Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 36 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In King Hezekiah's fourteenth year, Sennacherib king of Assyria attacked all Judah's fortified cities and captured them. Tango Ezekiasi akokisaki mibu zomi na minei na bokonzi, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, abundisaki bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi mpe abotolaki yango.
2 The king of Assyria sent the Rabshakeh with a great army from Lachish to Jerusalem, to King Hezekiah. He stood at the upper pool's aqueduct, on the road to the Launderer's Field. Boye, mokonzi ya Asiri atindaki mokonzi ya basoda oyo bakengelaka ye, elongo na mampinga ya basoda ya nguya, wuta na Lakishi kino na Yelusalemi, epai ya mokonzi Ezekiasi. Tango mokonzi ya basoda yango atelemaki pene ya nzela oyo ememaka mayi na liziba ya mayi ya monene, oyo ezali na nzela ya elanga ya moto oyo atiaka langi na bilamba,
3 Eliakim son of Hilkiah, palace administrator, Shebna the scribe, and Joah son of Asaph the recorder came out to him. Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, babimaki mpo na kokutana na ye.
4 The Rabshakeh told them, "Tell Hezekiah: The great king, the king of Assyria, says this: What is this confidence you trust in? Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi alobaki na bango : « Boloba na Ezekiasi : ‹ Tala makambo oyo mokonzi monene, mokonzi ya Asiri, alobi : Otie elikya na yo na nini ?
5 You say you have counsel and strength for war—but that's only talk. Now, whom do you trust, that you've rebelled against me? Okanisi ete maloba ya pamba ekoki kozwa esika ya mayele mpe makasi ya bitumba ? Otie penza elikya na nani mpo ete otombokela ngai ?
6 Look, you trust in this crushed reed staff—Egypt—that will pierce your hand and go right through it if you lean on it. So is Pharaoh king of Egypt to all who trust in him. Tala, ozali nde kotia elikya na Ejipito oyo ezali lokola mwa nzete ya bambu oyo ebukana, oyo etobolaka mpe ezokisaka loboko ya moto oyo ayekamelaka yango ! Faraon, mokonzi ya Ejipito, azalaka nde bongo mpo na bato nyonso oyo batielaka ye motema.
7 If you tell me, 'We trust in the LORD our God'—isn't he the one whose high places and altars Hezekiah removed, telling Judah and Jerusalem, 'You must worship before this altar'? Mpe soki olobi na ngai : ‘ Totiaka elikya na biso kati na Yawe, Nzambe na biso. ’ Boni, ezali ye te oyo Ezekiasi alongolaki bisambelo na ye ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo na ye tango alobaki na Yuda mpe na Yelusalemi : ‘ Bosengeli kogumbama liboso ya etumbelo oyo ? ’
8 So make a bet with my master, the king of Assyria: I'll give you 2,000 horses—if you can put riders on them. Sik’oyo, nabondeli yo, beta mondenge na nkolo na ngai, mokonzi ya Asiri : nakopesa yo bampunda nkoto mibale soki okoki kopesa basoda mpo ete batambolisa yango !
9 How then can you turn back one officer, even the least of my master's servants, when you trust Egypt for chariots and horsemen? Okokoka ndenge nini kokimisa ata mokonzi moko kaka, kati na bakonzi ya basoda ya nkolo na ngai, yo oyo otiaka elikya na yo na Ejipito mpo na bashar mpe bato oyo batambolisaka yango ?
10 Now, did I come up against this land to destroy it without the LORD? The LORD told me: Go up against this land and destroy it." Okanisi ete ngai nayei kobundisa mpe kobebisa mokili oyo na ndingisa ya Yawe te ? Ezali Ye moko Yawe nde alobaki na ngai ete nabundisa mokili oyo mpe nabebisa yango. › »
11 Then Eliakim, Shebna, and Joah told the Rabshakeh, "Please speak Aramaic to your servants, since we understand it. Don't speak Judean to us within earshot of the people on the wall." Eliakimi, Shebina mpe Yoa balobaki na mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi : — Tobondeli yo, loba na biso, basali na yo, na lokota ya Arami, pamba te tososolaka yango ; koloba na biso na lokota ya Ebre te, noki te bato oyo bazali na likolo ya mir bakoyoka.
12 The Rabshakeh replied, "Did my master send me to say this to your master and you, not the men sitting on the wall, who must eat their own dung and drink their own urine with you?" Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi azongisaki : — Bokanisi ete nkolo na ngai atindi ngai koloba maloba oyo kaka epai na mokonzi na bino mpe epai na bino ? Te ! Maloba yango ezali mpe mpo na bato oyo batelemi na likolo ya mir, oyo bakolia nyei na bango mpe komela masuba na bango elongo na bino ?
13 Then the Rabshakeh stood and shouted in Judean, "Hear the words of the great king, the king of Assyria! Boye, mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi atelemaki mpe agangaki makasi na lokota ya Ebre : « Boyoka maloba ya mokonzi monene, mokonzi ya Asiri !
14 The king says: Don't let Hezekiah deceive you; he cannot rescue you. Tala makambo oyo mokonzi alobi : Tika ete Ezekiasi akosa bino te, pamba te akokoka te kokangola bino !
15 Don't let Hezekiah make you trust in the LORD, saying, 'The LORD will surely rescue us; this city won't fall to Assyria's king.' Bondima te ete Ezekiasi atinda bino kotia elikya na Yawe tango azali koloba : ‹ Solo, Yawe akokangola biso. Engumba oyo ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri. ›
16 Don't listen to Hezekiah. This is what the king of Assyria says: Make peace with me and come out to me. Each of you will eat from his own vine and his own fig tree, and each of you will drink water from his own well, Boyokela Ezekiasi te, pamba te tala makambo oyo mokonzi ya Asiri alobi : Bosala boyokani ya kimia elongo na ngai mpe boya epai na ngai ; bongo moko na moko kati na bino akolia mbuma ya elanga na ye ya vino, ya nzete na ye ya figi mpe akomela mayi ya libulu na ye
17 until I come and take you to a land like your land, a land of grain and new wine, a land of bread and vineyards. liboso ete naya kozwa bino mpo na komema bino na mokili oyo ekokana na oyo ya bino, mokili oyo etonda na ble mpe na vino ya sika ; mokili ya mapa mpe ya bilanga ya vino.
18 Don't let Hezekiah deceive you by saying, 'The LORD will rescue us.' Has any nation's god rescued its land from the king of Assyria's hand? Bondima Ezekiasi te, pamba te azali kokosa bino tango azali koloba : ‹ Yawe akokangola biso. › Boni, ezali na nzambe ya ekolo songolo, oyo alonga kokangola ekolo na ye na loboko ya mokonzi ya Asiri ?
19 Where are gods of Hamath and Arpad? Where are gods of Sepharvaim? Have they rescued Samaria from my hand? Wapi banzambe ya Amati mpe ya Aripadi ? Wapi banzambe ya Sefarivayimi ? Boni, balongaki kokangola Samari na loboko na ngai ?
20 Which of all these lands' gods rescued their land from my hand, that the LORD should rescue Jerusalem from my hand?" Kati na banzambe ya mikili wana, nani azalaki na makoki ya kokangola mokili na ye na maboko na ngai ? Bongo ndenge nini Yawe akoka solo kokangola Yelusalemi na maboko na ngai ? »
21 They stayed silent, answered him not a word—the king's command was, "Don't answer him." Kasi bato batikalaki kimia mpe bazongiselaki ye ata liloba moko te, pamba te mokonzi apesaki mitindo : « Bopesa ye eyano te ! »
22 Then Eliakim son of Hilkiah, palace administrator, Shebna the scribe, and Joah son of Asaph, the recorder, came to Hezekiah with torn clothes and reported the Rabshakeh's words. Bongo Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia mpe mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, bayaki epai ya Ezekiasi na bilamba epasuka, mpe bayebisaki ye makambo oyo mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri alobaki.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]