Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 24 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Look—our Father lays the earth waste and leaves it empty; he twists its surface and scatters its inhabitants. Tala, Yawe akobebisa mokili mpe akokomisa yango lokola esobe ; akokotisa mobulu kati na yango mpe akopanza bato na yango.
2 It will be the same for the people as for the priest, for the servant as for his master, for the maid as for her mistress, for the buyer as for the seller, for the lender as for the borrower, for the creditor as for the debtor. Ekozala mpe kaka ndenge moko mpo na Banganga-Nzambe mpe bato, mpo na nkolo mpe mowumbu na ye, mpo na nkolo ya mwasi mpe mwasi mosali na ye, mpo na moteki mpe mosombi, mpo na modefisi mpe modefi, mpo na moto oyo bakofuta ye niongo mpe mpo na moto oyo akofuta niongo.
3 The earth will be utterly laid waste and utterly plundered, for our Father has spoken this word. Mokili ekobebisama penza nye mpe bakopanza yango nyonso. Yawe nde alobaki yango.
4 The earth mourns and withers; the world fades and withers; the exalted ones of the earth fade away. Mokili ezali na matanga mpe ekawuki, mokili mobimba ebebi mpe ekawuki ; ezala likolo mpe ebebi elongo na mokili !
5 The earth lies defiled beneath its inhabitants, for they have disobeyed the teachings, violated the statute, and broken the everlasting covenant. Bato ya mokili bakomisi yango mbindo, bazali kotosa mibeko te ; banyati-nyati bikateli mpe babuki boyokani ya seko.
6 Therefore a curse devours the earth, and those who dwell in it bear their guilt; therefore the earth's inhabitants are burned away, and few people are left. Mpo na yango, bilakeli mabe ezali kozikisa mokili ; bato na yango bakomema mokumba ya mabe na bango. Yango wana, bato ya mokili bazali kokufa, mpe ndambo moke kaka nde etikali.
7 The new wine mourns, the vine grows weak; all the merrymakers sigh. Vino ya sika ezali na matanga, elanga ya vino ekawuki ; bato nyonso oyo bamesana na esengo bakomi kolela na pasi.
8 The joy of the tambourines is stilled, the uproar of the revelers has ceased, the joy of the lyre is stilled. Esengo ya mbonda esili, makelele ya bato ya biyenga esili, esengo ya lindanda esili ;
9 No longer do they drink wine with song; strong drink turns bitter to those who drink it. komela vino etikali lisusu na banzembo te, masanga ya makasi ekomi bololo mpo na bato oyo bamelaka yango.
10 The city of chaos is shattered; every house is shut up, with no way in. Engumba oyo ebeba etikali pamba, bikuke ya bandako nyonso ekangami.
11 In the streets there is an outcry over the wine; all gladness has gone dark, the joy of the earth is driven away. Na babalabala, koganga na koganga ete vino ezali lisusu te, kosepela nyonso ebongwani molili, esengo nyonso elongwe na mokili.
12 Only desolation is left in the city; the gate is battered to ruins. Libebi kaka nde etikali kati na engumba, babuki-buki bikuke na yango na biteni.
13 For so it will be throughout the earth, among the peoples: like an olive tree beaten bare, like the grapes left behind when the harvest is done. Pamba te ekosalema kati na mokili mpe kati na bikolo ndenge esalemaka tango babukaka bambuma ya olive na nzete to tango balokotaka bambuma ya vino soki basilisi kobuka yango.
14 They lift up their voices, they sing for joy; over the majesty of our Father they cry aloud from the west. Bamoko bakotombola mingongo na bango mpe bakoganga na esengo ; wuta na weste ya mayi monene, bakobeta milolo mpo na lokumu na Yawe.
15 Therefore in the east give glory to our Father; on the shores of the sea, glorify the name of our Father, the God of Israel. Yango wana, kuna na ngambo ya este, bopesa nkembo na Yawe ; bonetola Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, kati na bisanga ya ebale monene.
16 From the ends of the earth we hear songs: "Glory to the Righteous One!" But I said, "I waste away, I waste away—woe to me! The treacherous betray; with treachery the treacherous betray." Wuta na suka ya mokili, tozali koyoka banzembo : « Nkembo epai ya Nkolo-Na-Bosembo. » Kasi nalobaki : « Nakomi na suka, nakomi na suka ! Mawa mpo na ngai ! Bazoba bateki mboka, na bozoba penza, bazoba bateki mboka ! »
17 Terror and pit and snare are upon you, you who dwell on the earth! Oh bato ya mokili, somo, libulu mpe motambo ezali kozela bino.
18 Whoever flees at the sound of the terror will fall into the pit, and whoever climbs out of the pit will be caught in the snare. For the windows of heaven are opened, and the foundations of the earth tremble. Moto nyonso oyo akokima na lokito ya somo akokweya na libulu, mpe oyo akoluka kobima kati na libulu akokangama na motambo. Maninisa ya likolo esili kofungwama, makonzi ya mokili ezali koningana.
19 The earth is utterly broken apart, the earth is torn apart, the earth is violently shaken. Mokili ebukani-bukani, mokili epanzani, mokili eningani makasi.
20 The earth staggers like a drunkard, it sways like a hut; its rebellion lies heavy upon it, and it falls and will not rise again. Mokili ekomi kotenga-tenga lokola moto oyo alangwe masanga, ezali koningana na mopepe lokola ndako ya matiti. Mokumba ya botomboki na ye ezali likolo na ye, esili kokweya mpe ekotelema lisusu te.
21 On that day our Father will punish the host of the heights in the heights, and the kings of the earth on the earth. Kasi na mokolo wana, Yawe akopesa etumbu na mampinga ya lola kuna na likolo, mpe na bakonzi ya mokili na se.
22 They will be herded together like prisoners into a pit; they will be locked up in a dungeon, and after many days they will be punished. Bakosangisa bango elongo kati na libulu ndenge basangisaka bakangami na boloko, bakokangela bango na boloko mpe bakozwa etumbu sima na mikolo ebele.
23 Then the moon will be ashamed and the sun put to shame, for the Father of heaven's armies reigns on Mount Zion and in Jerusalem, and before his elders his glory shines. Sanza ekokoma motane, mpe moyi ekoyoka soni, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokonza na ngomba Siona mpe kati na Yelusalemi, liboso ya bampaka na yango, na nkembo makasi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]