito, bakolenga na somo wana bakoyoka sango ya Tiri.
6 Cross over to Tarshish; wail, you who live on the coast. Bokatisa na ngambo ya Tarsisi, bolela makasi, bino bavandi ya esanga.
7 Is this your jubilant city, whose origins go back to ancient times, whose feet carried her to settle in distant lands? Boni, oyo nde engumba na bino ya bisengo, engumba oyo ebanda kala penza mpe oyo makolo na yango ememaka yango kowumela na mikili ya mosika ?
8 Who has planned this against Tyre, the bestower of crowns, whose merchants were princes, whose traders were the honored of the earth? Nani azwaki mokano oyo mpo na kobebisa Tiri ? Tiri oyo azalaki kokabola mitole, oyo bato na ye ya mombongo bazalaki komimona lokola bakonzi ; mpe oyo bato na ye ya nkita bazalaki komimona lokola bato oyo baleki bato nyonso ya mokili na lokumu.
9 The Father of heaven's armies has planned it—to defile all glorious pride, to humble all the honored of the earth. Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde azwaki mokano yango mpo na kosambwisa lolendo ya nkembo nyonso mpe kokitisa kino na se bato nyonso ya lokumu, oyo bazali na mabele.
10 Flow over your land like the Nile, daughter of Tarshish; there is no harbor any longer. Oh Tarsisi, mboka kitoko, koma kosala bilanga ndenge basalaka pembeni ya ebale Nili, pamba te libongo ezali lisusu te.
11 He has stretched out his hand over the sea; he has shaken the kingdoms. Our Father has given the command concerning Canaan to destroy her strongholds. Yawe asembolaki loboko na Ye na ebale monene mpe alengisaki bikolo, apesaki mitindo na tina na mokili ya Fenisi ete babuka bandako na yango oyo batonga makasi ;
12 He said, "You will no longer rejoice, violated virgin daughter of Sidon. Arise, cross over to Cyprus; even there you will find no rest." alobaki : « Okosepela lisusu te, yo Sidoni, mboka kitoko, yo oyo lokumu na yo esili kobebisama lelo ! Telema, katisa na ngambo ya Shipele ! Ezala kuna, okozwa bopemi te. »
13 Look at the land of the Babylonians! This is the people who are no more; Assyria gave it over to desert creatures. They raised their siege towers, they stripped its palaces bare, they made it a ruin. Tala mokili ya bato ya Chalide, bato oyo bazalaka lisusu te ! Bato ya Asiri bakomisaki yango esika ya kowumela mpo na banyama ya esobe ; batongaki bandako na bango ya milayi mpo na kokengela, babukaki bandako na yango batonga makasi mpe bakomisaki yango putulu.
14 Wail, you ships of Tarshish, for your stronghold is destroyed. Bolela, bino bamasuwa ya Tarsisi ! Pamba te ndako na bino, oyo batonga makasi ebukani.
15 In that day Tyre will be forgotten for seventy years, like the lifetime of one king. At the end of seventy years, Tyre's fate will be like the song of the prostitute: Na tango wana, bakobosana Tiri mibu tuku sambo kolanda molayi ya bomoi ya mokonzi moko. Kasi na suka ya mibu tuku sambo, ekosalema mpo na Tiri, makambo oyo baloba na nzembo oyo bayembelaka mwasi ya ndumba :
16 "Take a harp, go about the city, forgotten prostitute; play sweetly, sing many songs, so that you may be remembered." « Kamata lindanda, tambola na engumba mobimba, oh mwasi ya ndumba oyo babosana ; beta yango malamu, yemba banzembo ebele mpo ete bakanisa yo lisusu ! »
17 At the end of seventy years, our Father will turn his attention to Tyre, and she will return to her earnings, prostituting herself with all the kingdoms of the world across the earth. Na sima na mibu tuku sambo, Yawe akosala mpo na Tiri oyo ekozongela lifuti na yango ya mbindo ; mpe ekozongela kosala kindumba elongo na bikolo nyonso ya mokili.
18 But her profit and her earnings will be set apart as holy to our Father. It will not be stored up or hoarded; her profit will go to those who live before our Father, for abundant food and fine clothing. Kasi lifuti mpe bomengo na yango ekobulisama mpo na Yawe ; bakobomba te yango kati na bibombelo. Bomengo na yango ekozala mpo na koleisa bato oyo batelemaka liboso ya Yawe mpe kolatisa bango bilamba ya kitoko.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]