Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 50 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 This is what our Father says: "Where is your mother's certificate of divorce, with which I sent her away? Or to which of my creditors did I sell you? Look, you were sold for your sins, and your mother was sent away for your offenses. Tala liloba oyo Yawe alobi : « Wapi mokanda ya koboma libala oyo Ngai nabenganelaki mama na bino ? To natekaki bino epai ya nani oyo Ngai nazalaki na niongo na ye ? Botekamaki mpo na masumu na bino ; mpe libala ya mama na bino ekufaki mpo na botomboki na bino.
2 Why, when I came, was there no one? When I called, was there no one to answer? Is my hand too short to redeem? Or have I no power to deliver? Look, by my rebuke I dry up the sea, I turn the rivers into a desert; their fish stink for lack of water and die of thirst. Mpo na nini moto azalaki te tango nayaki ? Mpo na nini moto apesaki eyano te tango nabengaki ? Loboko na Ngai ezalaki mokuse mpo na kosikola bino ? Nazangaki solo makasi mpo na kokangola bino ? Na pamela na Ngai, nakawusaka ebale monene, nakomisaka bibale esobe ; mbisi na yango ekomaka kolumba solo mpo ete mayi ezali te mpe ekufaka na posa ya mayi.
3 I clothe the heavens with blackness and cover them with black cloth." Nalatisaka likolo elamba ya mwindo mpe nazipaka yango na bilamba ya saki. »
4 My Sovereign Father has given me a disciple's tongue, that I may know how to speak a sustaining word to the weary. Morning by morning he awakens, he awakens my ear to hear as a disciple. Nkolo Yawe apesaki ngai maloba ya bayekoli, mpo ete nakoka kolendisa na nzela ya liloba moto oyo alembi ; alamusaka ngai tongo nyonso, alamusaka litoyi na ngai mpo ete nayoka lokola moyekoli.
5 My Sovereign Father has opened my ear, and I was not rebellious; I did not turn away. Nkolo Yawe afungolaki ngai matoyi, mpe ngai natiaki moto makasi te ; namizongisaki sima te.
6 I gave my back to those who strike, and my cheeks to those who pull out the beard; I did not hide my face from disgrace and spitting. Napesaki mokongo na ngai epai ya bato oyo bazalaki kobeta ngai, matama na ngai, epai ya bato oyo bazalaki kopikola ngai mandefu. Nabombaki elongi na ngai te na kotiolama mpe na basoyi.
7 But my Sovereign Father helps me; therefore I have not been disgraced; therefore I have set my face like flint, and I know that I will not be put to shame. Lokola Nkolo Yawe asungaka ngai, nakoyokisama soni te. Yango wana, nakomisi elongi na ngai makasi lokola libanga, mpe nayebi ete nakoyokisama soni te.
8 My vindicator is near. Who will contend with me? Let us stand together. Who is my adversary? Let him come near to me. Ye oyo alongisaka ngai azali pene, nani akokoka kotelemela bosembo na ngai ? Tika ete tosamba elongo ! Nani akofunda ngai ete tosamba na ye ? Tika ete apusana pene na ngai !
9 See, my Sovereign Father helps me; who will declare me guilty? Look, all of them will wear out like a garment; the moth will eat them up. Ezali Nkolo Yawe nde asungaka ngai ; nani akolonga ngai na esambiselo ? Tala, bango nyonso bakokweya lokola bilamba ya kala oyo ebeba, bongo nseka ekolia bango.
10 Who among you fears our Father and obeys the voice of his servant? Let the one who walks in darkness and has no light trust in his name and lean on his Father. Ezali na moto kati na bino oyo atosaka Yawe mpe ayokaka mongongo ya Mowumbu na Ye, bongo atambola kati na molili mpe atikala komona pole te ? Tika ete atia elikya na ye kati na Kombo na Yawe mpe atalela Nzambe na ye.
11 Look, all you who kindle a fire, who arm yourselves with torches: walk in the light of your fire and among the torches you have lit! This is what you will receive from my hand: you will lie down in torment. Kasi sik’oyo, bino nyonso oyo bopelisi moto mpe bosimbi bakoni oyo ezali kopela moto, bokende, botambola na pole ya moto na bino mpe ya bakoni oyo bopelisi. Tala oyo bokozwa na maboko na ngai : Bokokufa na pasi !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]