Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 41 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Listen to me in silence, coastlands; let the peoples renew their strength. Let them come near and speak; let us together draw near for judgment. « Bino bisanga, bovanda kimia liboso na Ngai ! Tika ete bato ya bikolo bayeisa sika makasi na bango, tika ete bapusana mpe baloba : ‹ Tokende elongo mpo na kosamba ! ›
2 Who stirred up one from the east, calling him in righteousness to follow him? He hands nations over to him and subdues kings before him; he turns them to dust with his sword, to wind-driven stubble with his bow. Nani abimisaki wuta na este moto oyo bosembo ezali kobenga na makolo na yango, oyo elonga elandaka matambe na Ye ? Nani akabaki bikolo na maboko na Ye mpe atiaki bakonzi na se ya bokonzi na Ye ? Mopanga na Ye ekomisaki bango putulu, mpe tolotolo na Ye ekomisaki bango lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe ememaka.
3 He pursues them and passes on safely, by a path his feet have never traveled. Azali kolanda bango mpe koleka na kimia na nzela oyo matambe na Ye eleka nanu te.
4 Who has performed and done this, calling the generations from the beginning? I am the Father—the first, and with the last; I am he. Nani asalaki mpe akokisaki makambo oyo ? Nani abengaka bileko wuta na ebandeli ? Ngai Yawe, nazali Ebandeli ya nyonso, mpe nakozala mpe kaka ndenge moko elongo na bato ya suka. »
5 The coastlands have seen it and are afraid; the ends of the earth tremble; they draw near and come. Bisanga emoni yango mpe ekomi kobanga, basuka ya mabele ezali kolenga. Bazali kopusana, bazali koya pene ;
6 Each one helps his neighbor and says to his brother, "Take courage!" moto na moto azali kosunga moninga na ye mpe koloba na ndeko na ye : « Sala makasi ! »
7 The craftsman encourages the goldsmith, and the one who smooths with the hammer him who strikes the anvil, saying of the soldering, "It is good"; and they fasten it with nails so it cannot be moved. Mosali bikeko azali kolendisa monyangwisi bibende na moto, mosemboli bibende na marto azali kopesa makasi na mosali oyo apesaka yango elilingi ya suka ; alobi mpo na bisika epai wapi basangisaka bibende : « Ezali malamu ; » mpe alendisi nzambe ya ekeko na basete mpo ete eningana te.
8 But you, Israel, my servant, Jacob, whom I have chosen, the offspring of Abraham, my friend, « Kasi yo, Isalaele, mosali na Ngai, Jakobi oyo naponaki, bino bakitani ya Abrayami, molingami na Ngai,
9 you whom I took from the ends of the earth, and called from its farthest corners, saying to you, "You are my servant; I have chosen you and not rejected you". yo oyo nazwaki wuta na basuka ya mabele, oyo nabengaki wuta na basuka na yango, yo oyo epai ya nani nalobaki : ‹ Ozali mosali na Ngai, › naponaki yo mpe nabwakaki yo te.
10 "Fear not, for I am with you; do not be dismayed, for I am your Father. I will strengthen you, I will help you, I will uphold you with my righteous right hand. Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.
11 See, all who rage against you will be ashamed and disgraced; those who oppose you will be as nothing and perish. Bato nyonso oyo bazali kotombokela yo bakokufa solo soni mpe bakosambwa ; bato oyo bazali kotelemela yo bakokoma lokola biloko pamba mpe bakokufa.
12 You will look for those who war against you, but you will not find them; those who battle against you will be as nothing at all." Ata oluki bayini na yo, okomona bango te ; bato oyo bazali kobundisa yo bakokoma biloko pamba.
13 For I, your Father, take hold of your right hand; I am the one who says to you, "Fear not, I am the one who helps you." Pamba te, nazali Yawe, Nzambe na yo, nasimbi makasi loboko na yo ya mobali mpe nazali koloba na yo : ‹ Kobanga te, nakosunga yo. ›
14 Fear not, you worm Jacob, you men of Israel! I am the one who helps you, declares our Father; your Redeemer is the Holy One of Israel—your Father. Oh Jakobi, yo oyo oleki kutu mutsopi te, Isalaele, yo oyo omonani lokola eloko pamba, kobanga te, pamba te Ngai moko nakosunga yo, » elobi Yawe, Mosikoli na yo, Mosantu ya Isalaele.
15 "See, I make you into a threshing sledge, new and sharp, with many teeth; you will thresh the mountains and crush them, and make the hills like chaff. « Tala, nakomisi yo lokola libaya ya sika ya kotutela ble, oyo batia minu bapelisa makasi, lokola mbeli ya sika, mbeli ya minu makasi ; okopanza bangomba milayi, okokomisa yango putulu ; okokomisa bangomba ya mikuse lokola matiti ya kokawuka,
16 You will winnow them, and the wind will carry them away, and the storm will scatter them. But you will rejoice in our Father; in the Holy One of Israel you will glory. okoyungola yango, mpe mopepe ekomema yango, mopepe makasi ekopanza yango. Kasi yo, okosepela kati na Yawe, okozwa lokumu kati na Mosantu ya Isalaele.
17 When the poor and needy seek water, and there is none, and their tongues are parched with thirst, I, your Father, will answer them; I, the Father of Israel, will not forsake them. Mobola mpe moto akelela bazali koluka mayi, kasi na pamba : mayi ezali te ; balolemo na bango ekawuki na posa ya mayi. Kasi Ngai Yawe, nakoyanola bango ; Ngai, Nzambe ya Isalaele, nakobwaka bango te.
18 I will open rivers across the barren heights, and springs down in the valleys; I will make the desert pools of water, and dry ground flowing springs. Nakosala ete bibale etiola na likolo ya bangomba, mpe bitima na kati-kati ya mabwaku ; nakobongola esobe liziba ya mayi, mpe mabele ya kokawuka mabele oyo ebimisaka mayi ;
19 I will plant in the wilderness the cedar, the acacia, the myrtle, and the olive; I will set in the desert the cypress, the plane, and the pine together, nakolona kati na esobe : banzete ya sedele, ya akasia, ya mirite mpe banzete ya olive ; nakotia banzete ya sipele, ya pini mpe ya bwi esika moko kati na mabele ya kokawuka,
20 that they may see and know, may consider and understand together, that my hand has done this, that I, the Holy One of Israel, have created it." mpo ete bato bamona mpe bayeba, batala mpe basosola elongo ete loboko na Yawe nde esali makambo wana, ete Mosantu ya Isalaele nde akeli yango. »
21 Set forth your case, says our Father; bring your proofs, says the King of Jacob. « Botalisa likambo na bino, » elobi Yawe, « boluka komilongisa, » elobi Mokonzi ya Jakobi.
22 Let them bring them, and tell us what is to happen. Tell us the former things, what they were, that we may consider them and know their outcome; or declare to us the things to come. « Boya na banzambe na bino ya bikeko mpo ete eyebisa biso makambo oyo ekoya. Boyebisa biso masakoli na bino ya liboso, ezalaki nini, mpo ete toyekola yango malamu mpe toyeba ndenge nini esukelaki. To boyebisa biso makambo oyo ekoya ;
23 Tell us what is to come hereafter, that we may know that you are gods; do good, or do harm, that we may be dismayed and filled with fear together. boyebisa biso makambo oyo ekoya na sima, mpo ete toyeba soki bozali solo banzambe ; bosala nanu ata eloko moko, ezala ya malamu to ya mabe, mpo ete toyoka soni mpe totondisama na kobanga.
24 Look, you are nothing, and your work is less than nothing; whoever chooses you is an abomination. Tala, bozali kaka pamba, mpe misala na bino ezali bobele se pamba ; moto oyo aponi bino asali penza likambo ya nkele.
25 I stirred up one from the north, and he has come, from the rising of the sun one who calls on my name; he tramples rulers like mortar, like a potter treading clay. Nabimisaki moto moko wuta na ngambo ya nor, mpe azali koya, moto moko, wuta na ngambo ya este, oyo abelelaka Kombo na Ngai. Azali konyata bakambi ndenge banyataka potopoto, lokola potopoto ya mabele ya bikeko ya mosali mbeki.
26 Who declared it from the beginning, that we might know, and beforehand, that we might say, "He is right"? There was no one who declared it, no one who proclaimed, no one who heard your words. Nani alobaki yango wuta na ebandeli mpo ete biso tokoka koyeba, to wuta kala penza mpo ete tokoka koloba : ‹ Ezali sembo ? › Te, moto moko te alobaki yango, moko te asalaki ete likambo yango eyokana, moko te ayokaki maloba na bino.
27 I was the first to say to Zion, "Look, here they are!" and I gave to Jerusalem a herald of good news. Nazalaki Moto ya liboso ya koloba na Siona : ‹ Tala, tala bango oyo ! › Mpe na Yelusalemi : ‹ Napesi momemi Sango Malamu ! ›
28 "But when I look, there is no one; among these there is no counselor who, when I ask, can give an answer. Natalaki, kasi moto moko te azalaki, moko te kati na bango mpo na kopesa toli, moko te mpo na kopesa eyano soki natuni bango motuna.
29 See, they are all a delusion; their works are nothing; their cast idols are empty wind." Tala, bango nyonso bazali banzambe ya lokuta ! Misala na bango ezali se pamba, bililingi na bango ezali se mopepe mpe biloko ya pamba. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]