Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 47 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "Step down, sit in the dust, virgin daughter of Babylon; sit on the bare ground, no throne, daughter of the Chaldeans. No longer will they call you tender and delicate. Kita mpe vanda na putulu, Babiloni, mboka kitoko ! Vanda na mabele, kiti ya bokonzi ezali te, Babiloni, mboka kitoko ! Moto moko te akobenga yo lisusu « mwasi bonzenga » to « mwasi kitoko. »
2 "Take the millstones and grind flour; remove your veil, strip off your robe, bare your legs, wade through the rivers. Kamata mabanga oyo banikelaka ble mpe sala farine, longola kitambala na yo, tombola nzambala na yo, mpe mipende na yo emonana, bongo katisa bibale !
3 Your nakedness will be uncovered, and your shame will be seen. I will bring justice, and I will spare no one." Bolumbu na yo ekomonana, mpe soni na yo ekobombama te. Nakozongisa mabe na mabe, mpe moto moko te akopekisa Ngai.
4 Our Redeemer—the Father of heaven's armies is his name—the Holy One of Israel, our Father. Mosikoli na biso, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga, Mosantu ya Isalaele.
5 Sit in silence, and go into darkness, daughter of the Babylonians; for you will no longer be called the queen of kingdoms. Vanda kimia, kende na molili, Babiloni, mboka kitoko, pamba te bakobenga yo lisusu te « mwasi mokonzi ya bikolo. »
6 I was angry with my children; I defiled my inheritance and gave them into your hand. You showed them no mercy; you laid a very heavy yoke even on the elderly. Nasilikelaki bato na Ngai, nasambwisaki libula na Ngai ; nakabaki bango na maboko na yo, mpe oyokelaki bango mawa te ; bongo omemisaki ata mibange ekangiseli ya kilo makasi.
7 You said, "I will be queen forever"—so you did not take these things to heart or remember how it would end. Olobaki : « Nakozala mwasi mokonzi mpo na libela ! » Kasi motema na yo ekanisaki te tina ya makambo oyo mpe ndenge nini ekosukela.
8 Now then, hear this, you lover of pleasures who sits securely, who says in her heart, "I am, and there is none besides me; I will never sit as a widow or know the loss of children." Yoka sik’oyo, yo mwasi ya biyenga, oyo omesana kovanda na kimia mpe omilobelaka : « Ngai nde nazali, mosusu azali te. Nakotikala kokoma te mwasi akufisa mobali mpe nakotikala kokufisa bana te ! »
9 But both these things will come upon you in a moment, in a single day: the loss of children and widowhood. They will come upon you in full measure, despite your many sorceries and the great power of your spells. Makambo mibale oyo ekokomela yo mbala moko mpe kaka na mokolo moko : kozanga bana mpe kokufisa mobali. Makambo oyo eleka ndelo nde ekokomela yo, ata kindoki na yo ezali makasi mpe bakisi na yo ezali na nguya.
10 You trusted your own evil; you said, 'Nobody sees me.' Your wisdom and knowledge misled you, so you thought, 'I alone am, and none exists besides me.' Otiaki elikya na makambo na yo ya mabe, olobaki : « Moto moko te azali komona ngai ! » Bwanya mpe mayele na yo epengwisaki yo tango ozalaki komilobela : « Ngai nde nazali, mosusu azali te ! »
11 So disaster will come upon you that you will not know how to charm away; calamity will fall on you that you cannot ward off; ruin will come upon you suddenly, before you know it. Pasi ekokomela yo, mpe okoyeba te ndenge ya kolongola yango ; mikakatano ekokomela yo mpe okokoka komibatela te ; libebi oyo oyebaki te ekokomela yo na pwasa.
12 Keep on, then, with your spells and your many sorceries that you have worked at since your youth. Perhaps you will succeed; perhaps you will cause terror. Kangama kaka na bonganga mpe na kindoki na yo, oyo omonelaka pasi wuta bolenge na yo ! Tango mosusu okozwela yango litomba, tango mosusu okokoka kobangisa bato.
13 You are worn out by your many counsels. Let them stand up and save you—those who map the heavens, who gaze at the stars, who at each new moon predict what will come upon you. Batoli nyonso oyo osili kozwa epai na bango elembisi yo nzoto ! Tika ete bato ya soloka oyo bayekolaka bikelamu nyonso ya likolo : moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu, mpe bayebisaka na ebandeli nyonso ya sanza makambo oyo ekoya, batelema wana mpe babikisa yo !
14 See, they are like stubble; the fire burns them up. They cannot save themselves from the power of the flame. These are no coals for warming, no fire to sit beside. Tala, bakozala solo lokola matiti ya kokawuka, matiti oyo moto ekotumba ; bakokoka kobikisa ata milimo na bango moko te na nguya ya moto : Ekozala lisusu te lokola makala ya moto mpo na koyetola to moto mpo na kovanda zingazinga na yango.
15 This is what they are to you—those you have worked and traded with since your youth. Each wanders off in his own direction; there is no one to save you. Ezali bongo nde bakokoma liboso na yo, bato nyonso oyo ozalaki komonela pasi, mpe bato oyo ozalaki kosala elongo na bango wuta bolenge na yo. Moko na moko na bango akoyengayenga na ngambo na ye, moko te akobikisa yo !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]