Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 35 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Kobima ya sika

1Tika ete esobe mpe mabele ya kokawuka esepela !Tika ete esobe eyoka esengompe ebimisa fololo ya motane lokola roze !

2Ekobota fololo mingi penza mpe ekosepela,ekosepela mpe ekoganga na esengo.Nkembo ya Libani, lokumu ya Karimelimpe ya Saroni ekopesamela yango ;boye bakomona nkembo ya Yawe,lokumu ya Nzambe na biso.

3Pesa makasi na maboko oyo elembi,lendisa mabolongo oyo ezali kolenga ;

4Loba na bato oyo bazali kobanga :« Bozala makasi, bobanga te,Nzambe na bino akoya,akoya kozongisa mabe na mabe,akoya na lifuti ya Nzambe.Ye moko akoya kobikisa bino. »

5Boye, bakufi miso bakomonampe bakufi matoyi bakoyoka.

6Moto ya tengu-tengu akopumbwa lokola mboloko,mpe lolemo ya baba ekoyemba na esengo.Mayi ekobima na esobe,mpe bibale, na bisika ya kokawuka.

7Zelo ya esobe ekobongwana liziba ya mayi,mpe mabele ya kokawuka ekokoma bitima ya mayi.Matiti, nzete oyo ebotaka na mayimpe papirisi ekobota na bisika oyombwa ya zamba elalaka.

8Nzela moko ya monene ekoleka wana,bakobenga yango Balabala ya Bosantu.Moto moko te ya mbindo akoleka wana,pamba te ebongisamaki kaka mpo na bato ya Yawe.Boye ata zoba akoki te kobunga na nzela yango.

9Nkosi ekozala te na nzela yango,ata nyama moko te ya mabeekoleka na nzela yango,ekotikala komonana kuna te.Kasi basikolami kaka ndebakotambola na nzela yango.

10Boye, bakangolami na Yawe bakozonga,bakokota na Siona na nzembo ya elonga,mpe esengo ya suka te ekozalana likolo ya mito na bango lokola mitole.Esengo mpe kosepela ekopesamela bango,nzokande mawa mpe kolela ekosila.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]