Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 46 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Bel bows down, Nebo stoops low; their idols are loaded on beasts and cattle. The things you carry are hoisted up, a burden for the weary animals. Tala banzambe ya Babiloni : Beli esili ngala, Nebo ekweyi ; bikeko na yango etiami likolo ya banyama, likolo ya bibwele ! Bikeko oyo bomemaka ezali kilo makasi, ezali mokumba oyo elembisaka banyama.
2 Together they stoop, they bow down; they cannot save themselves, and they go off into captivity. Banzambe yango ya bikeko egumbami mpe ekweyi nzela moko, ezali na makoki te ya kobikisa mokumba na yango, pamba te ekeyi na bowumbu.
3 "Listen to me, house of Jacob, all the remnant of the house of Israel—you whom I have carried from before your birth, lifted up from the womb. Oh ndako ya Jakobi, boyoka Ngai, mpe bino nyonso, batikali ya libota ya Isalaele, bino oyo nandima kobatela wuta na libumu ya mama mpe nandima komema mokumba wuta mbotama na bino.
4 Even to your old age I am he, and to your gray hairs I will carry you. I made you, and I will bear you; I will carry you and I will rescue you. Ezala tango bokotonda na suki ya pembe mpe bokokoma mibange, Ngai nakobongwana te, nakosunga bino kaka ; Ngai nde nasalaki bino, nakomema mokumba na bino, nakosunga bino mpe nakobikisa bino.
5 "To whom will you liken me or count me equal? To whom will you compare me, that we should be alike? Bolingi kokokanisa Ngai to kotia Ngai esika moko na nani ? Bolingi solo kokokanisa Ngai na nani mpo ete amekana na Ngai ?
6 Some pour out gold from the purse and weigh silver on the scale; they hire a goldsmith, and he makes it into a god—then they bow down, yes, they worship it. Bazali bato oyo babimisaka wolo na mabenga na bango mpe bamekaka kilo ya palata na emekelo ; bafutaka mosolo epai ya mosali bikeko na bibende mpo ete asalela bango nzambe ya ekeko ya wolo mpe ya palata, mpo ete bafukamela mpe bagumbamela yango.
7 They lift it on their shoulders and carry it; they set it in its place, and there it stands—from its spot it does not move. If anyone cries out to it, it cannot answer or save him from his trouble. Batiaka yango na mapeka mpe bamemaka yango, batelemisaka yango na esika na yango mpe etikalaka ya kotelema kaka wana. Wuta na esika na yango, ekoningana te. Ata soki moto moko abeleli yango, ekoyanola te, ekobikisa ye te na tango ya pasi.
8 "Remember this and stand firm; take it to heart, you rebels. Bokanisa yango lisusu, mpo bososola malamu ; bino batomboki, bozongisa yango lisusu na mitema na bino !
9 Remember the former things long past, for I am your Father, and there is no other; I am your Father, and there is none like me. Bokanisa lisusu makambo ya liboso, makambo oyo ya kala penza ; solo, Ngai nazali Nzambe, mpe mosusu azali te, nazali Nzambe, moko te akokani na Ngai.
10 I declare the end from the beginning, and from ancient times what has not yet happened, saying, 'My purpose will stand, and I will accomplish everything I please.' Nasakolaki makambo ya suka na ebandeli ; wuta kala penza, nasakolaki makambo oyo ekoya. Nalobaki : « Mabongisi na Ngai ekolongisama, mpe nakosala nyonso oyo nasepeli kosala. »
11 I call a bird of prey from the east, the man who carries out my purpose from a far-off land. What I have spoken, I will bring about; what I have planned, I will do. Wuta na este, nabengi ndeke oyo eliaka misuni ; longwa na mokili ya mosika, moto oyo akokokisa mabongisi na Ngai. Makambo oyo nalobaki, yango nde ekokokisama ; oyo nabongisaki, yango nde ekosalema.
12 "Listen to me, you stubborn-hearted, you who are far from righteousness: Boyoka Ngai, bino bato ya mitema makasi, bino bato oyo bozali mosika ya bosembo !
13 I am bringing my righteousness near—it is not far off—and my salvation will not delay. I will give salvation in Zion, my splendor to Israel." Bosembo na Ngai ekomi pene, ezali lisusu mosika te ; mpe lobiko na Ngai ekowumela te. Nakopesa lobiko epai na Siona, mpe nkembo na Ngai, epai na Isalaele.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]