Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 51 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "Listen to me, you who pursue righteousness, you who seek our Father: look to the rock from which you were cut, and to the quarry from which you were dug. « Boyoka ngai, bino bato oyo bolukaka bosembo mpe bolukaka Yawe ! Botala libanga epai wapi bosalemaki, mpe libulu epai wapi bobendamaki.
2 Look to Abraham your father, and to Sarah who gave you birth; for when he was only one I called him, and I blessed him and made him many. Botala Abrayami, tata na bino ; mpe Sara oyo abotaki bino. Tango nabengaki ye, azalaki kaka ye moko ; napambolaki ye mpe nakomisaki ye tata ya bato ebele !
3 For our Father comforts Zion; he comforts all her ruins. He makes her wilderness like Eden, her desert like the garden of our Father. Joy and gladness are found in her, thanksgiving and the sound of song. Solo, Yawe akobondisa Siona mpe akotala na liso ya ngolu bisika nyonso ya Siona oyo ebeba ; akokomisa esobe na yango lokola Edeni, bisika na yango ekawuka, lokola elanga ya Yawe. Esengo mpe kosepela nde ekomonana kuna, matondi mpe mongongo ya banzembo.
4 "Listen to me, my people; hear me, my nation: for a teaching will go out from me, and I will set my justice as a light to the peoples. Oh bato na ngai, boyoka ngai ! Bino, ekolo na ngai, boyoka ngai malamu : Mpo ete Mobeko ekobimela epai na ngai, lolenge na ngai ya kokata makambo ekoyeisa pole na bikolo.
5 My righteousness is near, my salvation has gone out, and my arms will bring justice to the peoples; the coastlands wait for me, and they put their hope in my arm. Bosembo na ngai ezali pene, lobiko na ngai ebimi na lombangu, mpe maboko na ngai ekosambisa bikolo. Bisanga ekotalela ngai, ekozala na elikya na nguya ya loboko na ngai.
6 Lift up your eyes to the heavens, and look at the earth beneath: the heavens will vanish like smoke, the earth will wear out like a garment, and those who live in it will die like gnats; but my salvation will last forever, and my righteousness will never be shattered. Botombola miso na bino na likolo, botala na se, na mabele ; likolo ekolimwa lokola milinga, mabele ekonuna lokola elamba, mpe bavandi na yango bakokufa lokola banzinzi. Kasi lobiko na ngai ekowumela seko na seko, bosembo na ngai ekotikala kokweya mokolo moko te.
7 Listen to me, you who know righteousness, the people who carry my teaching in their hearts: do not fear the reproach of mortals, and do not be shattered by their insults. Boyoka ngai, bino bato oyo boyebi bosembo, bino bato oyo bozali na Mobeko na ngai kati na mitema na bino : Bobanga te lolenge bato bakotiola bino to bozala na somo ya mangungu na bango te.
8 For the moth will eat them like a garment, and the worm will eat them like wool; but my righteousness will last forever, and my salvation to all generations." Pamba te nseka ekolia bango lokola elamba, mpe bampese ekolia bango lokola elamba basala na bapwale ya meme ; kasi bosembo na ngai ekowumela seko na seko, mpe lobiko na ngai, bileko na bileko. »
9 Awake, awake, clothe yourself with strength, O arm of our Father! Awake as in days of old, in the generations long past. Was it not you who cut the sea monster Rahab to pieces, who pierced the dragon through? Oh loboko na Yawe, lamuka, lamuka ! Lata makasi ! Lamuka, lokola na mikolo ya kala, na bileko oyo eleka kala ! Ezali Yo te oyo okataki-kataki Raabi, oyo obomaki dalagona ?
10 Was it not you who dried up the sea, the waters of the great deep, who made the depths of the sea a road for the redeemed to cross over? Ezali Yo te oyo okawusaki ebale monene, mayi oyo ya mozindo makasi ? Ezali Yo te oyo opasolaki nzela kati na ebale monene mpo ete basikolami na Yo bakoka kokatisa ?
11 So the ransomed of our Father will return and come to Zion with singing; everlasting joy will crown their heads. Gladness and joy will overtake them, and sorrow and sighing will flee away. Boye, bato oyo Yawe akangoli bakozonga, bakokota kati na Siona na banzembo ya esengo ; esengo ya libela na libela ekozala lokola motole na mito na bango ; bakotondisama na esengo mpe na kosepela, bongo pasi mpe minyoko ekokima mosika na bango.
12 "I, I am the one who comforts you. Who are you to fear mere mortals who die, people who pass away like grass, « Ezali Ngai, Ngai nde nabondisaka bino. Ozali nani mpo ete obanga moto oyo akokufa, mwana na moto oyo azali kaka lokola matiti ?
13 that you forget me, your Maker, who stretched out the heavens and laid the foundations of the earth? You live in constant dread all day long because of the fury of the oppressor, who is bent on destruction. But where is the fury of the oppressor? Ozali mpe kobosana Yawe, Mokeli na Yo, oyo atandaki likolo ndenge batandaka liputa mpe atongaki miboko ya mabele, mpo ete okoma kobika mikolo nyonso na kobanga liboso ya kanda ya banyokoli oyo babongisami mpo na kobebisama ? Pamba te, wapi kanda ya banyokoli ?
14 The one bent down in chains will soon be set free; he will not die and go down to the pit, nor will he go hungry. Etikali kaka moke, bakangami bakozwa bonsomi, bakokufa lisusu te kati na boloko na bango mpe bakozanga lisusu bilei te.
15 For I am your Father, who stirs up the sea so that its waves roar—the Father of heaven's armies is his name. Nazali Yawe, Nzambe na Yo, oyo aningisaka ebale monene mpo ete mbonge na yango etomboka. Kombo na Ye ezali ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga. ›
16 And I have put my words in your mouth and covered you with the shadow of my hand, planting the heavens and laying the foundations of the earth, and saying to Zion, 'You are my people.'" Natiaki maloba na Ngai na monoko na yo, mpe nazipi yo na elili ya loboko na ngai ; nazali Ye oyo atiaki likolo na esika na yango, oyo atongaki miboko ya mabele mpe oyo alobaki na Siona : ‹ Bozali bato na Ngai ! › »
17 Awake, awake! Rise up, O Jerusalem, you who have drunk from the hand of our Father the cup of his wrath, who have drained the bowl to the dregs, the cup that makes you stagger. Lamuka, lamuka ! Telema, Yelusalemi, yo oyo omelaki, wuta na loboko ya Yawe, kopo ya kanda na Ye ; yo oyo omelaki mpe osilisaki kino na suka kopo oyo epesaka bato kizunguzungu.
18 Among all the children she has borne there is no one to guide her; among all the children she has raised there is no one to take her by the hand. Kati na bana nyonso oyo abotaki, Ezali na mwana moko te oyo azali kolakisa ye nzela ; kati na bana oyo abokolaki, moko te azali kosimba ye na loboko.
19 These two things have fallen on you—who will mourn for you?—ruin and destruction, famine and sword. Who can comfort you? Makama mibale oyo ekomeli yo, nani akoki kolendisa yo : Mokili na yo ekomi mipiku ya mabanga mpe ebebisami, nzala makasi mpe mopanga, nani akobondisa yo ?
20 Your children have fainted; they lie at every street corner like an antelope caught in a net, filled with the wrath of our Father, the rebuke of your Father. Bana na yo balembi, balali-lali na babalabala nyonso lokola mboloko oyo ekangami na motambo ; kanda ya Yawe mpe pamela ya Nzambe na yo nde ebuki-buki bango lolenge wana.
21 Therefore hear this, you who are afflicted, drunk, but not with wine: Yango wana, yo oyo basambwisi, yo oyo olangwe, kasi na masanga ya vino te, yoka makambo oyo :
22 This is what your Sovereign Father says, who defends the cause of his people: 'See, I have taken from your hand the cup that makes you stagger, the bowl of my wrath; you will never drink it again.' Tala liloba oyo Nkolo Yawe, Nzambe na yo, oyo abundelaka bato na Ye, alobi : « Tala, nalongoli kopo ya kizunguzungu, kopo ya kanda na Ngai, na loboko na yo, okomela yango lisusu te.
23 I will put it into the hand of your tormentors, who said to you, 'Bow down so we can walk over you,' so that you made your back like the ground, like a street for them to cross. Nakotia yango na loboko ya banyokoli na yo, oyo balobaki na yo : ‹ Lala na se mpo ete totambola likolo na yo ! › Mpe okomisaki mokongo na yo lokola nzela, lokola balabala mpo ete batambola likolo na yo. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]