Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 31 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Woe to those who go down to Egypt for help, who rely on horses, who trust in chariots because they are many and in horsemen because they are very strong—but they do not look to the Holy One of Israel, our Father, nor seek him. Mawa na bato oyo bazali kokende na Ejipito mpo na koluka lisungi, oyo bazali kotia mitema na bampunda, oyo bazali kotia elikya na bashar mpo ete ezali ebele, mpe na nguya ya basoda oyo batambolisaka yango, kasi batalelaka Mosantu ya Isalaele te mpe balukaka lisungi epai na Yawe te !
2 Yet he too is wise and brings disaster; he does not take back his words. He will rise against the house of the evildoers and against the help of those who do wrong. Nzokande, Ye mpe azali na bwanya mpe akoki koyeisa pasi ; abongolaka maloba na Ye te. Atelemelaka ndako ya bato mabe mpe bato oyo basungaka bango.
3 The Egyptians are men and not God; their horses are flesh and not spirit. When our Father stretches out his hand, the helper will stumble and the one helped will fall, and together they will all come to an end. Bato ya Ejipito bazali kaka bato, kasi bazali Nzambe te, bampunda na bango ezali kaka mosuni, kasi ezali molimo te. Tango Yawe akosembola loboko na Ye, ye oyo asungaka akobeta libaku, mpe ye oyo bazali kosunga akokweya ; bongo, bango mibale bakobebisama.
4 For this is what our Father said to me: As a lion or a young lion growls over its prey—and though a band of shepherds is called out against it, it is not terrified by their shouting or intimidated by their noise—so the Father of heaven's armies will come down to fight on Mount Zion and on its height. Tala liloba oyo Yawe alobi na ngai : « Ndenge nkosi to mwana nkosi egangaka liboso ya mosuni na yango, ata lisanga monene ya babateli bibwele basangani mpo na kotelemela yango, ezalaka na somo ya makelele na bango te mpe ezongaka sima te na mangungu na bango, ndenge wana mpe Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokita na ngomba Siona mpe na ngomba na yango ya moke mpo na kobunda.
5 Like birds hovering overhead, so the Father of heaven's armies will shield Jerusalem; he will shield and deliver it, he will pass over it and rescue it. Ndenge ndeke efungolaka mapapu na yango, ndenge wana mpe Yawe, Mokonzi ya mampinga, akobatela Yelusalemi, akobatela mpe akokangola, akobikisa yango na likama mpe akosunga yango. »
6 Return to him from whom the people of Israel have so deeply turned away. Oh bana ya Isalaele, bozonga epai na Ye oyo botombokeli makasi !
7 For in that day everyone will reject his idols of silver and his idols of gold, which your own hands have sinfully made for you. Na mokolo wana, moko na moko kati na bino akobwaka banzambe na ye ya bikeko ya palata mpe ya wolo oyo bosalaki na maboko na bino ya masumu.
8 Then Assyria will fall by a sword that is not man's, and a sword not of mankind will devour him. He will flee before the sword, and his young men will be put to forced labor. « Mokili ya Asiri ekokweyisama na mopanga ya moto ya mokili oyo te, ekobebisama na mopanga ya moto te. Bato ya Asiri bakokima liboso ya mopanga, mpe basoda na bango ya bilenge bakokoma kosala misala ya makasi.
9 His stronghold will crumble in terror, and his princes will flee in panic from the battle standard, declares our Father, whose fire is in Zion and whose furnace is in Jerusalem. Libanga na bango ya makasi ekolimwa na somo ; mpe bakambi na bango bakolenga na somo na komona bendele ya etumba, » elobi Yawe oyo moto na Ye ezali kati na Siona mpe fulu ya moto na Ye ezali kati na Yelusalemi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]