Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 29 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Woe to Ariel, Ariel, the city where David encamped! Add year to year; let the feasts keep coming round. Mawa na yo, Arieli, Arieli, engumba oyo Davidi azalaki kovanda ! Bobakisa mibu na mibu mpe botika ete bafeti na bino ekoba kolandana ndenge ezalaka.
2 Yet I will press hard on Ariel, and there will be mourning and lament; she will become to me like an altar hearth. Kasi nakonyokola Arieli ; ekokoma na mawa mpe na kolela ; ekokoma na miso na Ngai lokola etumbelo.
3 I will encamp against you all around; I will besiege you with a wall and raise up siegeworks against you. Nakozingela yo mpo na kobundisa yo, nakozingela yo na mir ya molayi mpe nakotiela yo mampinga ya nguya mpo na kotelemela yo.
4 You will be brought low; from the ground you will speak, and your words will be muffled in the dust. Your voice will come from the earth like a ghost's, and your speech will whisper out of the dust. Okokitisama solo na se, okoloba wuta na mabele, mpe maloba na yo ekobanda kobima na mongongo ya se wuta na putulu. Mongongo na yo ekokoma kobima wuta na se ya mabele lokola mongongo ya moto oyo asololaka na milimo ya bakufi ; mpe wuta na putulu, maloba na yo ekobima na mongongo ya se.
5 But the horde of your enemies will become like fine dust, and the horde of the ruthless like blowing chaff. And it will happen in an instant, suddenly. Bongo ebele ya banguna na yo bakokoma lokola putulu, mpe ebele ya banyokoli na yo bakokoma lokola matiti ekawuka oyo ezali kopumbwa na mopepe ; ekosalema bongo na pwasa.
6 You will be visited by the Father of heaven's armies with thunder and earthquake and a great roar, with whirlwind and storm and the flame of a devouring fire. Yawe, Mokonzi ya mampinga, akoya epai na yo na nzela ya bakake, ya koningana ya mabele mpe ya lokito monene, ya mopepe makasi mpe ya mvula ya moto oyo etumbaka.
7 And the horde of all the nations that wage war against Ariel, all who fight against her and her stronghold and press hard on her, will be like a dream, a vision of the night. Ekozala lokola ndoto to emoniseli ya butu mpo na ebele ya bikolo oyo bakobundisa Arieli, oyo bakotelemela ye elongo na bandako na ye ya makasi mpe bakozingela ye.
8 It will be as when a hungry man dreams he is eating, and wakes with his hunger unsatisfied; or as when a thirsty man dreams he is drinking, and wakes faint, his thirst unquenched. So will it be with the horde of all the nations that fight against Mount Zion. Ekozala lokola moto oyo azali na nzala, bongo azali kolota ndoto ete azali kolia, kasi tango alamuki, libumu na ye ezali kaka pamba lokola moto oyo azali na posa ya mayi, bongo azali kolota ndoto ete azali komela mayi, kasi tango alamuki na nzoto ya kolemba, posa na ye ya mayi esili kaka te. Ekozala nde bongo mpo na mampinga ya bikolo nyonso oyo bakobundisa ngomba Siona.
9 Be dumbfounded and stunned; blind yourselves and be blind! They are drunk, but not with wine; they stagger, but not from strong drink. Bozanga maloba mpe bokamwa ! Bomiboma miso mpe botikala bakufi miso ! Bolangwa masanga, kasi na vino te ! Botenga-tenga, kasi na masanga ya makasi te !
10 For our Father has poured out on you a spirit of deep sleep; he has shut your eyes, the prophets, and covered your heads, the seers. Yawe asopeli bino molimo ya pongi makasi ; akangi bino miso, bino basakoli, azipi bino mito, bino bato oyo bomonaka makambo.
11 The whole vision is to you like words of a sealed scroll. When they give it to one who can read, saying, "Read this, please," he says, "I can't; it's sealed." Mpo na bino, emoniseli nyonso oyo ekomi lokola maloba ya buku oyo bakanga mpe bapesi epai ya moto oyo ayebi kotanga, bongo balobi na ye : « Nabondeli yo, tanga nanu buku oyo, » kasi azongisi : « Nakokoka te, pamba te buku ekangama. »
12 When the scroll is given to one who cannot read, saying, "Read this," he says, "I can't read." To bapesi yango epai ya moto oyo ayebi kotanga te, mpe balobi na ye : « Nabondeli yo, tanga nanu buku oyo, » kasi azongisi : « Nayebi kotanga te. »
13 The Sovereign Father said: "Because this people comes near with its mouth and honors me with its lips, but its heart is far from me; their fear of me is a rule taught by men, Nkolo alobi : « Bato oyo bapusanaka pene na Ngai kaka na monoko, bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezalaka mosika na Ngai ; mpe botosi oyo bazalaka na yango epai na Ngai ezali kaka mobeko ya bomoto, oyo bateyaki bango.
14 therefore, look, I will again do wonders with this people, wonder upon wonder; the wisdom of their wise men will perish, and the understanding of their discerning ones will vanish." Yango wana, nakokoba kokamwisa bato oyo ; ekozala nde bikamwa likolo ya bikamwa kino bwanya ya bato ya bwanya ekobunga, mpe mayele ya bato ya mayele ekosuka. »
15 Woe to those who go deep to hide their plans from our Father, whose deeds are done in the dark, who say, "Who sees us? Who knows us?" Mawa na bato oyo basalaka makambo na nkuku mpo na kobombela Yawe mabongisi na bango ; bato oyo basalaka misala na bango na molili mpe balobaka : « Nani akoki komona biso ? Nani akoyeba ? »
16 How you twist everything around! Should the potter be treated like his clay—as if the thing made could tell its maker, "He didn't make me," or the thing shaped could tell the one who formed it, "He knows nothing"? Bozali nde kobongola makambo ! Ezali lokola bozali kozwa mosali mbeki ndenge moko na mabele oyo basalelaka mbeki. Boni, eloko ekoki solo koloba na mosali na yango : « Asalaki ngai te ? » Mbeki ekoki solo koloba na mosali mbeki : « Ozali mayele te ? »
17 Is it not just a little while before Lebanon will be turned into a fruitful field, and the fruitful field counted as a forest? Etikali kaka tango moke, Libani ekobongwana elanga ya kitoko, mpe elanga ya kitoko ekomonana lokola zamba.
18 On that day the deaf will hear the words of a scroll, and out of gloom and darkness the eyes of the blind will see. Na mokolo wana, bakufi matoyi bakoyoka maloba ya buku, mpe bakufi miso bakomona tango bakobima na butu mpe na molili.
19 The humble will find fresh joy in our Father, and the poor among mankind will rejoice in the Holy One of Israel, our Father. Bato bakelela bakosepela makasi kati na Yawe, babola bakozala na esengo kati na Mosantu ya Isalaele.
20 For the ruthless will be no more and the scoffer will be finished; all who are bent on evil will be cut off, Banyokoli bakotikala lisusu te, batioli bakozala lisusu te mpe bato oyo balukaka pasi ya baninga bakokufa :
21 those who with a word make a man out to be a sinner, who lay a snare for the one who defends justice at the gate, and with empty arguments turn aside the one in the right. elongo na bato oyo bakweyisaka bato kati na kosamba mpo na liloba moko, elongo na bato oyo batielaka basambisi mitambo mpe bapesaka matatoli ya lokuta, na kosambisama, mpo na kokweyisa moto ya sembo.
22 Therefore this is what our Father says, who redeemed Abraham, concerning the house of Jacob: "No longer will Jacob be ashamed, no longer will his face grow pale. Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe, Mosikoli ya Abrayami, alobi na libota ya Jakobi : « Jakobi akozala lisusu na soni te, elongi na ye ekozala lisusu ya kokawuka te.
23 For when he sees his children, the work of my hands among them, they will keep my name holy; they will keep holy the Holy One of Jacob and stand in awe of our Father. Tango akomona kati na bango bana na ye, mosala ya maboko na Ngai, bakopesa lokumu na bosantu ya Kombo na Ngai mpe bakososola bosantu ya Mosantu ya Jakobi. Boye, bakozala na somo ya Nzambe ya Isalaele.
24 Those who wander in spirit will come to understanding, and those who grumble will accept instruction." Bato oyo bazali koyengayenga na molimo bakozwa mayele, mpe bato ya mito makasi bakondima koyekola mateya ya sika. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]