Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 43 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 But now, this is what our Father says—he who created you, Jacob, he who formed you, Israel: Do not be afraid, for I have redeemed you; I have called you by name, you are mine. Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo akelaki yo, oh Jakobi ; Ye oyo abongisaki yo, oh Isalaele : « Kobanga te, pamba te nasikolaki yo, nabengaki yo na kombo na yo, ozali ya ngai.
2 When you pass through the waters, I will be with you; and through the rivers, they will not overwhelm you. When you walk through fire, you will not be burned, and the flame will not consume you. Tango okokatisa mayi monene, nakozala elongo na yo ; mpe tango okokatisa bibale, ekozindisa yo te. Tango okotambola kati na moto, okozika te, mpe ndemo na yango ekotumba yo te ;
3 For I am your Father, the Holy One of Israel, your Savior. I gave Egypt as your ransom, Cush and Seba in your place. pamba te Ngai Yawe, nazali Nzambe na yo, Mosantu ya Isalaele, Mobikisi na yo. Nakabi Ejipito mpo na kofuta niongo ya lobiko na yo, Kushi mpe Seba na esika na yo.
4 Because you are precious in my eyes, and honored, and I love you, I give people in exchange for you, and nations in exchange for your life. Lokola ozali na motuya mpe na kilo mingi na miso na Ngai, lokola nalingaka yo, nakokaba bato mosusu na esika na yo, mpe bikolo mpo na kosomba bomoi na yo.
5 Do not be afraid, for I am with you. From the east I will bring your children, and from the west I will gather you. Kobanga te, pamba te nazali elongo na yo : nakoyeisa bana na yo wuta na ngambo ya este mpe nakosangisa bino wuta na ngambo ya weste ;
6 To the north I will say, Release them, and to the south, Keep them no longer; bring back my sons from distant lands and my daughters from earth's farthest reaches, nakoloba epai ya nor : ‹ Pesa, › mpe epai ya sude : ‹ Kokanga te. › Zongisa bana na Ngai ya mibali wuta na mikili ya mosika, mpe bana na Ngai ya basi wuta na suka ya mabele,
7 everyone who is called by my name, whom I created for my glory, whom I formed and made. moto nyonso oyo abengami na Kombo na Ngai, oyo nakelaki mpo na nkembo na Ngai, oyo nasalaki mpe nabongisaki. »
8 Bring out the people who have eyes but are blind, and who have ears but are deaf. Bimisa bato oyo bazali na miso, kasi bamonaka te ; bato oyo bazali na matoyi, kasi bayokaka te.
9 All the nations gather together, and the peoples assemble. Who among them can declare this and tell us the former things? Let the nations bring their witnesses to prove they are right, so that others may hear and say, It is true. Tika ete bikolo nyonso esangana elongo mpe bato basangana esika moko ! Nani kati na bango asakolaki makambo oyo ? Nani kati na bango ayebisaki biso makambo oyo esalemaki liboso ? Tika ete babimisa batatoli na bango mpo na kolobela bango ! Tika ete bato mosusu bayoka mpo ete baloba : « Ezali ya solo ! »
10 You are my witnesses, declares our Father, and my chosen servant, so that you can know and trust me and grasp that I am he. No god was formed before me, and none will come after me. « Bozali batatoli na Ngai, » elobi Yawe, « mpe mosali na Ngai, oyo naponi, mpo ete bokoka koyeba, kondimela Ngai mpe kososola ete Ngai moko kaka nde nazali Nzambe : Liboso na Ngai, nzambe moko te asila kosalema ; mpe sima na Ngai, akotikala kozala te.
11 I, I am your Father, and besides me there is no savior. Ezali Ngai, Ngai kaka moko, nde nazali Yawe ; Mobikisi mosusu azali te, soki Ngai te.
12 I declared and saved and proclaimed, when there was no foreign god among you; and you are my witnesses, declares our Father, and I am your Father. Kati na bino, Ngai nde nasakolaki, nabikisaki mpe natatolaki ; kasi ezali banzambe ya bapaya te. Bozali batatoli na Ngai, » elobi Yawe, « mpe Ngai, nazali Nzambe.
13 From this day on I am he; there is no one who can deliver from my hand. I act, and who can turn it back? Solo, wuta na tango ya kala, nazalaka kaka ndenge moko ; moko te akokoka kokangola na loboko na Ngai. Soki nasali, nani akobongola yango ? »
14 This is what our Father says—your Redeemer, the Holy One of Israel: For your sake I send to Babylon and bring them all down as fugitives, the Babylonians, in the ships they are so proud of. Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli na bino, Mosantu ya Isalaele, alobi : « Mpo na likambo na bino, nakotinda na Babiloni, mampinga ya basoda, mpe nakokitisa bato nyonso ya Babiloni lokola bakimi, ezala bato ya Chalide oyo bamikumisaka na koganga mpo na bamasuwa na bango.
15 I am your Father, your Holy One, the Creator of Israel, your King. Ngai, nazali Yawe, Mosantu na bino, Mokeli ya Isalaele, Mokonzi na bino. »
16 This is what our Father says—he who makes a way in the sea, a path through the mighty waters, Tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo apasolaka nzela monene kati na ebale monene, mpe nzela moke kati na mayi ya makasi ;
17 who brings out chariot and horse, army and warrior together—they lie down and cannot rise, snuffed out, quenched like a wick: Ye oyo atelemisaka bashar mpe bampunda, mampinga ya basoda elongo na bilombe ya bitumba ; Ye oyo alalisaka bango nyonso, mpe bakokaka lisusu kotelema te, bakufaka lokola singa ya mwinda :
18 Do not remember the former things, nor consider the things of the past. « Bokanisa lisusu te makambo oyo eleka, bomitungisa lisusu te mpo na makambo ya kala.
19 Look, I am doing a new thing; now it springs up—do you not see it? I will make a way in the wilderness and rivers in the desert. Tala, nazali kosala likambo ya sika ! Ezali kobima sik’oyo, bozali komona yango te ? Nazali kopasola nzela kati na esobe, mpe kotia bibale kati na mabele ya kokawuka.
20 The wild animals will honor me, the jackals and the ostriches, because I provide water in the wilderness and rivers in the desert, to give drink to my chosen people, Banyama ya zamba, bambwa ya zamba mpe maligbanga ekopesa Ngai nkembo ; pamba te nakopesa mayi kati na esobe, bibale kati na mabele ekawuka, mpo na komelisa bato na Ngai, oyo naponaki,
21 the people I formed for myself, that they might declare my praise. bato oyo Ngai moko nabongisaki mpo ete bakoka kotatola lokumu na Ngai.
22 "Yet you did not call on me, Jacob; you have grown weary of me, Israel. Kasi obelelaki Ngai te, oh Jakobi, pamba te olembaki Ngai, oh Isalaele.
23 You have not brought me sheep for your burnt offerings, nor honored me with your sacrifices. I did not burden you with grain offerings or weary you with frankincense. Omemelaki Ngai bana meme te lokola mbeka ya kotumba, mpe opesaki Ngai lokumu te na nzela ya bambeka na yo. Nakomisaki yo mowumbu te mpo ete opesa Ngai malasi ya ansa lokola makabo, mpe nalembisaki yo te mpo ete obonzela Ngai malasi.
24 You have not bought me fragrant cane with money, nor satisfied me with the fat of your sacrifices. Instead, you have burdened me with your sins; you have wearied me with your wrongdoing. Osombelaki Ngai te biloko ya solo kitoko na motuya ya mbongo, mpe otondisaki Ngai te na mafuta ya mbeka na yo, kasi onyokolaki Ngai nde na masumu na yo mpe olembisaki Ngai na mabe na yo.
25 "I, I am he who blots out your rebellions for my own sake, and I will not remember your sins. Ezali Ngai, Ngai kaka nde nalimbisaka masumu na yo mpo na lokumu ya Ngai moko mpe nakokanisa lisusu masumu na yo te.
26 Remind me; let us argue it out together; state your case, that you may be proved right. Zongisa yango nanu na makanisi na Ngai ; tika ete tosamba elongo, mpe loba yo moko mpo na kotalisa ete ozali moto ya sembo.
27 Your first father sinned, and your spokesmen rebelled against me. Tata na yo ya liboso asalaki masumu, balobeli na yo batombokelaki Ngai.
28 So I profaned the officials of the sanctuary; I handed Jacob over to destruction and Israel to scorn." Boye, nakosambwisa bakambi ya tempelo na bino mpe nakobongisa Jakobi mpo na kobebisama, mpe Isalaele, mpo na pasi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]