Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 33 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Woe to you, destroyer, who have not been destroyed; you betrayer, whom no one has betrayed! When you have finished destroying, you will be destroyed; when you stop betraying, you will be betrayed. Oh mobebisi, mawa na yo, yo oyo nanu obebisama te ! Oh mofundi, mawa na yo, yo oyo nanu bafunda te ! Tango okosilisa kobebisa, yo mpe bakobebisa yo, tango okosilisa kofunda, yo mpe bakofunda yo.
2 Our Father, be gracious to us; we wait for you. Be our strength every morning, our salvation in the time of trouble. Oh Yawe, yokela biso mawa, tozali kotalela Yo ! Tongo nyonso, zala makasi na biso, zala lobiko na biso na tango ya pasi !
3 At the thunder of your voice the peoples flee; when you rise up, the nations scatter. Kaka na lokito ya mongongo na Yo, bato bakimaka ; soki otelemi, bikolo epalanganaka.
4 Your plunder is gathered as the locust gathers; like swarming locusts, people rush upon it. Oh bikolo, bakolokota bomengo na bino ya bitumba ndenge balokotaka mankoko ; bakosopanela yango na elulu ndenge mabanki esalaka.
5 Our Father is exalted, for he dwells on high; he has filled Zion with justice and righteousness. Yawe anetolami mpo ete avandaka na likolo, akotondisa Siona na bosembo mpe na solo.
6 He will be the sure foundation of your times, a wealth of salvation, wisdom, and knowledge; the fear of our Father is Zion's treasure. Mikolo ya bomoi na yo ekozala na kimia ; bwanya mpe boyebi ekozala bomengo ya lobiko na yo ; kotosa Yawe, yango nde bozwi na yo.
7 Look, their brave men cry out in the streets; the envoys of peace weep bitterly. Tala, basoda na bango ya mpiko bazali koganga makasi na balabala ; bamemi sango ya kimia, azali kolela makasi.
8 The highways lie deserted; travelers have vanished from the road. The covenant is broken, its cities are despised, no one is respected. Nzela ya minene esili kokawuka, ata moto moko te ya mobembo azali koleka. Mobebisi abuki boyokani, asambwisi bingumba mpe azali na botosi ya moto ata moko te.
9 The land mourns and wastes away; Lebanon is ashamed and withers; Sharon has become like the desert, and Bashan and Carmel shake off their leaves. Mokili ezali na matanga, esili kolemba nzoto, Libani esambwe na soni mpe elembi-lembi lokola fololo, Saroni ekomi lokola esobe mpe Bashani mpe Karimeli ekweyisi makasa na yango.
10 "Now I will arise,' says our Father, 'now I will be exalted, now I will lift myself up. « Sik’oyo nakotelema, » elobi Yawe. « Sik’oyo nakonetolama, sik’oyo nakotombolama.
11 You conceive chaff, you give birth to stubble; your breath is a fire that will consume you. Mabongisi ya mitema na bino ezali kaka lokola matiti ya kokawuka mpe soki ekokisami, ezalaka kaka lokola matiti ya kokawuka, pema na bino moko ekozikisa bino lokola moto.
12 The peoples will be burned to ash, like thorns cut down and set ablaze. Bato bakozika na libanga ya moto, ndenge nzube oyo bakata ezikaka na moto. »
13 Hear, you who are far off, what I have done; and you who are near, acknowledge my might.'" Bino bato oyo bozali mosika, boyoka makambo oyo nazali kosala, bino bato oyo bozali pene, bososola nguya na ngai !
14 The sinners in Zion are terrified; trembling grips the godless: "Who among us can live with the consuming fire? Who among us can live with everlasting flames?" Bato ya masumu bazali kolenga kati na Siona, somo ekangi bato oyo bayebi Nzambe te : « Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo ezikisaka ? Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo epelaka tango nyonso ? »
15 The one who walks righteously and speaks what is right, who rejects gain from extortion and keeps his hand from taking a bribe, who stops his ears to plots of bloodshed and shuts his eyes to evil, Moto oyo atambolaka na bosembo mpe alobaka solo, moto oyo abwakaka litomba oyo ezwami na nzela ya moyibi, moto oyo asembolaka maboko na ye te mpo na kozwa kanyaka, moto oyo akangaka matoyi na ye mpo na koboya koyoka masolo ya koboma bato, mpe oyo akangaka miso na ye mpo na koboya komona mabe.
16 this is the one who will dwell on the heights, whose refuge will be the mountain fortresses; his bread will be given to him, and his water will not fail. Moto wana akovanda na likolo : mabanga ya makasi ekozala ekimelo na ye. Akozanga te lipa ya kolia mpe mayi ya komela.
17 Your eyes will see the king in his beauty; they will see a land that stretches far away. Miso na yo ekomona Mokonzi na kitoko na Ye nyonso mpe ekomona ndenge mokili ekenda kino na mosika.
18 Your heart will ponder the former terror: "Where is the one who counted? Where is the one who weighed the tribute? Where is the one who counted the towers?" Motema na yo ekokanisa lisusu somo oyo ozalaki koyoka : « Wapi mokonzi oyo azwaka mpako ? Wapi moto oyo amekaka bakilo ? Wapi moto oyo atalaka bandako na biso ya milayi ? »
19 You will no longer see those insolent people, a people whose speech is too strange to follow, stammering in a tongue you cannot understand. Okomona lisusu bato ya lolendo te, bato oyo monoko na bango ezalaka pasi mpo na koyoka mpe maloba na bango, pasi mpo na kososola.
20 Look at Zion, the city of our appointed feasts! Your eyes will see Jerusalem, a peaceful home, a tent that will not be moved, whose stakes will never be pulled up and whose cords will never break. Tala Siona, engumba ya bafeti na biso ya minene, miso na yo ekomona Yelusalemi, ndako ya kimia, ndako ya kapo oyo ekopikama makasi ; bakokoka kopikola makonzi na yango te, mpe basinga na yango ekokatana te.
21 But there our Father in his majesty will be for us a place of broad rivers and streams, where no galley with oars can go and no mighty ship can pass. Kuna, Yawe akozala Elombe na biso. Ekozala etuka ya bibale minene mpe ya miluka. Masuwa moko te ekoya kuna, masuwa moko te ya lokumu ekoleka wana.
22 For our Father is our judge, our Father is our lawgiver, our Father is our king; he will save us. Pamba te Yawe azali Mosambisi na biso, Yawe azali Mosali mibeko na biso, Yawe azali Mokonzi na biso ; Ye nde akobikisa biso.
23 Your rigging hangs loose: it cannot hold the mast in place or keep the sail spread. Then an abundance of plunder will be divided, and even the lame will carry off the spoil. Basinga na yo esili kolemba, ezali lisusu te kosimba malamu nzete ya bendele ; ezali lisusu te kofungola malamu vwale. Boye, na tango bakokabola ebele ya bomengo ya bitumba, bato ya tengu-tengu, bango moko penza, bakobotola eteni na bango ya bomengo.
24 And no one living in Zion will say, "I am sick"; the people who dwell there will have their sin forgiven. Movandi moke te ya Siona akoloba : « Nazali kobela ! » Masumu ya bavandi ya kuna ekolimbisama.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]