Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 45 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 This is what our Father says to his anointed, to Cyrus, whose right hand I have grasped to subdue nations before him and to strip kings of their armor, to open doors before him so that gates will not be shut: « Tala liloba oyo Yawe alobi epai ya Sirisi, mopakolami na Ye, oyo Yawe asimbi loboko na ye ya mobali mpo na kokweyisa bikolo nyonso liboso na ye mpe kolongola mikaba wuta na baloketo ya bakonzi, mpo na kofungola bikuke liboso na ye mpo ete bikuke yango ekangama te :
2 I will go before you and level the mountains; I will shatter the doors of bronze and cut through the bars of iron. Nakotambola liboso na yo mpe nakolalisa bangomba, nakobuka bikuke ya bronze mpe nakokata-kata bibende oyo bakangelaka yango.
3 I will give you the treasures of darkness and hoards stored in secret places, so that you may know that I am the Father of Israel, who calls you by your name. Nakopesa yo bomengo oyo babomba na molili, bozwi oyo batia na bisika ebombama, mpo okoka koyeba ete Ngai nazali Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo abengi yo na kombo na yo.
4 For the sake of my servant Jacob, and Israel my chosen, I have called you by your name; I give you a title of honor, though you do not know me. Mpo na bolingo ya Jakobi, mosali na Ngai, mpe Isalaele, moponami na Ngai, nabengi yo na kombo na yo, napesi yo kombo ya lokumu atako oyebi Ngai nanu te.
5 I am the Father, and there is no other; besides me there is none. I equip you for battle, though you do not know me, Nazali Yawe, mosusu azali te ; Nzambe mosusu azali te, soki Ngai te. Nalatisi yo mokaba na loketo atako oyebi Ngai nanu te ;
6 so that people may know, from the rising of the sun to the place of its setting, that there is none besides me. I am the Father, and there is no other. mpo ete, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste, bato bayeba ete mosusu azali te, bobele Ngai nde nazali Nzambe. Nazali Yawe, mosusu azali te.
7 I form light and create darkness, I make well-being and create calamity; I am the Father, who does all these things. Nasalaka pole mpe nakelaka molili, napesaka kimia mpe nakelaka pasi ; Ngai Yawe nde nasalaka makambo oyo nyonso.
8 Rain down, O heavens, from above, and let the skies pour down righteousness; let the earth open wide, that salvation may bear fruit and righteousness spring up together. I, the Father, have created it. Yo, Lola kuna na likolo, nokisa bosembo lokola mvula, tika ete mapata ekitisa yango ! Tika ete mabele efungwama mpo ete lobiko ebima ; tika ete bosembo ekola nzela moko ! Ezali Ngai Yawe nde nakelaki yango.
9 Woe to the one who quarrels with his Maker—a pottery shard among the shards of the earth! Does the clay say to the one who forms it, "What are you making?" or, "Your work has no handles"? Mawa na ye oyo abetaka tembe na Mokeli na ye, ye oyo azali kaka mbeki kati na bambeki ya mabele ! Boni, potopoto ekoki solo koloba na moto oyo asali yango : ‹ Ozali kosala nini ? › Mpe mosala ya maboko na yo ekoki solo koloba : ‹ Azali na maboko te ? ›
10 Woe to the one who says to a father, "What are you fathering?" or to a woman, "What are you bringing to birth?" Mawa na ye oyo alobaka na tata na ye : ‹ Mpo na nini obotaki ngai ? › Mpe na mama na ye : ‹ Mpo na nini obotaki ngai ? ›
11 This is what the Holy One of Israel—our Father—and the one who formed him—says: Will you question me about my children, and give me orders about the work of my hands? Tala liloba oyo Yawe, Mosantu ya Isalaele mpe Mokeli na ye, alobi : Boni, bino nde bato bokotuna Ngai soki nakosala nini mpo na bana na Ngai na mikolo oyo ekoya to bino nde bato bokopesa Ngai mitindo mpo na mosala oyo maboko na Ngai esali ?
12 I made the earth and created humanity upon it. It was my hands that stretched out the heavens, and I commanded all their host. Ngai nde nasala mabele mpe nakela bato kati na yango ; loboko na Ngai moko nde etandaki likolo lokola liputa mpe etiaki mampinga na yango nyonso na molongo.
13 I have stirred him up in righteousness, and I will make all his ways straight. He will rebuild my city and set my exiles free, not for price or reward, says the Father of heaven's armies. Nakobimisa Sirisi na bosembo na Ngai ; nakokomisa nzela na ye nyonso alima. Akotonga lisusu engumba na Ngai mpe akopesa bonsomi na bakangami na Ngai ; ekozala na motuya ya mbongo to ya biloko te, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. »
14 Our Father says: The wealth of Egypt and the merchandise of Cush, and the Sabeans, men of stature, will come over to you and be yours; they will follow behind you, coming over in chains. They will bow down to you and plead with you, saying, "Surely God is with you, and there is no other; there is none besides him." Tala liloba oyo Yawe alobi : « Mosala ya Ejipito, mombongo ya Kushi mpe bato milayi ya Seba, bakoleka epai na yo mpe bakozala ya yo. Bakotambola ya kokangama na minyololo, sima na yo ; bakofukama liboso na yo mpe bakobondela yo na maloba oyo : ‹ Solo, Nzambe azali penza epai na yo, nzambe mosusu azali te ! › »
15 Truly you are a Father who has hidden yourself, the Father of Israel, the Savior. Solo, ozali Nzambe oyo amibombaka, Nzambe, Mobikisi ya Isalaele !
16 All of them are ashamed and disgraced; the makers of idols go off together in confusion. Bato nyonso oyo basalaka banzambe ya bikeko bakoyoka soni mpe bakosambwa ; bango nyonso, bakokende na soni.
17 But Israel is saved by our Father with an everlasting salvation; you will not be ashamed or disgraced for all eternity. Kasi Yawe akobikisa Isalaele na lobiko ya seko na seko. Bokotikalaka lisusu koyoka soni te mpe kosambwa te, libela na libela.
18 For this is what the Father says, who created the heavens—he is the Father!—who formed the earth and made it; he established it. He did not create it empty; he formed it to be inhabited: I am the Father, and there is no other. Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo akela likolo, Ye oyo azali Nzambe oyo asala mpe abongisa mabele, mpe atelemisa yango ngwi ; Ye akelaki yango te mpo ete ezala pamba, kasi asalaki yango mpo ete bato bavanda : « Nazali Yawe, mpe mosusu azali te.
19 I did not speak in secret, in a land of darkness; I did not say to the descendants of Jacob, "Seek me in vain." I, your Father, speak what is right; I declare what is true. Nalobaki na nkuku te, kati na esika moko te ya molili ya mokili ; nalobaki te na bakitani ya Jakobi : ‹ Boluka Ngai kati na pamba ! › Nazali Yawe, nalobaka oyo ezali sembo, nasakolaka oyo ezali alima.
20 Gather together and come; draw near, you survivors of the nations! They have no knowledge—those who carry around their wooden idols and keep praying to a god that cannot save. Bosangana elongo mpe boya, bopusana elongo bino nyonso, bino bato oyo bobiki kati na bikolo ! Bato oyo bamemaka banzambe ya bikeko basala na nzete mpe babelelaka nzambe oyo ebikisaka te ; bazangi boyebi.
21 Declare and present your case; let them consult together! Who foretold this long ago and declared it from ancient times? Was it not I, the Father? There is no other besides me—a righteous Father and a Savior; there is none besides me. Botelema mpe bopesa sango, boloba makambo na bino mpe tosamba elongo ! Nani asakolaki yango wuta kala mpe atatolaki yango wuta na tango oyo eleka ? Ezali Ngai Yawe te ? Ezali na Nzambe mosusu te, soki Ngai te. Nazali Nzambe ya sembo mpe Mobikisi ; mosusu azali te, soki Ngai te.
22 Turn to me and be saved, all the ends of the earth! For I am the Father, and there is no other. Bozonga epai na Ngai mpo ete bobika, bino nyonso oyo bozali na basuka ya mokili ; pamba te Ngai, nazali Nzambe, mpe mosusu azali te.
23 By myself I have sworn; a word has gone out from my mouth in righteousness that will not return: To me every knee will bow, every tongue will swear allegiance. Nalapi ndayi na Kombo na Ngai ; oyo ezali sembo ebimaka na monoko na Ngai, liloba oyo bakoki koboya te : mabolongo nyonso ekofukama liboso na Ngai, mpe minoko nyonso ekolapa ndayi na Kombo na Ngai.
24 They will say of me, "Only in God are righteousness and strength." To him all who raged against him will come, and they will be ashamed. Bakoloba na tina na Ngai : ‹ Makasi mpe bosembo ezali kati na Yawe kaka. › » Bato nyonso oyo batombokelaki Ye bakoya epai na Ye mpe bakoyoka soni.
25 In our Father all the children of Israel will be justified, and in him they will glory. Ezali kati na Yawe nde bato nyonso oyo bazali bakitani ya Isalaele bakokoma bato ya sembo mpe bakozwa lokumu.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]