Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 34 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Come close, you nations, and listen; pay attention, you peoples! Let the earth hear, and all that fills it, the world, and everything it brings forth. Bino bikolo, bobelema pene mpe boyoka ; bino bato, botia matoyi ! Tika ete mabele, elongo na nyonso oyo ezali kati na yango, mpe mokili, elongo na nyonso oyo ewuti na yango, eyoka !
2 For our Father is filled with wrath against all the nations, and his fury is against all their armies. He has devoted them to destruction, has given them over to slaughter. Yawe atombokeli bikolo nyonso, kanda na Ye ezali likolo ya mampinga ya bikolo nyonso. Akobebisa bango penza nye, akokaba bango na kufa.
3 Their slain will be thrown out, the stench of their corpses will rise, and the mountains will flow with their blood. Bakobwaka bibembe na bango na mabele, bongo bibembe yango ekobimisa solo makasi, mpe makila ekokita lokola ebale na bangomba.
4 All the stars of heaven will rot away, and the skies will be rolled up like a scroll. All that starry host will wither, as a leaf withers and falls from the vine, like a shriveled fig from the fig tree. Mampinga nyonso ya likolo ekobukana ; mpe mapata ekolingama lokola buku, bongo mampinga na yango nyonso ekokweya ndenge makasa ya nzete ya vino mpe ya figi ekweyaka.
5 When my sword has drunk its fill in the heavens, look—it comes down in judgment upon Edom, upon the people I have devoted to destruction. Pamba te mopanga na ngai esili kolongwa kuna na likolo ; tala, ekiti mpo na kosambisa Edomi, mpe bato oyo nabongisaki mpo na kobebisama.
6 Our Father has a sword; it is sated with blood, gorged with fat, with the blood of lambs and goats, with the fat of the kidneys of rams. For our Father holds a sacrifice in Bozrah, a great slaughter in the land of Edom. Mopanga na Yawe etondi na makila, ezipami na mafuta, na makila ya bana meme mpe ya bantaba ya mibali, na mafuta ya bameme ya mibali, pamba te ezali na mbeka moko mpo na Yawe kati na Botsira mpe bazali koboma bato ebele penza kati na mokili ya Edomi.
7 The wild oxen will fall with them, and the young bulls with the mighty ones. Their land will drink its fill of blood, and their soil will be gorged with fat. Mpakasa ekokufa nzela moko na bango, mpe bangombe ya mibali elongo na bilenge na yango. Mabele na yango ekolangwa na makila mpe putulu na yango ekozipama na mafuta.
8 For our Father has a day of justice, a year of vindication for the cause of Zion. Pamba te ezali mpo na Yawe, mokolo ya kozongisa mabe na mabe, mobu ya lifuti mpo na likambo ya Siona.
9 Edom's streams will be turned into pitch, her soil into sulfur, and her land will become burning pitch. Miluka ya Edomi ekobongwana gudron, putulu na yango, lokola moto ya fofolo mpe mabele na yango ekokoma kopela moto ;
10 Night and day it will not be quenched; its smoke will rise forever. From generation to generation it will lie waste; no one will pass through it ever again. moto oyo ekokufa te ezala na moyi to na butu, bongo molinga na yango ekobanda komata mpo na libela. Ekotikala esobe libela na libela, mpe ata moto moko te akoleka lisusu wana.
11 The desert owl and the screech owl will possess it; the great owl and the raven will dwell in it. our Father will stretch the measuring line of chaos over it, and the plumb line of emptiness. Esulungutu mpe ndeke mosusu ya butu ekozwa yango lokola libula, kumu mpe yanganga ekokoma kovanda kuna. Nzambe akosembola likolo ya Edomi singa ya mobulu mpe nivo ya kozanga.
12 Its nobles will have nothing there to call a kingdom, and all its princes will come to nothing. Bankumu na yango bakozala lisusu wana te mpo na kopona mokonzi, bakambi na yango nyonso bakotikala lisusu te.
13 Thorns will overgrow its strongholds, nettles and brambles its fortresses. It will become a haunt for jackals, a home for ostriches. Nzube ekobota kati na ndako ya mokonzi ; basende mpe matiti, kati na bandako na ye batonga makasi ; ekokoma ndako ya bambwa ya zamba, lopango ya maligbanga.
14 Wildcats will meet with hyenas, and wild goats will call out to one another; there too the night creature will settle and find herself a place of rest. Bikelamu ya esobe ekokutana kuna elongo na mbwa ya zamba, mpe bantaba ya mibali ekobenga baninga na yango. Kumu ekozwa kuna esika ya kolala mpe ya kopema.
15 There the owl will nest and lay her eggs, hatch them and gather her young under her shadow; there too the hawks will gather, each with her mate. Nyoka ekotonga zala na yango mpe ekobwaka maki na yango kuna, ekopasola yango mpe ekosangisa bana na yango na se ya elili na yango. Kaka kuna lisusu, ndeke oyo eliaka misuni ekosangana moko na mosusu.
16 Search the scroll of our Father and read: not one of these will be missing, not one will lack her mate. For his mouth has commanded it, and his Spirit has gathered them. Boluka kati na buku ya Yawe mpe botanga : Moko te kati na bango akozanga, moko te akomitungisa mpo na moninga na ye ; pamba te monoko na Yawe nde epesi mitindo mpe Molimo na Ye akosangisa bango elongo.
17 He has cast the lot for them; his hand has measured out their portion with the line. They will possess it forever and dwell there from generation to generation. Ye abwaki zeke mpo na bango mpe loboko na Ye esaleli singa oyo bamekelaka molayi, mpo na kokabolela bango mboka. Bakozwa yango mpo na libela mpe bakovanda wana libela na libela.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]