Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 25 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 You are my Father; I will exalt you, I will praise your name, for you have done wonderful things—plans formed long ago, faithful and sure. Yawe, ozali Nzambe na ngai ; nakonetola Yo mpe nakosanzola Kombo na Yo ; pamba te na boyengebene na Yo ya kokoka, osalaki mabongisi ya kokamwa, makambo oyo obongisa wuta kala.
2 For you have turned a city into a heap of rubble, a fortified town into a ruin; the palace of foreigners is a city no more—it will never be rebuilt. Okomisaki engumba mopiku ya mabanga, okomisaki bingumba ya makasi maboke ya mabanga ; bandako batonga makasi ya bapaya etikali lisusu na bilongi ya engumba te, bakotonga yango lisusu te.
3 Therefore a strong people will honor you; the city of ruthless nations will fear you. Yango wana, bato ya nguya bakopesa Yo lokumu, bingumba ya bikolo ya kanza ekotosa Yo.
4 For you have been a refuge to the poor, a refuge to the needy in their distress, a shelter from the storm and a shade from the heat; for the breath of the ruthless is like a storm against a wall. Ozalaki ekimelo mpo na mobola, ekimelo mpo na moto oyo akelela, na tango ya pasi, ebombamelo na tango ya mvula makasi mpe pio na tango ya molunge. Pamba te pema ya banyokoli ezali lokola mvula ya makasi oyo ebukaka bamir ;
5 Like heat in a parched land, you subdue the uproar of foreigners; as heat is subdued by the shadow of a cloud, so the song of the ruthless is silenced. mpe lokola moto ya moyi na zelo ya esobe. Osilisaki makelele ya bapaya ndenge pio ya mapata esilisaka molunge ; boye nde nzembo ya banyokoli esilaki.
6 On this mountain the Father of heaven's armies will prepare for all peoples a feast of rich food, a feast of aged wine—the finest of meats and the best of well-aged wines. Na ngomba oyo, Yawe, Mokonzi ya mampinga, akobongisa feti ya biloko kitoko mpo na bato nyonso, feti monene ya vino ya kala, ya misuni oyo eleki mafuta mpe ya vino ya kala oyo balongola malamu salite.
7 And on this mountain he will swallow up the shroud that enfolds all peoples, the veil that is spread over all nations. Kaka na ngomba oyo, akobebisa vwale oyo esili kozipa bato nyonso, bulangeti oyo ezipi bikolo nyonso ;
8 He will swallow up death forever; and the Sovereign Father will wipe away the tears from every face, and he will remove the reproach of his people from all the earth—for our Father has spoken. akolimwisa kufa mpo na libela. Nkolo Yawe akopangusa mpinzoli na bilongi nyonso, akolongola soni ya bato na Ye kati na mokili mobimba. Solo, Yawe alobi.
9 And in that day it will be said, "Look, this is our Father; we waited for him, and he saved us. This is the Father; we waited for him—let us rejoice and be glad in his salvation." Na mokolo wana, bakoloba : « Solo, Oyo azali penza Nzambe na biso ! Totiaki mitema epai na Ye mpe abikisi biso. Oyo azali solo Yawe, totiaki mitema epai na Ye ; tika ete tosepela mpe tozala na esengo mpo na lobiko oyo apesi biso ! »
10 For the hand of our Father will rest on this mountain, but Moab will be trampled down in its place, as straw is trampled down in a manure pit. Loboko na Yawe ekozala na ngomba oyo, kasi bakonyata-nyata Moabi na mokili na bango ndenge banyataka matiti kati na libulu ya fimie.
11 He will spread out his hands within Moab as a swimmer spreads out his hands to swim, but he will bring down their pride along with the craftiness of their hands. Akosembola maboko na Ye kati na yango ndenge basembolaka maboko mpo na kokata mayi. Nzambe akokitisa lolendo na bango mpe mayele ya maboko na bango ;
12 The high walls of your fortress he will bring down, lay low, and cast to the ground, into the dust. akobuka bamir milayi na bino ya makasi mpe akolalisa yango na se ; akokweyisa yango na mabele kino ekoma putulu.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]