Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 35 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The wilderness and the dry land will be glad; the desert will rejoice and blossom like the crocus. Tika ete esobe mpe mabele ya kokawuka esepela ! Tika ete esobe eyoka esengo mpe ebimisa fololo ya motane lokola roze !
2 It will blossom abundantly and rejoice with joy and singing. The glory of Lebanon will be given to it, the splendor of Carmel and Sharon. They will see the glory of our Father, the majesty of our Father. Ekobota fololo mingi penza mpe ekosepela, ekosepela mpe ekoganga na esengo. Nkembo ya Libani, lokumu ya Karimeli mpe ya Saroni ekopesamela yango ; boye bakomona nkembo ya Yawe, lokumu ya Nzambe na biso.
3 Strengthen the weak hands, and steady the buckling knees. Pesa makasi na maboko oyo elembi, lendisa mabolongo oyo ezali kolenga ;
4 Say to those with an anxious heart, "Be strong; do not fear! Look, your Father will come with justice, with our Father's retribution. He will come and save you." Loba na bato oyo bazali kobanga : « Bozala makasi, bobanga te, Nzambe na bino akoya, akoya kozongisa mabe na mabe, akoya na lifuti ya Nzambe. Ye moko akoya kobikisa bino. »
5 Then the eyes of the blind will be opened, and the ears of the deaf unstopped. Boye, bakufi miso bakomona mpe bakufi matoyi bakoyoka.
6 Then the lame will leap like a deer, and the tongue of the mute will sing for joy. For waters will break forth in the wilderness, and streams in the desert. Moto ya tengu-tengu akopumbwa lokola mboloko, mpe lolemo ya baba ekoyemba na esengo. Mayi ekobima na esobe, mpe bibale, na bisika ya kokawuka.
7 The burning sand will become a pool, and the thirsty ground springs of water; in the haunt where jackals lie down, the grass will become reeds and rushes. Zelo ya esobe ekobongwana liziba ya mayi, mpe mabele ya kokawuka ekokoma bitima ya mayi. Matiti, nzete oyo ebotaka na mayi mpe papirisi ekobota na bisika oyo mbwa ya zamba elalaka.
8 And a highway will be there, a road, and it will be called the Way of Holiness. The unclean will not travel it; it belongs to the one who walks the way—even fools will not go astray. Nzela moko ya monene ekoleka wana, bakobenga yango Balabala ya Bosantu. Moto moko te ya mbindo akoleka wana, pamba te ebongisamaki kaka mpo na bato ya Yawe. Boye ata zoba akoki te kobunga na nzela yango.
9 No lion will be there, nor will any ravenous beast travel on it; they will not be found there. But the redeemed will walk there, Nkosi ekozala te na nzela yango, ata nyama moko te ya mabe ekoleka na nzela yango, ekotikala komonana kuna te. Kasi basikolami kaka nde bakotambola na nzela yango.
10 and the ransomed of our Father will return. They will come to Zion with singing, everlasting joy upon their heads; gladness and joy will overtake them, and sorrow and sighing will flee away. Boye, bakangolami na Yawe bakozonga, bakokota na Siona na nzembo ya elonga, mpe esengo ya suka te ekozala na likolo ya mito na bango lokola mitole. Esengo mpe kosepela ekopesamela bango, nzokande mawa mpe kolela ekosila.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]