Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 27 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In that day our Father will punish, with his fierce, great, mighty sword, Leviathan the fleeing serpent—Leviathan the twisting serpent—and he will slay the sea monster. Na mokolo wana, Yawe akopesa etumbu na Leviatani, nyoka oyo ekimaka, na Leviatani, nyoka ya somo, na nzela ya mopanga na Ye ya minu, mopanga na Ye ya monene mpe ya nguya ; akoboma elima ya ebale monene.
2 In that day—sing of it: a pleasant vineyard! Na mokolo wana, bakoloba : « Boyemba nzembo mpo na nzete ya vino ya kitoko :
3 "I, your Father, am its keeper; moment by moment I water it. So that no one can harm it, I guard it night and day. Ngai Yawe, nabatelaka yango, nasopelaka yango mayi tango nyonso, nakengelaka yango butu mpe moyi mpo ete moto moko te abebisa yango.
4 I am not angry. If only there were briers and thorns to confront me in battle, I would march against them, I would burn them all together. Nazali lisusu na kanda te. Ah, soki ezalaki kaka na banzube mpe na basende mpo na kobundisa Ngai, nde natambolaki likolo na yango na bitumba mpe nabwakaki yango nyonso na moto.
5 Or let them take hold of my protection, let them make peace with me—yes, let them make peace with me." Kasi tika ete bakimela epai na Ngai lokola ndako batonga makasi, tika ete baluka kosala kimia elongo na Ngai ; solo, tika ete baluka kosala kimia elongo na Ngai ! »
6 In days to come Jacob will take root, Israel will blossom and bud and fill the whole world with fruit. Na mikolo oyo ekoya, Jakobi akozwa misisa, Isalaele akobimisa bafololo mpe mito, mpe akotondisa mokili na bambuma na ye.
7 Has he struck them down as he struck those who struck them? Or were they slain as their slayers were slain? Boni, Yawe abetaki ye te ndenge abetaki bato oyo babetaki ye ? Boni, abomaki ye te ndenge abomaki bato oyo babomaki ye ?
8 By driving her away, by sending her into exile, you contended with her; he removed her with his fierce blast when the east wind blew. Apesaki bango etumbu na kotelemela mpe na kobengana. Alongolaki bango na mopepe na Ye ya makasi, kaka na mokolo moko ya mopepe na Ye ya este.
9 So by this the guilt of Jacob will be atoned for, and this will be the full fruit of taking away his sin: when he makes all the altar stones like crushed chalk, no Asherah poles or incense altars will be left standing. Ezali na nzela wana nde mabe ya Jakobi ekolimbisama, mpe tala oyo ekozala mbuma ya bolimbisi masumu na ye : akobuka mabanga nyonso ya etumbelo mpo ete ekoma lokola mabanga ya pembe oyo babuka-buka ; mpe likonzi moko te ya Ashera to etumbelo ya malasi ya ansa ekotikala.
10 The fortified city stands alone, a homestead deserted and abandoned like the wilderness; there the calf grazes, there it lies down and strips its branches bare. Engumba ya makasi etikali pamba lokola lopango oyo basundola, babosana mpe etikala pamba lokola esobe ; mwana ngombe ya mobali ekokoma kolia mpe kolala kuna, bongo ekolia ata makasa ya bitape na yango.
11 When its branches dry out, they are broken off; women come and light fires with them. For this is a people without understanding; therefore their Maker shows them no compassion, and the One who formed them shows them no favor. Tango bitape na yango ekokawuka, ekobukana ; basi bakoya kotia yango na moto. Mpo ete bato oyo bazangi mayele, yango wana Mokeli na bango ayokelaki bango mawa te, Mozalisi na bango atalisaki bango ngolu na Ye te.
12 In that day our Father will thresh from the Euphrates to the Brook of Egypt, and you will be gathered one by one, children of Israel. Na tango wana, Yawe akotuta ble wuta na ngambo ya ebale (Efrate) kino na mayi oyo etiolaka makasi na bangomba ya Ejipito. Boye, bino bana ya Isalaele, Yawe akolokota bino moko na moko mpo na kosangisa bino.
13 On that day a great trumpet will sound, and those dying in the land of Assyria and those driven out to the land of Egypt will come and worship our Father on the holy mountain in Jerusalem. Na mokolo wana, bakobeta kelelo oyo ya monene ; bato oyo bazalaki kobebisama na mokili ya Asiri mpe oyo bakendeki na bowumbu na Ejipito bakoya mpe bakogumbamela Yawe na ngomba ya bule, na Yelusalemi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]