Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 28 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Woe to the proud crown of the drunkards of Ephraim, and to the fading flower of its glorious beauty, which sits on the head of the lush valley of those overcome with wine! Mawa na motole ya lolendo ya balangwi masanga ya Efrayimi mpe na fololo ekawuka, fololo oyo ezalaki kosala kitoko na yango, oyo ezalaki na moto ya lubwaku ya mabele kitoko, na engumba wana oyo balangwi masanga ya vino bazalaki kosalela lolendo !
2 Look, the Sovereign Father has one who is mighty and strong; like a hailstorm, a destroying tempest, like a storm of mighty, overflowing waters, he will hurl it down to the earth with his hand. Tala, Nkolo azali na elombe moko ya nguya mpe ya makasi, elombe yango azali lokola mvula ya mabanga mpe mopepe oyo ebebisaka ; azali lokola mvula ya makasi mpe mpela ya somo, akokweyisa na makasi engumba yango na mabele.
3 The proud crown of the drunkards of Ephraim will be trampled underfoot. Motole ya lolendo ya balangwi masanga ya Efrayimi ekonyatama na makolo ;
4 And the fading flower of its glorious beauty, which sits on the head of the lush valley, will be like a first-ripe fig before summer—whoever sees it swallows it as soon as it is in his hand. mpe fololo ekawuka oyo ezalaki kosala kitoko na yango na moto ya lubwaku ya kitoko ekokoma lokola mbuma ya figi ya liboso oyo ebotaka liboso ya eleko ya molunge : soki kaka moto amoni yango, akobuka mpe akomela yango mbala moko.
5 In that day the Father of heaven's armies will be a crown of glory and a diadem of beauty to the remnant of his people, Na mokolo wana, Yawe, Mokonzi ya mampinga, akozala motole ya lokumu mpe elembo ya kitoko mpo na ndambo ya bato na Ye ;
6 and a spirit of justice to the one who sits in judgment, and strength to those who turn back the battle at the gate. akopesa makanisi ya bosembo epai na ye oyo avandi mpo na kosambisa, mpe akozala mopesi makasi epai na bato oyo babenganaka na bitumba kino na ekuke.
7 These also reel with wine and stagger with strong drink: the priest and the prophet reel with strong drink, they are confused by wine, they stagger with strong drink, they reel when they see visions, they stumble in giving their rulings. Mpe lisusu, Banganga-Nzambe mpe basakoli bapengwi mpo na masanga ya vino ; masanga makasi ekomi kotengisa-tengisa bango ; masanga epengwisi bango, vino ebungisi bango, masanga makasi ekomi kotengisa-tengisa bango ; bakomi kobunga na bimoniseli na bango, bakomi kokata makambo na ndenge esengeli te.
8 For all the tables are covered with filthy vomit, with no clean place left. Bamesa nyonso etondi na bisanza ya nkele ; esika ya malamu etikali lisusu te.
9 "Whom will he teach knowledge, and to whom will he explain the message? Those just weaned from milk, those just taken from the breast? Azali nani, ye oyo azali koluka koteya ? Alingi kolimbola bimoniseli na ye epai ya banani ? Epai ya bana oyo balongoli na mabele, bana oyo bakati bango mabele ?
10 For it is order on order, order on order, line on line, line on line, a little here, a little there." Pamba te ezali nde « Bilobaloba ya pamba. »
11 Indeed, by people of strange lips and a foreign tongue he will speak to this people, Solo, Nzambe akoloba na bato oyo na nzela ya likukuma mpe na lokota ya bapaya ;
12 to whom he had said, "This is the rest; give rest to the weary; this is the resting place"—yet they were not willing to listen. alobaki na bango : « Tala esika ya kopema ! Tika ete moto oyo alembi apema ; » mpe : « Tala esika ya kimia, » kasi balingaki koyoka te.
13 So the word of our Father will be to them rule on rule, rule on rule, line on line, line on line, a little here, a little there, that they may go and stumble backward, and be broken, and snared, and captured. Bongo Liloba na Yawe ekokoma mpo na bango se bilobaloba ya pamba mpo ete, wana ezali bango kotambola, bakweya na ndenge ya sima, babukana mikongo, bazwama na mitambo mpe bakangama.
14 Therefore hear the word of our Father, you scoffers who rule this people in Jerusalem! Yango wana, bino batioli oyo bozali kokamba bato ya Yelusalemi, boyoka Liloba na Yawe !
15 Because you have said, "We have struck a covenant with death, and with the grave we have made an agreement; when the overwhelming flood passes through, it will not reach us, for we have made lies our refuge and hidden ourselves in falsehood", Bozali koloba : « Tosalaki boyokani elongo na kufa, boyokani elongo na mboka ya bakufi. Tango likama ya makasi ekoya, ekozwa biso te ; pamba te tokomisi lokuta ekimelo na biso mpe makambo ya lokuta ebombamelo na biso. »
16 therefore this is what the Sovereign Father says: "Look, I am laying in Zion a stone, a tested stone, a precious cornerstone, a sure foundation: the one who believes will not panic. Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Tala, nasili kotia libanga moko kati na Siona, libanga ya makasi, libanga ya songe ya ndako, libanga ya motuya mpo na moboko ya malonga ; moto oyo akozwa yango lokola eyekamelo na ye akotikala kobanga te.
17 And I will make justice the measuring line and righteousness the plumb line; hail will sweep away the refuge of lies, and waters will flood the hiding place. Nakotia bosembo lokola singa oyo bamekelaka molayi mpe boyengebene lokola singa ya mbodi ; mvula ya mabanga ekokombola ekimelo na bino ya lokuta, mpe mayi ekozindisa ebombamelo na bino.
18 Then your covenant with death will be wiped out, and your agreement with the grave will not stand; when the overwhelming flood passes through, you will be trampled down by it. Boyokani na bino elongo na kufa ekobebisama, boyokani oyo bosalaki elongo na mokili ya bakufi ekolonga te ; tango likama ya makasi ekokomela bino, ekobebisa bino penza nye.
19 As often as it passes through, it will seize you; for morning by morning it will pass through, by day and by night, and it will be sheer terror just to take in the news." Tango makambo nyonso oyo ekoya, ekobebisa bino ; pamba te ekoleka na tongo nyonso, na moyi nyonso mpe na butu nyonso. » Bososoli ya emoniseli oyo ekomema nde somo makasi.
20 For the bed is too short to stretch out on, and the blanket too narrow to wrap up in. Boye, ndenge balobaka na lisese : « Mbeto eleki mokuse mpo na kominyolusa, mpe bulangeti eleki moke mpo na komizipa nzoto ; »
21 For our Father will rise up as he did at Mount Perazim, he will be stirred as in the Valley of Gibeon, to do his work—strange is his work!—and to perform his task—foreign is his task! Yawe akotelema ndenge atelemaki na ngomba Perasimi, akotomboka ndenge atombokaki na lubwaku ya Gabaoni mpo na kosala mosala na Ye, mosala na Ye oyo ya kokamwa, mpe kokokisa mosala na Ye, mosala ya kokamwa oyo esalema nanu te.
22 Now therefore do not scoff, or your chains will grow tighter; for I have heard a decree of destruction from the Father of heaven's armies, against the whole land. Sik’oyo, botika maseki na bino, noki te minyololo na bino ekokoma lisusu makasi ; pamba te Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayebisaki ngai ete asili kozwa mokano ya kobebisa mokili mobimba.
23 Listen and hear my voice; pay attention and hear my words. Bofungola matoyi mpe boyoka mongongo na ngai, bosala keba mpe boyoka malamu makambo oyo nazali koloba !
24 Does the farmer plow all day to plant? Does he keep breaking up and tilling his ground? Boni, ezali tango nyonso nde mosali bilanga abalolaka mabele, akataka mikala mpe atimolaka mabele mpo na kolona ?
25 When he has leveled its surface, does he not scatter dill and sow cumin, and plant wheat in rows and barley in its plot, and spelt along the border? Sima na kobongisa esika ya kolona, boni, akoki te kolona nkona ya nijeli to kobwaka kumini ? Boni, akoki te kolona ble na esika oyo ebongi, mpe orje, na esika oyo ekoki ; mpe epotele, na bandelo ya elanga na ye ?
26 His Father instructs him rightly; his Father teaches him. Nzambe na ye ateyaka ye mpe alakisaka ye nzela oyo asengeli kolanda.
27 Dill is not threshed with a sledge, nor is a cart wheel rolled over cumin; but dill is beaten out with a stick, and cumin with a rod. Pamba te basalelaka te mabaya ya kilo, oyo mpunda ebendaka mpo na kobuka nijeli to bapine ya shar mpo na kobuka kumini ; basalelaka nde lingenda mpo na kobuka nijeli mpe kumini.
28 Grain for bread must be crushed, but he does not thresh it forever; he drives his cart wheel and horses over it, yet does not crush it to powder. Esengeli konika ble mpo na kosala mapa ; nzokande babetaka yango tango nyonso te, balekisaka nde bapine ya shar na likolo na yango mpe mabaya ya kilo, oyo mpunda ebendaka, kasi banikaka yango te.
29 This too comes from the Father of heaven's armies; he is wonderful in counsel and magnificent in wisdom. Nyonso wana mpe ewuti epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo mabongisi na Ye ezali ya kitoko makasi mpe bwanya na Ye ezali monene.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]