Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 53 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Who has believed our message? And to whom has the arm of our Father been revealed? Nani andimaki makambo oyo tosakolaki ? Mpe epai ya nani loboko na Yawe emonisamaki ?
2 For he grew up before him like a tender shoot, and like a root out of dry ground; he had no stately form or majesty to make us look at him, no beauty to attract us to him. Pamba te akolaki liboso na Ye lokola nzete ya moke, lokola mosisa oyo ebimi na esobe ; azalaki ata na kitoko to lokumu te oyo ekokaki kobenda miso na biso ete etala ye ; lolenge na ye ezalaki ata na eloko moko te oyo ekokaki kosala ete tosepela na ye.
3 He was despised and rejected by men, a man of sorrows and acquainted with grief; and like one from whom people hide their faces, he was despised, and we thought nothing of him. Bato batiolaki mpe basundolaki ye, ye moto na pasi, amesana konyokwama. Lokola moto oyo babwakeli soyi na elongi, atiolamaki, mpe tondimaki ye te.
4 Surely he has borne our griefs and carried our sorrows; yet we considered him stricken, struck down by our Father, and afflicted. Solo, amemaki mokumba ya bokono na biso mpe alataki pasi na biso kati na nzoto na ye ; kasi biso, tokanisaki ete Nzambe nde abetaki ye, apesaki ye etumbu mpe asambwisaki ye.
5 But he was pierced for our rebellion; he was crushed for our sins; the punishment that brought us peace was upon him, and by his wounds we are healed. Nzokande, bazokisaki ye bapota mpo na botomboki na biso, banyokolaki ye mpo na masumu na biso ; etumbu oyo ememelaki biso kimia ekweyaki na nzoto na ye ; mpe na nzela ya bapota na ye, biso tobikisami na bokono na biso.
6 We all, like sheep, have gone astray; we have turned, each one, to his own way; and our Father has laid on him the sin of us all. Biso nyonso, tozalaki koyengayenga lokola bana meme, moko na moko azalaki kolanda nzela na ye ; bongo Yawe akweyisaki masumu na biso nyonso na nzoto na ye.
7 He was oppressed, and he was afflicted, yet he did not open his mouth; like a lamb led to the slaughter, and like a sheep silent before its shearers, so he did not open his mouth. Banyokolaki ye mpe bamonisaki ye pasi, kasi atikalaki kofungola monoko na ye te lokola mpate oyo bazali komema na esika oyo babomelaka banyama, lokola meme liboso ya bato oyo bazali kolongola yango bapwale ; akangaki monoko na ye.
8 By oppression and judgment he was taken away; and who among his generation gave any thought to this—that he was cut off from the land of the living, struck down for the rebellion of my people? Babomaki ye na nzela ya minyoko mpe ya etumbu ; kasi nani kati na bato ya tango na ye akokaki komitungisa na tina na ye ? Pamba te balongolaki ye na mokili ya bato ya bomoi, babetaki ye likolo ya masumu ya bato na Ngai.
9 They assigned him a grave with the wicked, and with a rich man in his death, though he had done no violence, and no deceit was in his mouth. Bapesaki ye kunda kati na bato mabe, mpe kunda na ye ezalaki elongo na bazwi, atako asalaki likambo moko te ya mabe, mpe monoko na ye etikalaki koloba lokuta te.
10 Yet it was our Father's will to crush him and to make him suffer; when he makes his life an offering for guilt, he will see his offspring, he will live long, and the will of our Father will prosper through him. Nzokande, ezalaki mokano na Yawe ete anyokwama na nzela ya pasi. Atako Yawe akomisaki bomoi na ye mbeka mpo na masumu, akomona bakitani na ye mpe mikolo na ye ekobakisama ; bongo mokano na Yawe ekolongisama na loboko na ye.
11 After the anguish of his soul he will see the light and be satisfied; by his knowledge my righteous servant will make many righteous, and he will bear their sins. Sima na pasi ya molimo na ye, akomona pole ya bomoi mpe posa na ye ekokokisama. Na nzela ya boyebi na ye, Mosali na Ngai ya sembo akolongisa bato ebele mpe akomema masumu na bango.
12 Therefore I will give him a portion among the many, and he will divide the spoil with the strong, because he poured out his life to death and was numbered with the transgressors; yet he bore the sin of many, and he intercedes for the transgressors. Yango wana, nakopesa ye libula kati na bato minene, mpe akokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya makasi, pamba te akabaki bomoi na ye na kufa mpe amitikaki ete batanga ye na molongo ya babomi bato, pamba te amemaki masumu ya bato ebele mpe amikomisaki molobeli ya babuki mibeko.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]