Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 26 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 That day this song will be sung in Judah's land: We have a strong city; he sets salvation as walls and outworks. Na mokolo wana, bakoyemba nzembo oyo kati na mokili ya Yuda : Tozali na engumba moko ya makasi ; Nzambe akomisi lobiko lokola mir mpe ebombamelo na yango.
2 Open the gates, that the righteous nation may enter—the nation that keeps faith. Bofungola bikuke mpo ete ekolo ya sembo, ekolo oyo ebatelaka boyokani, ekoka kokota !
3 You keep him in perfect peace whose mind is fixed on you, because he trusts in you. Ndenge esila kokatama, ye oyo akomitika epai na Yo, okobatela ye na kimia, na kimia penza, mpo ete amipesi mobimba epai na Yo.
4 Trust in our Father forever, for our Father is the everlasting Rock. Botia tango nyonso elikya na Yawe, pamba te Yawe azali penza Libanga ya tango nyonso.
5 For he has brought low the inhabitants of the height, the lofty city. He lays it low, lays it low to the ground, casts it down to the dust. Akitisaka bavandi ya likolo, akweyisaka engumba oyo batonga makasi, alalisaka yango penza na mabele mpe akomisaka yango putulu.
6 The foot tramples it down—the feet of the poor, the steps of the needy. Makolo ya bato ekonyata-nyata yango : makolo ya babola, matambe ya bato pamba.
7 The path of the righteous is level; you make smooth the way of the righteous. Nzela ya moto ya sembo, ezali alima ; Yo oyo ozali Sembo, okomisaka kitoko nzela ya moto ya sembo.
8 In the path of your judgments, our Father, we wait for you; your name and your renown are the desire of our soul. Oh Yawe, tango totambolaka na nzela oyo mibeko na Yo etalisaka, totalelaka Yo ; Kombo na Yo mpe kotatola yango, yango nde posa ya mitema na biso.
9 At night my soul longs for you; within me my spirit seeks you eagerly. For when your judgments reach the earth, those living in the world learn what is right. Na butu, motema na ngai ezali solo na posa na Yo ; kati na ngai, molimo na ngai ezali kolukaluka Yo makasi, pamba te bavandi ya mokili bayekolaka bosembo tango opesaka mabele bitumbu.
10 If favor is shown to the wicked, he does not learn righteousness; in the land of uprightness he deals corruptly and does not see the majesty of our Father. Soki basaleli moto mabe ngolu, akoyekola bosembo te ; ezala kati na mokili ya bosembo, asalaka kaka mabe mpe amonaka na ye monene ya Yawe te.
11 Our Father, your hand is lifted up, but they do not see it. Let them see your zeal for your people and be ashamed. Let the fire reserved for your adversaries consume them. Oh Yawe, loboko na Yo emati solo likolo, kasi bazali komona yango te. Tika ete bayokisama soni tango bakomona bolingo makasi na Yo, oyo eleka ndelo mpo na bato na Yo ; tika ete moto oyo obongiselaki banguna na Yo etumba bango !
12 Our Father, you will establish peace for us, for you have indeed accomplished all our works for us. Yawe, okopesa biso kimia, pamba te okokiselaka biso misala nyonso oyo tosalaka.
13 Our Father, other lords besides you have ruled over us, but your name alone we remember. Oh Yawe, Nzambe na biso, atako bakonzi mosusu bakambaki biso, kasi biso, topesaka lokumu kaka na Kombo na Yo.
14 They are dead, they will not live; they are departed spirits, they will not rise; for you brought destruction on them and wiped out all remembrance of them. Bakufi bakozala lisusu na bomoi te, milimo ya bakufi ekozonga lisusu na bomoi te ; opesaki bango etumbu mpe obomaki bango nye ; osalaki ete ata moto moko te akanisa bango lisusu !
15 You have made the nation grow, our Father, you have made the nation grow; you are glorified; you have enlarged all the borders of the land. Oh Yawe, okomisi ekolo na Yo monene ! Solo, okomisi ekolo na Yo monene, omipesi penza lokumu ; opusi bandelo nyonso ya mokili mosika penza.
16 Our Father, in distress they sought you; they poured out a whispered prayer when your discipline was upon them. Yawe, kati na pasi na bango, balukaki Yo ; tango opesaki bango etumbu, bamikabaki na mabondeli makasi.
17 Like a pregnant woman who writhes and cries out in her labor pains when she is about to give birth, so were we before you, our Father. Oh Yawe, tozalaki liboso na Yo lokola mwasi ya zemi oyo akomi pene ya kobota, bongo azali kobaluka mpe koganga na pasi.
18 We were pregnant, we writhed, but we gave birth only to wind. We have brought no deliverance to the earth, and the inhabitants of the world have not been born. Tozalaki na zemi, tozalaki mpe kobaluka na pasi ; kasi tango tobotaki, tobotaki kaka mopepe : tomemelaki mabele lobiko te, mpe tomemelaki mokili bato ya sika te.
19 Your dead will live; their bodies will rise. Awake and sing for joy, you who dwell in the dust! For your dew is the dew of dawn light, and the earth will give birth to the departed spirits. Kasi bato na Yo, oyo bakufa bakozonga lisusu na bomoi, bibembe na bango ekosekwa. Bino bato oyo bovandaka kati na putulu, bolamuka mpe boganga na esengo ! Pamba te mamwe na Yo ezali lokola mamwe ya tongo ; mabele ekopesa bomoi epai ya bakufi.
20 Come, my people, enter your rooms and shut your doors behind you; hide yourselves for a little while until the wrath has passed by. Bato na ngai, bokende, bokota na bashambre na bino mpe bokanga bikuke sima na bino ; bomibomba nanu mwa tango moke kino tango kanda ekoleka.
21 For look, our Father is coming out from his place to punish the people of the earth for their sins, and the earth will disclose the blood shed upon it and will no longer cover those slain in it. Tala, Yawe azali kobima wuta na esika na Ye mpo na kopesa bato ya mokili etumbu mpo na masumu na bango ; mabele ekobimisa makila oyo basopa likolo na yango, ekobomba lisusu te bato oyo baboma.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]