Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 44 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 But now listen, Jacob my servant, Israel whom I have chosen. Kasi sik’oyo yoka, oh Jakobi, mowumbu na Ngai, Isalaele oyo naponaki !
2 This is what our Father says—he who made you, who formed you from the womb and will help you: Do not be afraid, Jacob my servant, Jeshurun whom I have chosen. Tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo asalaki yo, abongisaki yo wuta na libumu ya mama na yo mpe asungaka yo : Oh Jakobi, mowumbu na Ngai, kobanga te ; yo, Yeshuruni, oyo naponaki.
3 For I will pour water on the thirsty land and streams on the dry ground; I will pour out my Spirit on your children and my blessing on your descendants. Pamba te nakosopa mayi na mokili ya kokawuka, mpe bibale, na mabele ya kokawuka ; nakosopa Molimo na Ngai na likolo ya bana na yo mpe mapamboli na Ngai na likolo ya bakitani na yo.
4 They will spring up among the grass like willows by flowing streams. Bakokola malamu kati na matiti ya mobesu lokola banzete ya pepiliye pene ya ebale.
5 This one will say, 'I belong to the Father'; another will call himself by the name of Jacob; still another will write on his hand, 'The Father's,' and take the name of Israel. Moto moko akoloba : ‹ Nazali ya Yawe, › mpe moto mosusu akomibenga na kombo ya Jakobi, kino mosusu akokoma na loboko na ye : ‹ Nazali ya Yawe, › mpe akozwa kombo ya Isalaele.
6 This is what our Father says—the King of Israel and his Redeemer, the Father of heaven's armies: I am the first and I am the last; besides me there is no god. Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi mpe Mosikoli ya Isalaele, Mokonzi ya mampinga, alobi : Nazali ebandeli mpe nazali suka ; Nzambe mosusu azali te, soki Ngai te.
7 Who is like me? Let him proclaim it. Let him declare and lay it out before me, since the day I established an ancient people. Let them foretell what is coming, and what is yet to be. Nani azali lokola Ngai ? Tika ete atatola yango ; tika ete aloba mpe abimisa liboso na Ngai makambo oyo esalema wuta kala, wuta tango nasala bato oyo, mpe makambo oyo ekoya ! Solo, tika ete basakola makambo oyo ekoya !
8 Do not tremble, do not be afraid. Did I not tell you long ago and declare it? You are my witnesses. Is there any Father besides me? There is no Rock; I know of none. Bolenga te, bobanga mpe te. Boni, natatolaki yango te ? Nasakolaki yango te wuta kala ? Bozali batatoli na Ngai. Boni, ezali na nzambe mosusu pembeni na Ngai ? Te, ezali na Libanga mosusu te, nayebi ata moko te. »
9 All who make idols are nothing, and the things they treasure are worthless. Their own witnesses see nothing and know nothing, so they are put to shame. Basali bikeko, bango nyonso, bazali pamba, mpe biloko oyo bango balingaka ezali ata na litomba te ; esengelaki kotatola mpo na bango, kasi emonaka te mpe eyebaka ata eloko moko te ; boye, bayokisama soni.
10 Who makes a god or casts an idol that does its maker no good? Nani asala nzambe to ekeko ya ebende mpo ete ezala ata na litomba moko te mpo na ye ?
11 Look—all his companions will be put to shame, for the craftsmen are only human. Let them all assemble and take their stand; they will be terrified and put to shame together. Tala, ye elongo na baninga na ye bakozala na soni ; basali bikeko bazali na bango kaka bato lokola bato nyonso ! Tika ete bango nyonso baya elongo mpe batelema wana ; bakokweya na somo mpe na soni.
12 The blacksmith shapes an iron tool, working it over the coals; he forms it with hammers and forges it with his strong arm. Yet he grows hungry and his strength fails; he drinks no water and grows faint. Monyangwisi bibende na moto azwaka sizo, asalelaka yango mpe asalaka na makala ya moto ; asalaka ekeko na marto mpe abongisaka yango na makasi ya loboko na ye ; nzokande soki akomi na nzala, makasi esili ye ; soki mpe ameli mayi te, nzoto elembi ye !
13 The carpenter stretches out a measuring line and marks the wood with a stylus; he works it with chisels and marks it with a compass. He shapes it into the figure of a man, with human beauty, to dwell in a shrine. Mosali bikeko afungolaka singa oyo bamekelaka molayi, akomaka elilingi na ekomeli ya motane, asalaka yango na nzela ya mbeli ya minu makasi, abongisaka mondelo na yango na lime mpe apesaka yango lolenge ya moto, ndenge kaka moto azalaka kitoko, mpo ete ekoka kowumela na Esika ya bule.
14 He cuts down cedars, or chooses a cypress or an oak and lets it grow strong among the trees of the forest. He plants a cedar, and the rain makes it grow. Akataka banzete ya sedele ; mpe tango mosusu, banzete ya sipele to ya sheni ; atikaka yango ekola kati na banzete ya zamba mpe alonaka nzete ya pen oyo mvula ekokolisa.
15 He uses it for fuel. He takes some of it and warms himself; he lights a fire and bakes bread. But he also makes a god and worships it; he makes an idol and bows down to it. Moto azwaka yango mpo na kopelisa moto, akataka yango mpo na koyetola moto to mpo na kobelisa mapa ; kasi asalaka na yango lisusu nzambe oyo afukamelaka ; asalaka na yango nzambe ya ekeko oyo agumbamelaka.
16 He burns half the wood in the fire; over it he roasts meat, eats his fill, and warms himself. He says, 'Ah, I am warm; I can feel the fire.' Akotia ndambo ya nzete yango na moto, bongo akolamba na yango mosuni, akotumba mosuni na ye mpe akolia yango kino akotonda ; akokoma lisusu koyoka molunge mpe akoloba : « Ah, nayoki molunge, namoni moto epeli makasi ! »
17 And from what is left he makes a god, his idol; he bows down to it and worships, he prays to it and says, 'Save me, for you are my god!' Mpe na ndambo oyo etikali, oyo asalaki na yango nzambe, nzambe na ye ya ekeko, akofukamela yango mpe akosambela yango ; akosambela yango mpe akoloba : « Bikisa ngai, ozali nzambe na ngai ! »
18 They know nothing, they understand nothing; their eyes are plastered over so they cannot see, and their hearts too, so they cannot understand. Bayebi eloko moko te, bazali na bososoli te ; miso na bango ekangama, emonaka te ; mitema na bango ezali makasi, esosolaka te.
19 No one stops to think, no one has the knowledge or insight to say, 'Half of it I burned in the fire; I even baked bread over its coals, I roasted meat and ate. Will I make the rest into an abomination? Will I bow down to a block of wood?' Moko te akanisaka, moko mpe te azalaka na boyebi mpe na mayele mpo na koloba : « Na nzela ya ndambo na yango, napelisaki moto, nabelisaki mapa na makala na yango ya moto, natumbaki mosuni mpe naliaki yango. Bongo mpo na oyo etikali, nasala na yango penza likambo ya nkele boye ? Nafukamela penza mwa eteni ya nzete ? »
20 He feeds on ashes; a deluded heart has led him astray. He cannot save himself or say, 'Am I not holding a lie in my right hand?' Makanisi na ye ekangama na putulu, motema na ye ya lokuta ezali kokosa ye ; akokoka te komikangola mpe koloba : « Boni, eloko oyo ezali na loboko na ngai ya mobali ezali lokuta te ? »
21 Remember these things, Jacob, and you, Israel, for you are my servant. I formed you; you are my servant. Israel, I will not forget you. « Oh Jakobi, kanisa nanu makambo oyo, pamba te, oh Isalaele, ozali mosali na Ngai. Nabongisaki yo mpo ete ozala mosali na Ngai ; oh Isalaele, nakobosana yo te.
22 I have swept away your rebellions like a cloud, your sins like the morning mist. Return to me, for I have redeemed you. Nalongoli mabe na yo lokola lipata, masumu na yo lokola lipata ya tongo. Zonga epai na Ngai, pamba te nasili kosikola yo. »
23 Sing, heavens, for our Father has done it! Shout aloud, depths of the earth. Break into singing, mountains, forest, and every tree in it! For our Father has redeemed Jacob, and he displays his glory in Israel. Oh Lola, yemba banzembo ya esengo, pamba te Yawe nde asali bongo ! Oh mozindo ya mokili, tombola mongongo ! Oh bino bangomba, bazamba mpe banzete nyonso kati na yango, boyemba banzembo ya elonga ! Pamba te Yawe asikolaki Jakobi, amonisi nkembo na Ye kati na Isalaele.
24 This is what our Father says—your Redeemer, who formed you from the womb: I am your Father, the Maker of all things, who alone stretched out the heavens, who spread out the earth by myself, « Tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo azali Mosikoli na yo, oyo abongisaki yo wuta na libumu ya mama na yo : Nazali Yawe oyo asalaki biloko nyonso, Ngai moko nde natandaki likolo lokola liputa, Ngai moko nde natandaki mabele.
25 who frustrates the signs of false prophets and makes fools of diviners, who overturns the learning of the wise and turns their knowledge into foolishness, Sik’oyo, nakomisi bilembo ya basakoli ya lokuta eloko pamba ; natie mobulu kati na molimo ya bato oyo balobaka makambo ekoya, nakweyisi boyebi ya bato ya bwanya mpe nakomisi mayele na bango liboma.
26 who confirms the word of his servant and fulfills the counsel of his messengers, who says of Jerusalem, 'She will be inhabited,' and of the cities of Judah, 'They will be rebuilt, and I will restore their ruins,' Nakokisi maloba ya mosali na Ngai mpe nalongisi mabongisi ya bamemi sango na Ngai. Natatoli na tina na Yelusalemi : ‹ Bato bakovanda kati na yo ; › na tina na bingumba ya Yuda : ‹ Ekotongama lisusu, › mpe na tina na mabanga na yango oyo ebukana : ‹ Nakobongisa yango lisusu. ›
27 who says to the deep, 'Be dry; I will dry up your rivers,' Nalobi na ebale monene : ‹ Kawuka, mpe nakokawusa bibale na yo ! ›
28 who says of Cyrus, 'He is my shepherd, and he will accomplish all that I please'; who says of Jerusalem, 'She will be rebuilt,' and of the temple, 'Your foundation will be laid.' Nalobi na tina na Sirisi : ‹ Azali mobateli oyo naponi, akokokisa makambo nyonso oyo esepelisaka Ngai. Akoloba na tina na Yelusalemi : ‘ Tika ete etongama lisusu, ’ mpe na tina na Tempelo : ‘ Tika ete batonga miboko na yango. ’ › »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]