Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 40 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Comfort, comfort my people, says your Father. Bobondisa, bobondisa bato na Ngai, elobi Nzambe na bino.
2 Speak tenderly to Jerusalem, and proclaim to her that her hard service is completed, that her guilt is forgiven, that she has received from our Father's hand double for all her sins. Boloba kati na Yelusalemi, boyebisa ye ete minyoko na ye ekomi na suka, masumu na ye esili kolimbisama, pamba te asili kozwa na loboko ya Yawe ngolu koleka mbala mibale mpo na masumu na ye nyonso.
3 A voice is calling out: In the wilderness, prepare the way of our Father; make a straight highway through the desert for our Father. Mongongo ya moto moko ezali kobelela : « Kati na esobe, bobongisa nzela mpo na Yawe ; kati na mabele ya kokawuka, bosembolela Nzambe na biso nzela moko ya monene.
4 Every valley will be lifted up, and every mountain and hill made low; the uneven ground will become level, and the rough places will become a plain. Tika ete mabwaku nyonso ekundama, bangomba nyonso ya milayi to ya mikuse ekitisama, banzela nyonso oyo etengama esembolama, mpe mabulu nyonso ekoma bitando.
5 And the glory of our Father will be revealed, and all people will see it together, for the mouth of our Father has spoken. Bongo, nkembo na Yawe ekomonisama, mpe bato nyonso bakomona yango elongo ; » pamba te Yawe nde alobi.
6 A voice says, "Call out!" And I said, "What should I call out?" All people are like grass, and all their faithfulness is like the flower of the field. Mongongo moko elobi : « Belela ! » Mpe nazongisaki : « Nabelela likambo nini ? » « Bato nyonso bazalaka lokola matiti, mpe nkembo na bango nyonso ezalaka lokola bafololo ya bilanga.
7 The grass withers, the flower fades when the breath of our Father blows on it; surely the people are grass. Matiti ekawukaka mpe fololo elembaka, tango mopepe ya Yawe elekaka likolo na yango. Solo, bato bazali lokola matiti :
8 The grass withers, the flower fades, but the word of our Father stands forever. Matiti ekawukaka mpe fololo elembaka, kasi Liloba na Nzambe na biso ewumelaka seko na seko. »
9 Go up on a high mountain, Zion, messenger of good news; lift up your voice with strength, Jerusalem, messenger of good news. Lift it up, do not be afraid; say to the cities of Judah, "Here is your Father!" Mata likolo ya ngomba, Siona, yo momemi sango malamu ; tombola mongongo na yo mpe ganga makasi, Yelusalemi, yo momemi sango malamu ; tombola yango penza, kobanga te ; loba na bingumba ya Yuda : « Botala Nzambe na bino ! »
10 See, the Sovereign Father comes with strength, and his arm rules for him; see, his reward is with him, and his payment goes before him. Botala, Nkolo Yawe azali koya na nguya, loboko na Ye ezali kopesa Ye makoki ya kokonza. Botala, azali na lifuti elongo na Ye, azali kotambola na lifuti na Ye.
11 He will tend his flock like a shepherd; he will gather the lambs in his arms and carry them close to his heart; he will gently lead those that have young. Azali kobatela etonga na Ye lokola mobateli bibwele : kosangisa bana meme na maboko na Ye mpe kokanga bango na tolo na Ye ; kotambolisa malembe-malembe bana meme ya basi oyo ezali nanu komela mabele.
12 Who has measured the waters in the hollow of his hand, and marked off the heavens with the breadth of his hand, enclosed the dust of the earth in a measure, and weighed the mountains in scales and the hills in a balance? Nani asila komeka ebale monene kati na loboko na Ye, to likolo na nzela ya molayi ya misapi na Ye ? Nani asila kosangisa putulu nyonso ya mabele kati na katini moko to komeka kilo ya bangomba milayi na nzela ya ndobo to komeka kilo ya bangomba mikuse na nzela ya emekelo kilo ?
13 Who has directed the Spirit of our Father, or as his counselor has instructed him? Nani asosoli makanisi ya Yawe to apesi Ye toli lokola molakisi ?
14 Whom did he consult, and who made him understand? Who taught him the path of justice, and taught him knowledge, and showed him the way of understanding? Yawe atunaki toli na nani mpo ete apesa Ye mayele ? Nani alakisaki Ye ndenge bakataka makambo na sembo to apesaki Ye boyebi, to mpe ateyaki Ye nzela ya bososoli ?
15 The nations are like a drop from a bucket, and are counted as the dust on the scales; he takes up the islands like fine dust. Solo, bikolo ezali lokola litanga moko ya mayi na katini, lokola putulu kati na emekelo kilo ! Tala, amekaka bisanga lokola eloko ya moke penza.
16 Lebanon is not enough to burn, nor its animals enough for a burnt offering. Banzete ya Libani ekokoka te mpo na kopelisa moto ya etumbelo, mpe banyama na yango ekokoka te mpo na kotumba mbeka.
17 All the nations are as nothing before him; they are regarded by him as less than nothing and emptiness. Na miso na Ye, bikolo nyonso ezali lokola biloko pamba ; amonaka yango lokola eloko pamba to mpe lokola eloko te.
18 To whom then will you liken our Father? Or what likeness will you compare to him? Bolingi kokokanisa Nzambe na nani ? Bolingi kokokanisa Ye na elilingi nini ?
19 An idol! A craftsman casts it, and a goldsmith overlays it with gold and casts silver chains for it. Ndenge basalaka ekeko, mosali bikeko anyangwisi ebende na moto mpe asali ekeko ; mosali ya wolo abambi ekeko yango wolo, bongo akangisi yango na basheneti ya palata.
20 Anyone too poor for such an offering chooses wood that will not rot; he seeks out a skillful craftsman to set up an idol that will not topple. Moto oyo azangi makoki ya kobonza makabo ya boye mpo ete azali mobola makasi akopona nzete oyo epolaka te ; akoluka mosali bikeko oyo azali penza mayele mpo na kosala nzambe ya ekeko oyo eninganaka te.
21 Do you not know? Do you not hear? Has it not been told you from the beginning? Have you not understood from the foundations of the earth? Boyebi yango te ? Boyoka nanu yango te ? Bayebisa bino nanu yango te wuta na ebandeli ? Bososola nanu yango te wuta mokili esalema ?
22 He sits enthroned above the vault of the earth, its people below like grasshoppers; he spreads the skies like a thin veil, pitching them as a tent to live in. Yawe avandaka na likolo ya mondelo ya mabele, epai wapi bato na yango bamonanaka lokola mabanki ; atandaki likolo lokola liputa mpe afungolaki yango lokola ndako ya kapo mpo na kovanda kuna ;
23 He brings princes to nothing, and makes the rulers of the earth as emptiness. akomisaka bakonzi ya mokili bato pamba, mpe bakambi na yango lokola biloko pamba.
24 They are barely planted, barely sown, their stem has barely taken root in the ground, when he blows on them and they wither, and the storm sweeps them away like chaff. Tango nanu batiami kutu na mabele te, nanu balonami kutu te, mobimbi na bango ezwi nanu ata misisa te, afuli bango lokola mopepe mpe bakawuki, bongo mopepe makasi ememi bango lokola matiti ya kokawuka.
25 "To whom then will you compare me, that I should be like him?" says the Holy One. « Bolingi kokokanisa Ngai na nani ? Bolingi kotia Ngai esika moko na nani, » elobi Ye oyo azali Mosantu ?
26 Look up into the heavens and see: who created these? He who brings out their host by number, calling them all by name; because he is great in strength and mighty in power, not one is missing. Botombola miso na bino mpe botala na likolo : Nani akela biloko nyonso ya likolo : moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu ? Ezali Ye oyo abimisaka mampinga nyonso ya minzoto mpe abengaka yango moko na moko na kombo na yango. Mpo na bokonzi monene mpe nguya makasi na Ye, moko te kati na yango ezangaka.
27 Why do you say, Jacob, and complain, Israel, "My way is hidden from our Father, and my Father disregards my right"? Oh Jakobi, mpo na nini ozali koloba ; oh Isalaele, mpo na nini kotatola : « Nzela na ngai ebombami na miso ya Yawe, likambo na ngai eyebani te na Nzambe na ngai ? »
28 Have you not known? Have you not heard? Our Father is the everlasting Father, the Creator of the ends of the earth. He does not faint or grow weary; no one can fathom his understanding. Oyebi te ? Nanu oyoka te ? Yawe azali Nzambe ya libela na libela, azali Mokeli ya basuka ya mabele ; alembaka te mpe apemaka te, mpe moko te akoki kososola mayele na Ye.
29 He gives power to the weary, and increases strength for the powerless. Apesaka makasi na bato oyo balembi mpe abakisaka nguya na bato oyo bazanga nguya.
30 Even youths will grow faint and weary, and young men will fall exhausted; Solo, bilenge bapemaka mpe balembaka, bilombe batengaka-tengaka ;
31 but those who wait for our Father will renew their strength; they will soar on wings like eagles; they will run and not be weary; they will walk and not faint. basi bato oyo batiaka elikya na Yawe, Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika : bapumbwaka likolo lokola bampongo, bapotaka mbangu mpe bapemaka te, batambolaka mpe balembaka te.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]