Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 54 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Sing, barren woman who never bore a child; burst into song and shout for joy, you who were never in labor! For the children of the desolate woman will be more than the children of the married woman, says our Father. Oh mwasi ekomba, yemba nzembo na esengo, yo oyo obotaka te ! Yemba nzembo mpe ganga na esengo, yo mwasi oyo oyoki nanu pasi ya kobota te ! Pamba te bana ya mwasi oyo basundola bakozala ebele koleka bana ya mwasi ya libala, elobi Yawe.
2 Enlarge your tent, and let the curtains of your dwelling spread wide; do not hold back. Lengthen your cords and drive your stakes deep, Yeisa ndako na yo ya kapo monene, bakisa bakapo na ndako yango mpo ete eya monene ; kokanga motema te ! Benda na molayi basinga na yo mpe pika banzete na yo makasi !
3 for you will spread out to the right and to the left; your children will possess the nations and resettle the desolate cities. Pamba te okofungwama na ngambo ya loboko na yo ya mobali mpe na ngambo ya loboko na yo ya mwasi ; bakitani na yo bakokonza bikolo mosusu mpe bakosala ete bato bavanda lisusu na bingumba na bango oyo etikalaki lisusu na bato te.
4 Do not be afraid, for you will not be ashamed; do not be discouraged, for you will not be disgraced. You will forget the shame of your youth and remember no more the disgrace of your widowhood. Kobanga te, pamba te okoyoka lisusu soni te ! Kozala na mawa te, pamba te okotiolama lisusu te ! Okobosana soni ya bolenge na yo mpe okokanisa lisusu te pasi na yo ya kokufisa mobali ;
5 For your Maker is your husband—the Father of heaven's armies is his name; the Holy One of Israel is your Redeemer, our Father of the whole earth he is called. pamba te Mokeli na yo nde mobali na yo, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ; Mosantu ya Isalaele azali Mosikoli na yo ; babengaka Ye : Nzambe ya mokili mobimba.
6 For our Father has called you back like a wife forsaken and brokenhearted, like the wife of one's youth when she has been abandoned, says your Father. Pamba te Yawe abengi yo lisusu lokola mwasi oyo basundola, bongo azali na pasi na motema. Ndenge nini bakoki solo kosundola mwasi oyo babala na bolenge, elobi Nzambe na yo ?
7 For a brief moment I abandoned you, but with great compassion I will gather you back. Nasundolaki yo kaka mpo na tango moke ; kasi na bolingo nyonso, nakozongisa yo.
8 In a flood of anger I hid my face from you for a moment, but with everlasting love my heart goes out to you, says our Father, your Redeemer. Mpo ete nazalaki na kanda makasi, nabombelaki yo elongi na Ngai kaka mpo na tango moke ; kasi nakolakisa yo bolamu mpo na bolingo oyo ezangi suka, elobi Yawe, Mosikoli na yo.
9 To me this is like the days of Noah, when I swore that the waters of Noah would never again flood the earth; so now I have sworn not to be angry with you or rebuke you. Na miso na Ngai, ezali lokola na mikolo ya Noa, tango nalapaki ndayi ete mayi ya Noa ekozindisa lisusu mabele te. Boye, nalapi solo ndayi sik’oyo ete nakosilikela yo lisusu te mpe nakopamela yo lisusu te.
10 Though the mountains may depart and the hills be shaken, my loyal love will not depart from you, and my covenant of peace will not be shaken, says our Father, whose heart goes out to you in compassion. Ata bangomba milayi eningani, ata bangomba mikuse elongwe na bisika na yango, bolingo na Ngai epai na yo ekoningana te, mpe boyokani na Ngai ya kimia ekotikala kolongwa te, elobi Yawe oyo alingaka yo.
11 "Afflicted one, storm-tossed and without comfort, look: I will set your stones in antimony and lay your foundations with sapphires. Oh engumba ya mawa, engumba oyo mopepe makasi esili kobuka mpe ezangeli kobondisama, nakotonga yo lisusu na mabanga ya talo mpe nakosala miboko na yo na mabanga ya safiri,
12 I will make your towers of rubies, your gates of sparkling jewels, and all your walls of precious stones. nakotonga bamir ya lopango na yo na mabanga ya ribi, nakosala bikuke na yo na biloko ya ngelingeli, mpe bamir na yo nyonso, na mabanga ya talo.
13 All your children will be taught by our Father, and great will be the peace of your children. Yawe akoteya bana na yo nyonso, mpe kimia ya bana na yo ekozala monene.
14 In righteousness you will be established; you will be far from oppression, for you will have nothing to fear, and far from terror, for it will not come near you. Okolendisama kati na bosembo : minyoko ekozala mosika na yo, okobanga lisusu eloko moko te, mpe somo ekokende mosika na yo ; ekomeka kopusana lisusu pene na yo te.
15 If anyone stirs up strife against you, it is not from me; whoever attacks you will fall before you. Soki babundisi yo, ekowuta epai na Ngai te ; moto nyonso oyo akobundisa yo akokweya liboso na yo.
16 See, it is I who created the smith who fans the coals into flame and forges a weapon fit for its work; and it is I who created the destroyer to ravage." Tala, ezali Ngai nde nakelaki monyangwisi bibende na moto oyo apelisaka moto makasi na makala mpe asalaka ebundeli mpo ete esala mosala na yango. Ezali mpe kaka Ngai nde nakelaki mobebisi mpo ete asala mosala ya kobebisa.
17 No weapon forged against you will succeed, and you will refute every tongue raised against you in court. This is the inheritance of the servants of our Father, and their vindication is from me, declares our Father. Nzokande, ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kosala yo mabe ekolonga ; mpe monoko nyonso oyo ekotelemela yo na kosambisa, okokatela yango etumbu. Yango nde ekozala libula ya basali ya Yawe, mpe elonga na bango kowuta epai na Ngai, elobi Yawe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]