Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 52 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Wake up, wake up, put on your strength, Zion; put on your beautiful garments, Jerusalem, the holy city; for the uncircumcised and the unclean will never enter you again. Oh Siona, lamuka, lamuka ! Tika ete omikomisa lisusu makasi. Yelusalemi, engumba ya bule, lata bilamba na yo ya lokumu, pamba te ezala moto oyo bakata ngenga te to moto ya mbindo, akokota lisusu kati na yo te.
2 Shake yourself from the dust and arise; take your throne, Jerusalem; free yourself from the bonds around your neck, captive daughter of Zion. Oh Yelusalemi, milongola na putulu, telema mpe vanda na esika na yo ya lokumu ! Oh Siona, mboka kitoko, yo oyo ozali mokangami, kata minyololo na kingo na yo !
3 For this is what our Father says: "You were sold for nothing, and you will be redeemed without money." Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Lokola bomitekaki na ofele, bokosikolama mpe na mbongo te. »
4 For this is what the Sovereign Father says: "At first my people went down to Egypt to live there as foreigners, and Assyria oppressed them for nothing. Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Na ebandeli, bato na Ngai bakendeki na Ejipito mpo na kovanda kuna lokola bapaya ; mpe na sima, Asiri anyokolaki bango.
5 "And now, what is this?" declares our Father, "seeing that my people are taken away for nothing? Their rulers wail," declares our Father, "and continually, all day long, my name is despised. Sik’oyo, eloko nini nasili kozwa awa, » elobi Yawe ? « Pamba te bamemaki bato na Ngai na pamba, mpe bato oyo bazali kokonza bango bazali koganga makasi, » elobi Yawe, « mpe, mokolo na mokolo mpe tango nyonso, Kombo na Ngai ezali kofingama.
6 Therefore my people will know my name; therefore in that day they will know that it is I who speak; here I am." Yango wana, bato na Ngai bakoyeba Kombo na Ngai ; yango wana, na mokolo wana, bakoyeba ete Ngai moko nde nasakolaki yango. Solo, ezali nde Ngai. »
7 How beautiful on the mountains are the feet of the messenger who brings good news, who proclaims peace, who brings good news of good things, who proclaims salvation, who says to Zion, "Your Father reigns!" Tala ndenge ezali kitoko, na likolo ya bangomba, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu, ba-oyo batatolaka kimia, ba-oyo bamemaka basango ya boboto, ba-oyo basakolaka lobiko, ba-oyo balobaka na Siona : « Nzambe na yo azali Mokonzi ! »
8 Listen! Your watchmen lift up their voices; together they shout for joy, for with their own eyes they will see our Father returning to Zion. Yoka ! Bakengeli na yo batomboli mingongo ; bazali koganga elongo na esengo, pamba te, na miso na bango, bakomona Yawe kozonga lisusu na Siona.
9 Burst into song together, you ruins of Jerusalem, for our Father has comforted his people; he has redeemed Jerusalem. Bino mipiku ya mabanga ya Yelusalemi, boyemba elongo banzembo ya esengo, pamba te Yawe abondisi bato na Ye, asikoli Yelusalemi.
10 Our Father has bared his holy arm in the sight of all the nations, and all the ends of the earth will see the salvation of our Father. Yawe asemboli na pole loboko na Ye ya bule na miso ya bikolo nyonso ; mpe suka nyonso ya mokili ekomona Lobiko ya Nzambe na biso.
11 Leave! Leave! Go out from there; touch no unclean thing; go out from among them; purify yourselves, you who carry the vessels of our Father. Bokende, bokende, bobima awa ! Bosimba eloko moko te ya mbindo ! Bobima kati na yango mpe bozala peto, bino oyo bomemi bisalelo ya Tempelo ya Yawe !
12 For you will not go out in haste, nor will you flee; for our Father will go before you, and our Father will be your rear guard. Kasi na mbala oyo, bokobima na kowela te mpe bokokende te lokola bato bazali kokima, pamba te Yawe akotambola liboso na bino mpe Nzambe ya Isalaele akozala Mokengeli na bino na sima.
13 See, my servant will act wisely; he will be raised and lifted up and highly exalted. Tala, mosali na ngai akosala na bwanya, akotombolama, akomata likolo mpe akonetolama makasi penza.
14 Just as many were appalled at him—his appearance was so disfigured beyond that of any man, and his form beyond that of any human being, Ndenge bato mingi bazalaki na somo mpo na ye na ndenge abebaki, elongi na ye etikalaki lisusu te lokola elongi ya moto, mpe lolenge na ye etikalaki lisusu te lokola mwana ya moto nyonso,
15 so he will sprinkle many nations; kings will shut their mouths because of him. For what they were not told, they will see, and what they had not heard, they will understand. ndenge wana mpe bato ya bikolo bakokamwa, mpe bakonzi bakokanga minoko na bango na tina na ye, pamba te bakomona oyo nanu babetela bango lisolo te mpe bakososola oyo nanu bayoka te.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]