Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 48 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Listen to this, house of Jacob, you who are called by the name of Israel and who came from the line of Judah; you who swear by the name of our Father and call on our Father—but not in truth or in righteousness. Boyoka makambo oyo, oh ndako ya Jakobi, bino oyo bobengamaka na kombo ya Isalaele, bino oyo bobimi na libota ya Yuda, bino oyo bolapaka ndayi na Kombo na Yawe mpe bobelelaka Kombo ya Nzambe ya Isalaele, kasi na bosolo te mpe na bosembo te !
2 For they call themselves people of the holy city and lean on our Father—the Father of heaven's armies is his name. Bino oyo bomibengaka « Bato ya engumba mosantu » mpe bolukaka lisungi epai ya Nzambe ya Isalaele, oyo Kombo na Ye ezali « Yawe, Mokonzi ya mampinga. »
3 "I declared the former things long ago; they went out from my mouth, and I made them known. Then suddenly I acted, and they came true. Nasakolaki makambo ya liboso wuta kala, monoko na ngai nde ebimisaki yango mpe nasalaki ete eyebana ; nasalaki yango na pwasa mpe ekokisamaki.
4 Because I knew how stubborn you are—your neck sinew stiff as iron, your forehead hard as bronze.' Pamba te nayebaki ndenge nini bozalaka bato ya mito makasi, bato oyo bazalaka na kingo lokola ebende mpe oyo mbunzu na bango ezalaka lokola bronze.
5 I told you these things long ago; before they happened I announced them to you, so you could never say, 'My idol did them; my carved image and my cast figure commanded them." Yango wana, nalobaki na yo makambo oyo wuta kala, nayebisaki yo yango liboso ete ekokisama mpo oloba te : « Nzambe na ngai ya ekeko nde asali yango, elilingi na ngai ya nzete mpe ya ebende nde apesaki mitindo ete esalema ! »
6 You have heard it; now look at all of it. Will you not admit it? From now on I will tell you new things, hidden things you never knew.' Boyokaki makambo oyo ! Botala, yango nyonso ekokisami. Boni, bokondima yango kaka te ? Wuta sik’oyo, nakoyebisa yo makambo ya sika, makambo oyo ebombama, makambo oyo oyebi nanu te.
7 They are created now, not long ago; before today you had never heard of them, so you cannot say, 'I already knew them.' Ekelami nde sik’oyo, ezali makambo ya kala te, oyoka nanu yango te, liboso ya mokolo ya lelo. Boye, okoki koloba te : « Solo, nayoka sango na yango. »
8 You have never heard, never known; long ago your ear was not opened. For I knew how treacherously you would act—you have been called a rebel from birth. Solo, oyoka yango nanu te mpe oyebi yango te ; wuta kala, litoyi na yo ezalaka ya kokangama. Solo, nayebi ete ozalaka mokosi ; babengaka yo motomboki wuta na libumu ya mama na yo.
9 For my own name's sake I hold back my anger; for the sake of my praise I restrain it toward you, so that I do not cut you off. Mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nakolembisa kanda ya motema na Ngai ; mpo na lokumu na Ngai, nakozongisa motema na Ngai sima mpo na yo. Yango wana, nakoboma yo te.
10 See, I have refined you, but not as silver; I have tested you in the furnace of affliction. Tala, napetolaki yo, kasi ndenge bapetolaka palata na moto te ; namekaki yo kati na moto ya minyoko.
11 For my own sake, for my own sake, I act—for why should my name be profaned? My glory I will not give to another. Nasali yango kaka mpo na lokumu na Ngai, mpo na lokumu na Ngai moko. Ndenge nini nakoki solo komisambwisa Ngai moko ? Nakokaba nkembo na Ngai na nzambe mosusu te.
12 "Listen to me, Jacob, and Israel, whom I called: I am he; I am the first, and I am the last. Yoka Ngai, oh Jakobi, Isalaele, yo oyo nabengaki ! Ngai, nabongwanaka te ; nazalaka na ebandeli mpe na suka.
13 My own hand laid the foundation of the earth, and my right hand spread out the heavens; when I call to them, they stand up together." Loboko na Ngai moko nde esalaki miboko ya mabele, mpe loboko na Ngai ya mobali nde etandaki likolo. Soki nabengi yango, yango nyonso etelemaka elongo.
14 Gather together, all of you, and listen: who among them has declared these things? The one I love will carry out my purpose against Babylon, and his arm will be against the Babylonians. Bino nyonso, boya elongo mpe boyoka : Nzambe nini ya ekeko asakolaki makambo oyo ? Moto oyo Yawe alingaka akokokisa mokano na Ye mpo na Babiloni, mpe loboko na ye ekotelemela bato ya Babiloni.
15 I, I myself, have spoken; yes, I have called him. I have brought him, and he will succeed in his way. Ezali Ngai, solo ezali Ngai nde nalobi mpe nabengi ye ; nakoyeisa ye, mpe akolonga na makambo na ye.
16 Come near to me, hear this: from the beginning I have not spoken in secret; from the time it came to be, I was there. And now the Sovereign Father has sent me—and his Spirit. Bopusana pene na Ngai mpe boyoka likambo oyo : « Wuta na ebandeli, nalobaka na nkuku te ; wuta tango makambo oyo esalema, nazali wana. » Mpe sik’oyo, Nkolo Yawe atindi Ngai elongo na Molimo na Ye.
17 This is what our Father says—your Redeemer, the Holy One of Israel: I am your Father, who teaches you for your good, who leads you in the way you should go. Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli na yo, Mosantu ya Isalaele, alobi : « Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo ateyaka yo makambo ya malamu mpo na bolamu na yo ; oyo atambolisaka yo na nzela oyo osengeli kolanda.
18 "If only you had paid attention to my commands! Then your peace would have flowed like a river, and your righteousness like the waves of the sea. Oh ! Soki osalaki penza keba na mibeko na Ngai, kimia na yo elingaki kozala lokola ebale, mpe bosembo na yo, lokola mbonge ya ebale monene ;
19 Your children would have been like the sand, and your own offspring like its grains; their name would never be cut off or destroyed from my presence." bakitani na yo balingaki kozala lokola zelo, bana na yo, lokola motango ya mbuma ya zelo ; kombo na bango elingaki kolongwa te to kobebisama te liboso na Ngai.
20 Go out from Babylon! Flee from the Babylonians! With a shout of joy declare it, proclaim it; send it out to the end of the earth. Say, 'Our Father has redeemed his servant Jacob!' Bobima na Babiloni, bokima wuta na bato ya Babiloni ! Boloba yango na makelele ya esengo mpe botatola yango ; bopanza sango na yango kino na suka ya mokili ; boloba : ‹ Yawe asikoli Jakobi, mosali na Ye. › »
21 They did not thirst when he led them through the deserts; he made water flow for them from the rock. He split the rock, and the water gushed out. Bayokaki posa ya mayi te tango azalaki kotambolisa bango na esobe, abimisaki mayi na libanga mpo na bango, abukaki libanga mpe mayi ebimaki.
22 "There is no peace," says our Father, "for the wicked." Kasi Yawe alobaki : « Kimia ezali te mpo na bato mabe. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]