Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 32 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Look, a king will reign in righteousness, and rulers will govern with justice. Tala, mokonzi moko akokonza na bosembo, mpe bakambi na ye bakokamba na solo.
2 Each will be like a shelter from the wind, a refuge from the storm, like streams of water in a dry place, like the shadow of a great rock in a weary land. Moko na moko kati na bango akozala lokola ekimelo liboso ya mopepe mpe ebombamelo liboso ya mvula ya makasi ; akozala lokola miluka ya mayi kati na esobe, lokola elili ya libanga monene kati na mokili ya mabele ekawuka.
3 Then the eyes of those who see will not be closed, and the ears of those who hear will listen. Miso ya bato oyo bamonaka ekozipama lisusu te, mpe matoyi ya bato oyo bayokaka ekoyoka malamu.
4 The hasty mind will understand knowledge, and the stammering tongue will speak readily and clearly. Mito ya bato oyo bazangi mayele ekozwa boyebi mpe bososoli, bongo lolemo ya bato ya likukuma ekokoma koloba noki-noki mpe malamu.
5 No longer will the fool be called noble, nor the scoundrel said to be honorable. Bakobenga lisusu te moto ya lokumu zoba, mpe bakobenga lisusu te moto oyo akabaka moyimi ;
6 For the fool speaks foolishness, and his heart plots evil: to practice ungodliness, to speak lies about our Father, to leave the hungry with nothing and to deprive the thirsty of drink. pamba te zoba alobaka kaka na bozoba, motema na ye ekanisaka kaka makambo mabe : atiolaka nzela ya bule, alobaka maloba ya nkele mpo na kotelemela Yawe, atikaka libumu ya moto oyo azali na nzala pamba mpe apesaka te mayi na moto oyo azali na yango posa.
7 The scoundrel's weapons are evil; he devises wicked schemes to destroy the poor with lying words, even when the needy pleads his case justly. Misala ya moyimi ezalaka mabe, abongisaka kaka miango ya mabe mpo na kopengwisa mobola na maloba ya lokuta na tango oyo mobola azali na mbeba te.
8 But the noble person plans noble things, and by noble things he stands. Kasi moto ya lokumu asalaka mabongisi ya lokumu mpe alendaka mpo na misala na ye ya lokumu.
9 You complacent women, rise up and hear my voice; you carefree daughters, listen to what I say. Bino basi oyo bovandaka na kimia, botelema mpe boyoka ngai ; bino bilenge basi oyo bomitungisaka na eloko moko te, boyoka makambo oyo nalingi koloba :
10 "In little more than a year you will tremble, you carefree women, for the grape harvest will fail, and there will be no gathering. Etikali kaka mikolo moke kati na mobu, bino basi oyo bozali na kimia, bokoningana ; pamba te tango ya kosangisa milona ya vino esili koleka, mpe tango ya kobuka bambuma ekozala lisusu te.
11 Tremble, you complacent ones; shudder, you carefree ones! Strip yourselves bare and put mourning clothes around your waists. Bolenga, bino basi oyo bovandaka na kimia ; boningana, bino bilenge basi oyo bomitungisaka na eloko moko te ! Bolongola bilamba na bino mpe botikala bolumbu, bolata basaki na loketo na bino !
12 Beat your breasts for the pleasant fields, for the fruitful vine, Bolela na kobeta tolo mpo na bilanga ya kitoko, mpo na bilanga ya vino oyo ebotaka malamu,
13 for the land of my people, where thorns and briers grow up; indeed, for all the houses of joy in the jubilant city. mpe mpo na mokili ya bato na ngai ; pamba te mokili oyo eboti basende mpe banzube. Solo, bolela mpo na bandako nyonso ya kitoko mpe mpo na engumba oyo etonda na bisengo,
14 For the palace will be abandoned, the bustling city deserted; the hill and the watchtower will become bare places forever, a delight for wild donkeys, a pasture for flocks, pamba te basundoli ndako ya mokonzi ; engumba oyo etonda makelele etikali lisusu na bato te, Ofeli mpe ndako molayi ya bakengeli ekomi mpo na libela mabulu ya mabanga mpo na bisengo ya ba-ane ya zamba, mpe ekokoma etando epai wapi bibwele ekobanda kolia matiti,
15 until the Spirit of our Father is poured out on us from on high, and the wilderness becomes a fruitful field, and the fruitful field is regarded as a forest. kino tango Molimo akosopanela biso wuta na likolo, bongo esobe ekokoma bilanga oyo ebotaka kitoko ; mpe bilanga oyo ebotaka kitoko ekomonana lokola zamba monene.
16 Then justice will dwell in the wilderness, and righteousness will remain in the fruitful field. Bosembo ekowumela kati na esobe, mpe solo ekozala kati na bilanga oyo ebotaka kitoko.
17 The work of righteousness will be peace, and the result of righteousness, quietness and security forever. Mbuma ya bosembo ekozala kimia : bosembo ekobota bopemi mpe bobatelami mpo na libela.
18 My people will dwell in a peaceful home, in secure dwellings, in undisturbed resting places. Bato na ngai bakovanda na bandako ya kimia, na bandako ya malonga mpe na bisika ya bopemi ya kimia.
19 Though hail flattens the forest and the city is completely leveled, Na nzela ya mvula ya mabanga oyo ekonoka, zamba mpe engumba ekokitisama na se penza.
20 blessed are you who sow beside all the waters, who let the ox and the donkey range freely." Esengo na bino oyo bozali kolona milona pene na mayi mpe kotinda ngombe mpe ane na bino konyata bisika nyonso.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]