Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 30 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "Woe to the rebellious children," declares our Father, "who carry out a plan, but not mine, and who forge an alliance, but not of my Spirit, heaping sin upon sin; « Mawa na bana ya mito makasi, » elobi Yawe : « basalaka mabongisi oyo ewutaka epai na Ngai te mpe basalaka boyokani oyo ewuti na Molimo na Ngai te, mpo ete babakisa lisumu likolo ya lisumu ;
2 who set out to go down to Egypt, without asking for my counsel, to take refuge in the protection of Pharaoh and to seek shelter in the shadow of Egypt. mawa na bato oyo bakendaka na Ejipito, na kozanga kotuna toli na Ngai, mpo na koluka lisungi ya kobatelama epai ya Faraon mpe koluka ebombamelo na se ya elili ya Ejipito !
3 Therefore the protection of Pharaoh will become your shame, and the shelter in the shadow of Egypt your humiliation. Kasi ndako batonga makasi ya Faraon epai wapi bokokimela ekokomela bino soni, mpe elili ya Ejipito ekokoma likambo ya soni makasi.
4 For though Pharaoh's officials are at Zoan and his envoys reach Hanes, Ata bakalaka na bango bazali na Tsoani mpe bantoma na bango bakomi na Anesi,
5 everyone comes to shame through a people that cannot help them, that brings no aid and no profit, but only shame and disgrace." bango nyonso bakoyoka kaka soni na miso ya bato oyo bakosunga bango ata moke te, oyo bakopesa bango ata lisungi to litomba moko te, kasi bobele soni mpe kotiolama. »
6 "An oracle concerning the beasts of the Negev. Through a land of trouble and anguish, where the lioness and the lion prowl, and the viper and the darting serpent lurk, they carry their riches on the backs of donkeys and their treasures on the humps of camels, to a people who cannot help them. Maloba na Yawe na tina na banyama ya Negevi : Kati na mokili ya pasi mpe ya kobanga, mokili ya bankosi ya mibali mpe ya bankosi ya basi, ya etupa mpe ya banyoka oyo epumbwaka, bantoma bazali komema bozwi na bango na mikongo ya ba-ane, bomengo na bango na mikongo ya bashamo, epai ya ekolo oyo ekotikala kopesa bango ata litomba moko te :
7 Egypt's help is worthless and empty; therefore I call her "the Harmless Monster." ekolo ya Ejipito oyo lisungi na yango ekozala penza na tina moko te ; yango wana, napesi yango kombo « Rahavi. »
8 "Now go, write it before them on a tablet and inscribe it in a book, that it may be for the time to come, as a witness forever. Kende sik’oyo, koma makambo oyo na etando ya libanga liboso na bango, koma yango na buku moko mpo ete na mikolo oyo ekoya, ezala lokola litatoli ya libela na libela.
9 For they are a rebellious people, deceitful children, children unwilling to hear the instruction of our Father. Bato oyo bazali libota ya batomboki, bazali bana ya lokuta, bana oyo balingaka te koyoka mateya ya Yawe ;
10 They say to the seers, "Do not see," and to the prophets, "Do not prophesy to us what is right; tell us pleasant things, prophesy illusions. balobaka na bato oyo bamonaka makambo : « Bomona te, » mpe na basakoli : « Bosakolela biso bimoniseli ya solo te, boyebisa biso makambo oyo esepelisaka biso, bosakolela biso makambo ya lokuta.
11 Leave the way, turn aside from the path, let us hear no more about the Holy One of Israel. Botika nzela wana, bobima penza na nzela wana mpe botika kotungisa biso mpo na Mosantu ya Isalaele ! »
12 Therefore this is what the Holy One of Israel, our Father, says: Because you reject this word and trust in oppression and deceit and lean on them, Mpo na yango, tala liloba oyo Mosantu ya Isalaele alobi : « Lokola bobwaki maloba oyo, lokola bokangami na monyokoli mpe na mokosi oyo bozali kotiela motema,
13 therefore this guilt will be to you like a breach about to fall, a bulge in a high wall, whose collapse comes suddenly, in an instant. lisumu oyo ekokoma mpo na bino lokola mir ya molayi oyo esala nzela mpe lidusu, bongo ebukani mpe ekweyi mbala moko na mbalakata.
14 Its breaking is like the smashing of a potter's jar, shattered so ruthlessly that among its fragments not a shard is found to scoop fire from the hearth or to dip water from the cistern. Ekobukana ndambo-ndambo lokola mbeki ya mosali mbeki, ekopanzana penza nye na mawa te ; bongo ata eteni moko te ekozwama kati na yango mpo na kozwela likala ya moto na mbabola to mpo na kotokela mayi na libulu. »
15 For this is what the Sovereign Father, the Holy One of Israel, said: In returning and rest you will be saved; in quietness and trust will be your strength. But you were unwilling, Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe, Mosantu ya Isalaele, alobi : « Ekozala kati na kobongola mitema mpe kimia nde bokozwa lobiko na bino ; ekozala na nzela ya kimia mpe ya elikya nde bokozwa makasi na bino ; kasi bino, bolingi bongo te.
16 and you said, "No! We will flee on horses"—therefore you will flee; and, "We will ride on swift steeds"—therefore your pursuers will be swift. Bolobaki : ‹ Te, tokopota mbangu likolo ya mpunda ; › solo, bokokima nde ! Bolobaki : ‹ Tokopota mbangu na mpunda oyo eleki mbangu ; › solo, bato oyo bakolanda bino bakoleka bino na mbangu !
17 1,000 will flee at the threat of one; at the threat of five you will flee, till you are left like a flagstaff on a mountaintop, like a signal on a hill. Bato nkoto moko bakokima na mangungu ya moto moko kaka ; mpe na mangungu ya bato mitano, bino nyonso bokokima kino bokotikala lokola nzete ya bendele na songe ya ngomba, mpe lokola bendele na likolo ya ngomba moke. »
18 Therefore our Father waits to be gracious to you, and therefore he rises to show you mercy. For he is a Father of justice; blessed are all who wait for him. Nzokande, Yawe alingi kosalela bino ngolu, atelemi likolo mpo na koyokela bino mawa. Pamba te Yawe azali Nzambe ya sembo : Esengo na bato nyonso oyo batalelaka Ye !
19 A people will live in Zion, in Jerusalem; you will weep no more. At the sound of your cry he will surely be gracious; when he hears, he answers you. Oh bato ya Siona, bino oyo bavandaka na Yelusalemi, bokolela lisusu te. Tango bokobelela Ye, akoyokela bino mawa ; tango kaka akoyoka, akoyanola bino.
20 Though our Father gives you the bread of adversity and water of suffering, your Teacher will no longer hide, but your eyes will see your Teacher. Nkolo akopesa bino lipa na tango ya pasi, mpe mayi na tango ya minyoko ; moto oyo akoteya bino akotikala lisusu ya kobombama te, kasi miso na bino moko ekomona ye.
21 Your ears will hear a word behind you: "This is the way; walk in it," when you turn right or left. Ata bokeyi na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, matoyi na bino ekoyoka sima na bino liloba oyo : « Tala nzela yango oyo ! »
22 Then you will desecrate your silver-plated carved images and gold-plated metal idols. You will throw them away like a menstrual cloth and say, "Get out!" Bokotala lokola mbindo bikeko oyo balatisa palata mpe bikeko ya bibende oyo balatisa wolo ; bokobwaka yango mosika ndenge babwakaka elamba ya makila ya mwasi oyo azali komona sanza, mpe bokoloba na yango : « Longwa awa ! »
23 He will send rain for the seed you sow, and bread from the land's produce, rich and plentiful. That day your livestock will graze in broad pastures. Boye, akotindela yo lisusu mvula mpo na milona oyo okolona na mabele, mpe bilei oyo mabele ekobota na mokili ekozala ebele mpe elengi. Na mokolo wana, bibwele na bino ekolia na bazamba minene.
24 The oxen and donkeys that work the ground will eat seasoned fodder, winnowed with shovel and fork. Bangombe mpe ba-ane oyo ebalolaka mabele ya bilanga ekolia matiti ya mungwa oyo baponi na pawu mpe na kiyungulu.
25 On every high mountain and hill will run streams of water, on the day of the great slaughter when the towers fall. Na mokolo ya kosambisa, tango bandako milayi ekobukana, bibale ya mayi ekotiola na bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse.
26 The moon's light will be like the sun's, and the sun's light seven times brighter, like the light of seven days, when our Father binds up his people's brokenness and heals the wound he inflicted. Pole ya sanza ekongenga lokola pole ya moyi, mpe pole ya moyi ekongenga makasi koleka mbala sambo lokola pole ya mikolo sambo, na mokolo oyo Yawe akotia kisi na pota ya bato na Ye mpe akobikisa yango.
27 Look—the name of our Father comes from afar, burning with his anger, in thick rising smoke; his lips are full of fury, and his tongue is like a devouring fire. Tala, wuta mosika, Kombo ya Yawe ezali koya ; kanda na Ye ezali kopela lokola moto elongo na lipata ya molinga ya moto makasi ; bibebu na Ye etondi na kanda, mpe lolemo na Ye ezali lokola moto oyo ebomaka.
28 His breath is like an overflowing torrent that reaches up to the neck, to sift the nations in the sieve of destruction and to put a bridle on the jaws of the peoples that leads them astray. Pema na Ye ezali lokola ebale oyo etondi makasi, ebale oyo etondi kino na kingo. Akoyungola bikolo na kiyungulu ya pasi, akotia na mbanga ya bato ebende oyo batiaka na minoko ya bampunda mpo ete emema bango na libunga.
29 You will have a song, as in the night when a holy feast is kept, and gladness of heart, as when one marches to the sound of the flute to go to the mountain of our Father, to the Rock of Israel. Mpo na bino, bokoyemba banzembo lokola na butu oyo basalaka bafeti ya bule ; mitema na bino ekotonda na esengo lokola bato oyo bazali kobeta flite mpo na kokende na Ngomba ya Yawe, na Libanga ya Isalaele.
30 And our Father will make his majestic voice heard and reveal the descending blow of his arm, in furious anger and a flame of devouring fire, with cloudburst and storm and hailstones. Yawe akosala ete bato bayoka mongongo na Ye ya nkembo mpe akomonisa bango nguya ya loboko na Ye kati na kanda makasi na Ye, kati na moto oyo ebomaka, kati na mvula makasi ya bakake mpe ya mabanga.
31 For at the voice of our Father the Assyrians will be shattered, when he strikes them with his rod. Mongongo ya Yawe ekokweyisa Asiri, mpe akobeta bango na lingenda na Ye ya bokonzi.
32 And every stroke of the punishing rod that our Father lays on them will come with tambourines and lyres, as he fights against them with the blows of his brandished arm. Mbala nyonso oyo Yawe akobeta bango fimbu na Ye ya kosambisa, ekolandisama na mindule ya bambunda mike mpe ya mandanda, ndenge moko mpe tango akoningisa loboko na Ye mpo na kobundisa bango.
33 For a burning place has long been prepared; indeed, it is made ready for the king, its pyre deep and wide, with fire and wood in abundance; the breath of our Father, like a stream of sulfur, sets it ablaze. Babongisaki wuta kala Tofeti, babongisaki yango nde mpo na mokonzi ; basalaki libulu na yango ya moto mozindo mpe monene mpo ete ebimisa moto makasi mpe ekota bakoni ebele. Pema na Yawe, oyo ezali lokola ebale ya sofolo nde ekopelisa yango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]