Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 37 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When King Hezekiah heard it, he tore his clothes, put on mourning clothes, and went into the house of our Father. Tango mokonzi Ezekiasi ayokaki bongo, apasolaki bilamba na ye, alataki basaki mpe akotaki na Tempelo ya Yawe.
2 He sent Eliakim the palace administrator, Shebna the scribe, and senior priests in sackcloth to the prophet Isaiah son of Amoz. Atindaki epai ya mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, Eliakimi, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda, mpe Banganga-Nzambe ya mikolo ; bango nyonso balata bilamba ya basaki.
3 They told him, "Hezekiah says: Today is a day of distress, reproof, and contempt. Children have come to birth, but no strength to deliver them. Balobaki na ye : « Tala makambo oyo Ezekiasi alobi : ‹ Mokolo ya lelo ezali mokolo ya pasi, mokolo ya etumbu mpe mokolo ya soni, pamba te tokomi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota kasi azangi makasi ya kobimisa mwana.
4 Perhaps your Father will hear the words of the Rabshakeh, whom his master the king of Assyria sent to mock the living Father, and will rebuke the words he heard. So lift up a prayer for the surviving remnant." Tango mosusu Yawe, Nzambe na yo, akoyoka maloba ya mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi, oyo nkolo na ye, mokonzi ya Asiri, atindaki mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi ; mpe tango mosusu akopesa ye etumbu mpo na maloba oyo Yawe, Nzambe na yo, ayokaki ! Boye, sambela mpo na ndambo ya bato oyo bazali nanu na bomoi. › »
5 When the servants of King Hezekiah came to Isaiah, Tango bakalaka ya mokonzi Ezekiasi bakomaki epai ya Ezayi,
6 Isaiah told them, "Tell your master: our Father says: Don't fear the words you heard, with which the king of Assyria's servants insulted me. Ezayi alobaki na bango : « Boloba na nkolo na bino : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Kobanga te mpo na makambo oyo oyoki, maloba oyo basali ya mokonzi ya Asiri bazali koloba mpo na kosambwisa Ngai.
7 Look, I will put a spirit in him, so he hears a report, returns to his own land, and there I will make him fall by the sword." Tala, nakotia molimo moko kati na ye mpo ete, tango akoyoka sango ya makambo oyo ezali koleka na mboka na ye, azonga na mokili na ye ; mpe ekozala kuna, na mokili na ye, nde nakobomisa ye na mopanga. › »
8 The Rabshakeh returned and found the Assyrian king fighting Libnah, having heard the king had left Lachish. Tango mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri ayokaki ete mokonzi na ye alongwe na engumba Lakishi, azongaki mpe akutaki mokonzi na ye azali kobundisa engumba Libina.
9 The king heard about Tirhakah king of Cush: "He has come out to fight you." Hearing this, he sent messengers to Hezekiah: Sima na mokonzi ya Asiri koyoka sango na tina na Tiraka, mokonzi ya Kushi, ete azali koya kobundisa ye, atindaki bantoma epai ya Ezekiasi na maloba oyo :
10 "Tell Hezekiah king of Judah: Don't let the God you trust deceive you, saying, 'Jerusalem won't fall to Assyria's king.' « Boyebisa Ezekiasi, mokonzi ya Yuda : ‹ Kotika te ete Nzambe na yo, oyo otielaka motema akosa yo na maloba oyo : ‘ Yelusalemi ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri. ’
11 You have heard what the kings of Assyria did to all lands, destroying them completely. And you—will you be rescued? Oyokaki makambo oyo bakonzi ya Asiri basalaki bikolo nyonso mpe ndenge nini babebisaki yango nye ; okanisi ete yo nde okobika ?
12 Did the nations' gods rescue those my fathers destroyed: Gozan, Haran, Rezeph, and Eden's people in Telassar? Tango batata na ngai babebisaki Gozani, Arani, Retsefi mpe bato ya Edeni oyo bazalaki kovanda kati na Telasari, boni, banzambe ya bikolo yango, bakangolaki yango ?
13 Where is the king of Hamath, the king of Arpad, the king of Sepharvaim, Hena, and Ivvah?" Wapi mokonzi ya Amati, ya Aripadi, ya Layiri, ya engumba Sefarivayimi, ya Ena mpe ya Iva ? › »
14 Hezekiah took the letter from the messengers, read it, went up to our Father's house, and spread it out before our Father. Sima na Ezekiasi kozwa mokanda kowuta na maboko ya bantoma, atangaki yango, akendeki na Tempelo ya Yawe mpe afungolaki mokanda yango liboso ya Yawe.
15 And Hezekiah prayed to our Father, saying: Mpe Ezekiasi asambelaki Yawe :
16 "Father of heaven's armies, the Father of Israel, enthroned above the cherubim—you alone are our Father over all earth's kingdoms; you made the heavens and the earth. « Oh Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele ! Yo oyo ovandi likolo ya basheribe, ozali Nzambe kaka moko na likolo ya mikili nyonso ya mabele ; Yo nde osala Likolo mpe mabele.
17 Bend down, our Father, and hear; open your eyes, our Father, and see; hear all Sennacherib's words sent to mock the living Father. Oh Yawe, pesa litoyi mpe yoka ; Yawe, fungola miso mpe mona ! Yoka maloba nyonso oyo Senakeribe atindi mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi.
18 True, our Father, the kings of Assyria have destroyed all the nations and their lands, Oh Yawe, ezali ya solo ete bakonzi ya Asiri babebisaki bikolo nyonso mpe mikili na bango.
19 and threw their gods into the fire—not gods but work of human hands, wood and stone; so they destroyed them. Bazikisaki banzambe na bango na moto, pamba te banzambe yango ezalaki Nzambe te, kasi banzete to mpe mabanga ya pamba oyo esalemi na maboko ya bato.
20 Now, our Father, save us from his hand, so all earth's kingdoms may know you alone are our Father." Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, bikisa biso na maboko na ye, mpo ete mikili nyonso ya mabele eyeba solo ete Yo moko kaka, Yawe, nde ozali Nzambe. »
21 Then Isaiah son of Amoz sent to Hezekiah: This is what the Father of Israel says: Because you prayed to me about Sennacherib king of Assyria, Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, atindelaki Ezekiasi maloba oyo : « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Mpo ete osambelaki Ngai na tina na Senakeribe, mokonzi ya Asiri,
22 this is the word that our Father has spoken against him: "She despises you, she scorns you—the virgin daughter of Zion; behind you she shakes her head—the daughter of Jerusalem. tala liloba oyo Yawe alobi mpo na kotelemela ye : Siona, mboka kitoko, ezali kotiola yo mpe koseka yo. Yelusalemi, mboka kitoko, ezali koningisa moto mpo na kotiola yo.
23 Whom have you mocked and reviled? Against whom have you raised your voice and lifted your eyes in pride? Against the Holy One of Israel! Nani oyo ofingaki mpe otiolaki ? Nani oyo omatiselaki mongongo mpe otalaki na miso ya lolendo ? Mosantu ya Isalaele !
24 By your servants you have mocked the Sovereign Father, and you have said, 'With my many chariots I have gone up to the heights of the mountains, to the far reaches of Lebanon. I cut down its tallest cedars, its choicest cypresses; I came to its remotest height, its densest forest. Na nzela ya bantoma na yo, ofingaki Nkolo mpe olobaki : ‹ Na lisungi ya ebele ya bashar na ngai, namataki kino na basonge ya bangomba, kino na basonge oyo eleki likolo kati na Libani ; nakweyisaki banzete na yango ya sedele oyo eleki milayi, banzete na yango ya sipele oyo eleki kitoko, mpe nakomaki kino na songe na yango ya suka, na zamba na yango oyo eleki kitoko ;
25 I dug wells and drank water; with the sole of my foot I dried up all the streams of Egypt.' natimolaki mabulu ya mayi mpe namelaki mayi ; na matambe ya makolo na ngai, nakawusaki miluka nyonso ya Ejipito. ›
26 Have you not heard? Long ago I did it; from days of old I planned it. Now I have made it happen, that you should turn fortified cities into heaps of ruins. Oyoka nanu yango te ? Nasalaki mabongisi ya makambo oyo wuta kala, nabongisaki yango wuta na mikolo oyo eleka kala ; sik’oyo nde nakokisi yango. Esengeli na yo kokomisa bingumba ya makasi mipiku ya mabanga.
27 Their inhabitants, stripped of their strength, were dismayed and put to shame; they were like plants of the field, like tender grass, like grass on the rooftops, withered before it can grow. Bato na yango bazangi makasi, balengi na somo mpe bakomi na soni, bakomi lokola matiti ya bilanga, lokola matiti ya langi ya mayi ya pondu, lokola matiti oyo ebotaka na mitondo ya bandako, ekawuka liboso ete ekola.
28 But I know when you sit down, when you go out, and when you come in, and when you rage against me. Nayebi esika nini ozalaka, tango nini obimaka, tango nini ozongaka, mpe tango nini otombokelaka Ngai.
29 Because you rage against me, and your arrogance has reached my ears, I will put my hook in your nose and my bridle in your mouth, and I will turn you back by the way you came. Lokola otombokelaka Ngai, mpe lofundu na yo ekomi kino na matoyi na Ngai, nakotia lopete na Ngai na zolo na yo, nakokanga yo singa na bibebu ndenge bakangaka mpunda monoko, mpe nakozongisa yo na nzela oyo oyelaki.
30 "This is your sign: this year you'll eat what grows on its own, the second year what springs from that, the third year sow and reap, plant vineyards and eat their fruit. Oh Ezekiasi, tala oyo ekozala elembo mpo na yo : Na mobu oyo, bokolia biloko oyo ekobima na nkona oyo ekweyaki na mabele ; na mobu oyo ekolanda, bokolia biloko oyo ebotaka yango moko. Kasi na mobu ya misato, bokolona mpe bokobuka bambuma, bokolona banzete ya vino mpe bokolia bambuma na yango.
31 And the surviving remnant of the house of Judah will again take root downward and bear fruit upward. Bato ya Yuda oyo bakobika, oyo bakotikala, bakozala lokola nzete oyo ekotisi misisa na yango ya sika kati na mabele mpe eboti bambuma.
32 For out of Jerusalem will go a remnant, and out of Mount Zion a band of survivors. The zeal of the Father of heaven's armies will accomplish this. Pamba te, na Yelusalemi, ndambo ya bato bakotikala ; mpe na Siona, mwa ndambo bakobika. Bolingo makasi na Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde ekokokisa yango.
33 So our Father says about Assyria's king: He will not enter this city or shoot an arrow here, confront it with a shield, or build a siege ramp against it. Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na mokonzi ya Asiri : ‹ Akokota na engumba oyo te, akobeta kuna ata mbanzi moko te, akobundisa yango na banguba te mpe akomatisa ata mabele te liboso na yango mpo na komibomba.
34 He will return the way he came; he will not come into this city, declares our Father. Akozongela na nzela oyo ayelaki mpe akokota na engumba oyo te, › elobi Yawe.
35 For I will defend this city to save it, for my own sake and for the sake of David my servant." ‹ Nakobatela engumba oyo mpe nakobikisa yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai mpe mpo na lokumu ya Davidi, mosali na Ngai. › »
36 Then our Father's messenger went out and struck down 185,000 in the Assyrian camp; when people rose early in the morning, there were dead bodies everywhere. Boye, anjelu na Yawe abimaki mpe abomaki bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na mitano kati na molako ya bato ya Asiri. Tango bato balamukaki na tongo ya mokolo oyo elandaki, bakutaki kaka bibembe.
37 So Sennacherib king of Assyria broke camp and went home, and he stayed at Nineveh. Boye, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, alongolaki molako, azongaki na Ninive mpe akomaki kovanda kuna.
38 As he worshiped in the temple of his god Nisroch, his sons Adrammelech and Sharezer struck him with the sword and fled to Ararat. His son Esarhaddon ruled in his place. Mokolo moko, wana azalaki kogumbamela nzambe na ye, Nisiroki, kati na tempelo ya nzambe yango, bana na ye ya mibali, Adrameleki mpe Saretseri babomaki ye na mopanga mpe bakimaki na Ararati. Bongo, mwana na ye ya mobali, Esari-Adoni, akitanaki na ye na bokonzi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]