Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 38 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In those days Hezekiah fell mortally ill. The prophet Isaiah son of Amoz came to him and said, "This is what our Father says: Put your house in order, for you will die; you will not recover." Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi, pene akufa. Mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, akendeki epai na ye mpe alobaki : « Tala liloba oyo Yawe alobi : Bongisa makambo ya ndako na yo, pamba te okokufa, okobika te. »
2 Then Hezekiah turned his face to the wall and prayed to our Father, Ezekiasi abalolaki elongi na ye na mir mpe abondelaki Yawe :
3 and said, "Please, my Father, remember how I walked faithfully before you with a whole heart, and did what was good in your eyes." Hezekiah wept bitterly. « Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo. » Mpe Ezekiasi alelaki mingi.
4 Then the word of our Father came to Isaiah: Bongo, Yawe alobaki na Ezayi :
5 "Go tell Hezekiah, 'This is what our Father says, the Father of your ancestor David: I have heard your prayer and seen your tears. I am adding fifteen years to your life.' « Kende koloba na Ezekiasi : ‹ Yawe, Nzambe ya tata na yo, Davidi, alobi : ‘ Nayoki libondeli na yo mpe namoni mpinzoli na yo. Nakobakisa mibu zomi na mitano na mikolo ya bomoi na yo.
6 I will rescue you and this city from the king of Assyria; I will defend this city. Nakokangola yo elongo na engumba oyo, na maboko ya mokonzi ya Asiri, mpe nakobatela yango. ’
7 "This is your sign from our Father that he will do what he has promised: Bongo, tala elembo ya Yawe, elembo oyo ekolakisa mpo na yo ete Yawe akokokisa makambo oyo asili kolaka :
8 Look, I'll turn back the shadow ten steps the sun has descended on Ahaz's stairway." So the sun turned back the ten steps it had gone down. Nakozongisa sima, na badegre zomi, elili ya moyi oyo ekitaki na tango ya Akazi. › » Boye, moyi ezongaki sima, mpe ekitaki na badegre zomi.
9 A writing of Hezekiah king of Judah, after his illness and recovery: Tala loyembo oyo Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, akomaki na mokanda tango abikaki na bokono.
10 I said, "In the middle of my days I must go through the gates of the grave; I am robbed of the rest of my years." Nazalaki komilobela : « Tango nazali nanu na makasi na nzoto, naleka solo na nzela ya ekuke ya kufa mpe nazangela mibu oyo etikali na bomoi na ngai ? »
11 I said, "I will not see our Father himself in the land of the living; I will look on humanity no longer, among those who dwell in this passing world. Namilobelaki : « Nakomona lisusu Yawe te, Yawe, na mokili ya bato ya bomoi ; nakomona lisusu ata moto moko te to kowumela elongo na bato oyo bavandi na mokili ya lelo !
12 My dwelling is pulled up and carried off from me like a shepherd's tent. I have rolled up my life like a weaver; he cuts me off from the loom; from day to night you bring me to an end. Mikolo ya bomoi esili, elongwe na bomoi na ngai ndenge balongolaka ndako ya kapo ya mobateli bibwele. Akati bomoi ngai ndenge motongi bilamba akataka basinga soki asilisi kotonga elamba. Longwa na moyi kino na butu, akomisi bomoi na ngai na suka.
13 I waited quietly until morning, but like a lion he breaks all my bones; from day to night you bring me to an end. Nakangaki motema kino na tongo ; kasi lokola nkosi, abuki-buki mikuwa na ngai nyonso. Longwa na moyi kino na butu, akomisi bomoi na ngai na suka.
14 Like a swift or a crane I chirp; I moan like a dove. My eyes grow weary looking upward. O Sovereign Father, I am hard-pressed; be my guarantee of safety!" Nazalaki koganga lokola mbilambila to ndeke ya mayi, nazalaki kolela lokola ebenga. Miso na ngai elembaki kotala likolo. Oh Yawe, natungisami, batela ngai ! »
15 What can I say? He has spoken to me, and he himself has done it. I will walk slowly all my years because of the bitterness of my soul. Kasi naloba nini mpo ete ayanola ngai, pamba te Ye moko nde asali yango ! Mibu nyonso ya bomoi na ngai, nakotambola na komikitisa likolo ya pasi ya motema na ngai.
16 O Sovereign Father, by such things people live, and in all of them is the life of my spirit. So restore me to health and let me live! Nkolo, bato babikaka mpo na bolamu na Yo ; ezali mpe na nzela na yango nde ngai nazwi bomoi. Ozongiselaki ngai nzoto kolongono mpe opesi ngai bomoi.
17 Surely it was for my own good that I suffered such bitterness. In your love you held back my life from the pit of destruction, for you have thrown all my sins behind your back. Solo, pasi na ngai ebongwani esengo ; na bolingo na Yo, obateli ngai longwa na libulu na kufa ; obwaki masumu na ngai nyonso sima na mokongo na yo.
18 For the grave cannot praise you; death cannot sing your praise. Those who go down to the pit cannot hope for your faithfulness. Pamba te mboka ya bakufi ekoki te kokumisa Yo, kufa ekoki kosanzola Yo te ; bato oyo bakitaka na mboka ya bakufi bazalaka na elikya na boyengebene na Yo te.
19 The living, the living—they praise you, as I do this day; the father makes your faithfulness known to the children. Bato na bomoi, bato ya bomoi kaka nde basanzolaka Yo ndenge ngai nazali kosanzola Yo lelo. Batata bakoteya bana na bango boyengebene na Yo.
20 Our Father will save me, and we will play my songs on stringed instruments all the days of our lives, in the house of our Father. Yawe, lokola obikisi ngai, tokobeta mindule na biso mikolo nyonso ya bomoi na biso na Tempelo ya Yawe.
21 Isaiah had said, "Let them take a fig cake, apply it to the boil, and he'll recover." Ezayi alobaki : — Bozwa liboke ya figi, botia yango na pota ; mpe mokonzi akobika.
22 Hezekiah had asked, "What is the sign that I will go up to the house of our Father?" Ezekiasi alobaki : — Elembo nini ekolakisa ngai ete nakokende na Tempelo ya Yawe ?
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]