Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 39 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 At that time Merodach-baladan son of Baladan, king of Babylon, sent letters and a gift to Hezekiah, having heard he had been sick and recovered. Na tango wana, Merodaki-Baladani, mwana mobali ya Baladani, mokonzi ya Babiloni, atindaki mokanda mpe kado epai ya Ezekiasi, pamba te ayokaki sango ete Ezekiasi abelaki mpe abikaki.
2 Hezekiah gladly received them and showed them his treasure house—the silver, gold, spices, fine oil, his whole armory, all in his storehouses. Nothing in his house or kingdom did Hezekiah not show them. Ezekiasi ayambaki bantoma wana na esengo mpe alakisaki bibombelo biloko na ye ya motuya lokola palata mpe wolo, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, mafuta ya kitoko, bibundeli na ye nyonso mpe bomengo na ye nyonso. Ezalaki na eloko moko te, ezala ya ndako na ye to ya mokili na ye mobimba, oyo azangaki kolakisa bango.
3 Then Isaiah the prophet came to King Hezekiah and asked, "What did these men say, and where did they come from?" Hezekiah said, "From a distant land, from Babylon." Boye, mosakoli Ezayi akendeki epai ya mokonzi Ezekiasi mpe atunaki ye : — Bato wana balobi nini mpe bawuti wapi ? Ezekiasi azongisaki : — Bawuti mosika, na mokili ya Babiloni, mpo na koya kotala ngai.
4 He asked, "What have they seen in your house?" Hezekiah answered, "They saw everything in my house. Nothing in my storehouses I didn't show them." Ezayi atunaki : — Bamoni eloko nini kati na ndako na yo ? Ezekiasi azongisaki : — Bamoni biloko nyonso oyo ezali kati na ndako na ngai ; ezali na eloko moko te, kati na bibombelo na ngai, oyo nazangi kolakisa bango.
5 Then Isaiah said to Hezekiah, "Hear the word of the Father of heaven's armies: Ezayi alobaki na Ezekiasi : — Yoka liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :
6 The days are coming when everything in your house, all your ancestors stored up to now, will be carried to Babylon. Nothing will be left, says our Father. « Solo, na mikolo oyo ekoya, nyonso oyo ezali kati na ndako na yo mpe nyonso oyo batata na yo babomba kino na mokolo ya lelo, bakomema yango na Babiloni ; eloko moko te ekotikala, » elobi Yawe.
7 Some of your own sons, your own offspring, will be taken to serve as officials in the palace of the king of Babylon." « Mingi kati na bakitani na yo, kati na ba-oyo babimi penza na mokongo na yo, bakomema bango mpe bakoboma bango mikongo mpo ete bakoma kosala kati na ndako ya mokonzi ya Babiloni. »
8 Then Hezekiah told Isaiah, "The word of our Father you have spoken is good." For he thought, "There will be peace and security in my lifetime." Ezekiasi azongiselaki Ezayi : — Liloba na Yawe oyo osili koloba ezali malamu. Pamba te azalaki komilobela : « Kimia mpe bobatelami ekozala penza na mikolo ya bomoi na ngai. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]