Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 42 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "Look at my servant, whom I uphold, my chosen, in whom my soul delights. I have put my Spirit upon him; he will bring forth justice to the nations. Tala mosali na Ngai, oyo nasimbaka ; moponami na Ngai, oyo asalaka esengo na Ngai. Nakotia Molimo na Ngai na likolo na ye, mpe akotia bosembo kati na bikolo,
2 He will not cry out or raise his voice, or make it heard in the street. akotombola mongongo te, akoganga te, akobelela na mongongo makasi te na babalabala ;
3 He will not break a bruised reed or snuff out a faintly burning wick; in faithfulness he will bring forth justice. akobuka te mwa nzete ya kolemba oyo egumbama mpe akoboma te moto ya singa ya mwinda oyo ekomi pene ya kokufa. Akomema bosembo na solo nyonso,
4 He will not grow faint or be crushed until he has established justice in the earth; and the coastlands wait for his teaching." akolemba te mpe akotika te kino tango akotia bosembo na mokili. Bisanga ekotia elikya na mobeko na ye.
5 This is what our Father says—he who created the heavens and stretched them out, who spread out the earth and what comes from it, who gives breath to the people upon it and spirit to those who walk in it: Tala liloba oyo Nzambe, Yawe, alobi, Ye oyo akelaki likolo mpe atandaki yango lokola liputa, oyo atandaki mabele mpe biloko nyonso oyo mabele ebimisaka, oyo apesaka pema na bato na yango mpe bomoi na bato oyo batambolaka likolo na yango :
6 "I am your Father; in righteousness I have called you; I will grasp your hand and watch over you; I will make you a covenant for the people, a light to the nations, « Ngai Yawe, nabengaki yo na bosembo, nasimbi loboko na yo makasi, nabateli yo mpe natie yo mpo na kosala boyokani elongo na bikolo mpe kozala pole ya bikolo,
7 to open blind eyes, to bring out the prisoners from the dungeon—those who sit in darkness in the prison house. mpo na kofungola miso ya bakufi miso, mpo na kobimisa bakangami na boloko mpe kobimisa bavandi ya molili, na kasho.
8 "I am your Father; that is my name; my glory I give to no other, nor my praise to carved idols. Nazali Yawe ; yango nde Kombo na Ngai ; nakopesa nkembo na Ngai na mosusu te to lokumu na Ngai epai na banzambe ya bikeko te.
9 See, the former things have come true, and new things I now declare; before they spring forth, I tell you of them." Tala, makambo ya liboso esili koleka, mpe Ngai nazali kotatola makambo ya sika ; nayebisi bino yango liboso ete esalema. »
10 Sing to our Father a new song, his praise from the end of the earth—you who go down to the sea, and all that fills it, the coastlands and their inhabitants. Boyemba loyembo ya sika mpo na Yawe, bokumisa Ye wuta na basuka ya mabele, bino bato oyo botambolaka na ebale monene, mpe nyonso oyo etondisaka yango, bino bisanga mpe bavandi na yango nyonso !
11 Let the wilderness and its cities raise their voices, the villages where Kedar dwells; let the inhabitants of Sela sing for joy, let them shout from the tops of the mountains. Tika ete esobe mpe bingumba na yango etombola mingongo, tika ete bamboka mike epai wapi Kedari avandaka esepela ! Tika ete bato ya Sela bayemba na esengo ; tika ete baganga wuta na likolo ya bangomba !
12 Let them give glory to our Father, and declare his praise in the coastlands. Tika ete bapesa nkembo epai na Yawe mpe batatola lokumu na Ye kati na bisanga !
13 Our Father goes out like a warrior; like a man of war he stirs up his zeal; he cries out, he shouts aloud, he prevails against his enemies. Yawe akobima lokola elombe, akopelisa zuwa na Ye lokola mobundi bitumba ; akoganga, solo ; akoganga makasi, mpe akolonga banguna na Ye.
14 For a long time I have kept silent; I have been still and restrained myself. Now I will cry out like a woman in labor; I will gasp and pant at once. Wuta kala, navandaki nye, nakangaki monoko mpe motema na ngai ; kasi sik’oyo, lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota, nazali koganga, nazali kolela mpe kopema na pasi.
15 I will lay waste mountains and hills and dry up all their vegetation; I will turn the rivers into islands, and dry up the pools. Nakobebisa bangomba milayi mpe mikuse, nakokawusa banzete mpe matiti na yango nyonso, nakokomisa bibale, bisanga, mpe nakokawusa maziba ;
16 And I will lead the blind along roads they do not know; I will guide them along paths they have not known. I will turn the darkness before them into light, and the rough places into level ground. These are the things I will do, and I will not forsake them. nakomema bakufi miso na nzela oyo batikala nanu koyeba te, nakotambolisa bango na nzela oyo bamesana kotambola te ; nakobongola molili pole liboso na bango, mpe nakokomisa nzela ya nyoka-nyoka nzela ya alima. Tala makambo oyo nakosala, nakotika yango te.
17 They will be turned back and utterly put to shame—those who trust in carved idols, who say to molten images, "You are our gods." Kasi bato oyo batiaka elikya na banzambe ya bikeko mpe balobaka na bililingi : « Bozali banzambe na biso, » bakozonga sima mpe bakosambwa.
18 You who are deaf, hear; and you who are blind, look, that you may see. Boyoka, bino bakufi matoyi ! Botala mpe bomona, bino bato bokufa miso !
19 Who is blind but my servant, or deaf like the messenger I send? Who is blind like the one at peace with me, blind like the servant of our Father? Nani azali mokufi miso soki mosali na ngai te ? Nani yango mokufi matoyi soki ntoma oyo ngai natindaki te ? Nani mokufi miso lokola molobeli na ngai ? Nani mokufi miso lokola mosali na Yawe ?
20 You have seen many things, but you do not observe them; your ears are open, but you do not hear. Omonaki makambo ebele, kasi ozalaki na bokebi na yango te ; matoyi na yo efungwamaki, kasi oyokaki ata eloko moko te.
21 Our Father was pleased, for the sake of his righteousness, to magnify his teaching and make it glorious. Esepelisaki Yawe, mpo na bosembo na Ye, kokomisa Mobeko na Ye eloko ya monene mpe ya lokumu.
22 But this is a people plundered and looted, all of them trapped in holes and hidden away in prisons. They have become plunder with no one to rescue, spoil with no one to say, "Restore!" Kasi tala bato oyo bomengo na bango, babotola yango mpe babebisa bango ; bakanga bango nyonso na mabulu mpe babomba bango kati na boloko, bakoma lokola bomengo ya bitumba, bongo moto akokangola bango azali te ; bakoma lokola mosuni, bongo moto akoloba : « Zongisa bango, » azali te.
23 Who among you will listen to this, will pay attention and hear what is to come? Nani kati na bino akoyoka makambo yango ? Nani akozala na bokebi na makambo oyo ekoya ?
24 Who gave Jacob up to the plunderer, and Israel to the looters? Was it not our Father, against whom we have sinned? They would not walk in his ways, and they would not obey his teaching. Nani akabaki Jakobi na maboko ya babebisi, mpe Isalaele na maboko ya banguna ? Boni, ezalaki Yawe te oyo liboso ya nani basalelaki masumu ? Pamba te balingaki te kolanda nzela na Ye mpe kotosa Mobeko na Ye.
25 So he poured out on them the heat of his anger and the fury of war. It flamed against them all around, but they did not understand; it burned them, but they did not take it to heart. Boye, asopelaki bango moto ya kanda na Ye, mobulu ya etumba makasi ; azingelaki bango na moto na bangambo nyonso, kasi basosolaki te ; mpe moto ezikisaki bango, kasi bazwaki penza likambo yango na motema te.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]