Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 49 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Listen to me, coastlands; pay attention, you peoples from afar. Our Father called me from the womb; from within my mother he named me. Boyoka ngai, bino bisanga ; boyoka maloba oyo, bino bikolo oyo ezali mosika : Yawe abengaki ngai wuta na libumu ya mama na ngai, azalaki kolobela kombo na ngai wuta mbotama na ngai ;
2 He made my mouth like a sharp sword; in the shadow of his hand he hid me. He made me a polished arrow; in his quiver he concealed me. akomisi monoko na ngai lokola mopanga ya minu makasi, abombi ngai na se ya elili ya loboko na Ye, akomisi ngai lokola tolotolo mpe abombi ngai kati na ebombelo batolotolo na Ye ;
3 And he said to me, "You are my servant, Israel, in whom I will display my splendor." alobaki na ngai : « Oh Isalaele, ozali mosali na ngai, nakomonisa nkembo na ngai na nzela na yo. »
4 But I said, "I have labored in vain; I have spent my strength for nothing and in futility. Yet surely my justice is with my Father, and my reward with my Father." Kasi ngai, nalobaki : « Nabimisaki motoki na ngai se pamba, nasilisaki makasi na ngai na pamba mpe nazwaki litomba moko te. Nzokande, lifuti na ngai ezali na maboko ya Yawe, mpe litomba na ngai ezali epai ya Nzambe na ngai. »
5 And now our Father says—he who formed me from the womb to be his servant, to bring Jacob back to him, that Israel might be gathered to him, for I am honored in his eyes, and my Father has become my strength, Mpe sik’oyo, Yawe oyo asalaki ngai wuta na libumu ya mama na ngai mpo ete nazala mosali na Ye, mpo na kozongisa Jakobi epai na Ye mpe kosangisa Isalaele pene na Ye, pamba te nazali na lokumu na miso ya Yawe mpe Nzambe na ngai azali makasi na ngai,
6 he says: "It is too small a thing for you to be my servant to raise up the tribes of Jacob and to bring back those preserved in Israel; I will also make you a light for the nations, that my salvation may reach to the ends of the earth." Ye, Yawe, alobi : « Ezali penza likambo moke mpo na yo kozala mosali na Ngai mpo na kotelemisa mabota ya Jakobi mpe kozongisa bana ya Isalaele oyo nabombaki. Mpe lisusu, nakokomisa yo pole mpo na bikolo mosusu mpo ete omema lobiko na Ngai kino na suka ya mokili. »
7 This is what our Father says, the Redeemer of Israel, his Holy One, to the one deeply despised, abhorred by the nation, to the servant of rulers: Kings will see and rise; princes will bow down, because of your Father who is faithful, the Holy One of Israel, who has chosen you. Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli mpe Mosantu ya Isalaele, alobi epai na ye oyo atiolami mpe amonani lokola eloko pamba na miso ya ekolo, na miso ya mowumbu ya bakonzi mabe : « Bakonzi bakomona yo mpe bakotelema, bakambi bakomona yo mpe bakogumbama, likolo na Yawe oyo azali Sembo, Mosantu ya Isalaele, oyo aponaki yo. »
8 This is what our Father says: In a time of favor I answered you, and in a day of salvation I helped you; I will keep you and give you as a covenant for the people, to restore the land, to apportion the desolate inheritances, Tala liloba oyo Yawe alobi : « Na tango ya malamu, nakoyanola yo ; mpe na mokolo ya lobiko, nakosunga yo ; nakobatela yo mpe nakotombola yo mpo ete osala boyokani elongo na bato, osala ete mokili etombwama mpe ozongisela yango libula na yango oyo ebebisamaki ;
9 saying to the prisoners, 'Come out,' and to those in darkness, 'Show yourselves.' Along the roads they will feed, and on all the bare heights will be their pasture. mpo ete oloba na bakangami : ‹ Bobima, › mpe na bato oyo bazali kati na molili : ‹ Bokoma bansomi ! › Boye bakozala lokola bibwele oyo ezali kolia matiti pene ya nzela, mpe bakozwa bilei na bangomba nyonso oyo ebotaka matiti te.
10 They will not hunger or thirst, nor will scorching wind or sun strike them, for the one whose heart is moved with compassion for them will lead them, and by springs of water he will guide them. Bakoyoka lisusu nzala te mpe posa ya mayi te ; molunge ya esobe to moyi makasi ekomonisa bango pasi te, pamba te Ye oyo alingaka bango akolakisa bango nzela mpe akomema bango pene ya miluka.
11 And I will turn all my mountains into a road, and my highways will be raised up. Nakobongola bangomba na Ngai nyonso nzela, mpe nakokunda mabulu ya banzela na Ngai ya minene.
12 Look—these will come from far away; and look, these from the north and the west, and these from the land of Sinim. Tala, bakowuta penza mosika, ndambo moko na ngambo ya nor, ndambo mosusu na ngambo ya weste, mpe ndambo mosusu na etuka ya Sinimi. »
13 Sing for joy, heavens, and rejoice, earth; break out in singing, mountains! For our Father has comforted his people, and his heart is moved with compassion for his afflicted ones. Oh likolo, ganga na esengo ! Oh mabele, sepela ! Oh bangomba, boyemba banzembo ! Pamba te Yawe abondisi bato na Ye mpe ayokeli mawa bato oyo banyokwamaki.
14 But Zion said, "Our Father has forsaken me; the Sovereign Father has forgotten me." Kasi Siona alobaki : « Yawe asundoli ngai, Nkolo na ngai abosani ngai ! »
15 "Can a woman forget her nursing child, that her heart would not be moved with compassion for the son of her womb? Even these may forget, yet I will not forget you. Boni, mama akoki solo kobosana bebe na ye oyo azali komelisa mabele, to kozanga bolingo epai ya mwana oyo ye aboti ? Ata soki akoki kobosana, ngai nakoki kobosana yo te !
16 Look—I have engraved you on the palms of my hands; your walls are ever before me. Tala, nakoma yo na matandu ya maboko na ngai ; bamir na yo ya makasi ezalaka tango nyonso liboso na ngai.
17 Your children hurry back; those who tore you down and laid you waste go away from you. Bana na yo bakozonga na lombangu, kasi babebisi na yo bakokende mosika na yo.
18 Look all around you and see: they all gather and come to you. As surely as I live, declares our Father, you will wear them all like an ornament; you will bind them on like a bride. Tombola miso na yo mpe tala na zingazinga : bana na yo nyonso basangani mpe bazali koya epai na yo. Nalapi ndayi na Kombo na Ngai, elobi Yawe, ete bakozala mpo na yo lokola babiju ya talo, mpe okolata bango lokola mokaba ya mwasi mobandami na libala.
19 Surely your ruins and your desolate places and your devastated land—surely now you will be too cramped for your inhabitants, and those who swallowed you up will be far away. Ata soki mokili na yo ekomaki lokola mipiku ya mabanga, bongo ebebisamaki mpe etikalaki lisusu na bato te ; sik’oyo, ekokoma moke mpo na bato na yo, mpe bato oyo bazalaki komonisa yo pasi bakozala mosika na yo.
20 The children born in your bereavement will yet say in your hearing, "This place is too narrow for me; make room for me to live." Okanisaki ete ozangaki bana, kasi okoyoka bango koloba na matoyi na yo : « Esika oyo ezali penza moke mpo na biso ; pesa biso esika oyo eleki monene mpo ete tokoka kovanda. »
21 Then you will say in your heart, "Who bore these for me? I was bereaved and barren, exiled and cast aside—who has raised these? I was left all alone; where did these come from?" Boye, okomilobela na motema : « Nani abotelaki ngai bana nyonso oyo ? Nazangaki bana mpe nazalaki kobota te, nazalaki mowumbu mpe moto basundola. Bongo nani abokolaki bango ? Natikalaki kaka ngai moko, bongo bana oyo bawuti wapi ? »
22 This is what the Sovereign Father says: Look—I will lift up my hand to the nations and raise my signal to the peoples; and they will bring your sons in their arms, and your daughters will be carried on their shoulders. Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Tala, nakotombola loboko na Ngai liboso ya bikolo, nakotelemisa bendele na Ngai liboso ya bato ; bakomema bana na yo ya mibali na maboko na bango mpe oyo ya basi, na mapeka na bango.
23 Kings will be your foster fathers, and their queens your nursing mothers. With faces to the ground they will bow down to you and lick the dust of your feet. Then you will know that I am your Father; those who wait for me will not be ashamed." Bakonzi bakozala batata babokoli na yo, mpe basi na bango, basungi na yo ; bakofukama liboso na yo na bilongi etala na mabele, bakolembola putulu ya makolo na yo. Boye, okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe ; ete bato oyo batielaka Ngai motema bayokisamaka soni te. »
24 Can the plunder be taken from the mighty, or the captives of a tyrant be rescued? Boni, bakoki solo kobotola bomengo ya bitumba na maboko ya basoda ya mpiko to kokangola mokangami wuta na maboko ya monyokoli na ye ?
25 But this is what our Father says: Even the captives of the mighty will be taken, and the plunder of the tyrant rescued; for I myself will contend with those who contend with you, and I will save your children. Kasi tala liloba oyo Yawe alobi : « Solo, mokangami akokangolama na maboko ya basoda ya mpiko, mpe bomengo ya bitumba ekokangolama na maboko ya monyokoli. Nakotelemela bato oyo bakotelemela yo, mpe nakobikisa bana na yo.
26 I will make your oppressors eat their own flesh, and they will be drunk on their own blood as with sweet wine. Then all flesh will know that I am your Savior—your Father—and your Redeemer, the Mighty One of Jacob. Nakosala ete banyokoli na yo balia misuni na bango moko ; bakolangwa makila na bango moko ndenge balangwaka masanga ya vino. Boye, moto nyonso akoyeba ete Ngai Yawe, nazali Mobikisi na yo, Mosikoli na yo, Elombe ya Jakobi. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]