Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 55 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "Listen! All you who are thirsty, come to the water; you without money, come, buy food and eat! Come, buy wine and milk for no price—free of charge. « Bino nyonso oyo bozali na posa ya komela, boya, boya na esika oyo mayi ezali ; ezala bino oyo bozali na mbongo te, boya kosomba mpe kolia ; boya kosomba vino mpe miliki : ezali ya ofele, ya kosomba na mbongo te !
2 Why spend money on what is not bread, and your labor on what does not satisfy? Listen carefully to me, and eat what is good, and your soul will delight in the richest food. Mpo na nini bozali kobebisa mbongo mpo na bilei oyo etongaka nzoto te, mpe kobimisa motoki mpo na bilei oyo etondisaka te ? Boyoka, boyoka Ngai mpe bolia bilei ya kitoko, mpe bokosepela na biloko ya elengi.
3 Open your ears and come to me; listen, that your soul may live. I will make an everlasting covenant with you, my faithful love promised to David. Bopesa Ngai matoyi na bino mpe boya epai na Ngai, boyoka mpe bokozala na bomoi ; nakosala boyokani ya libela elongo na bino, boyokani oyo nalakaki Davidi, na boyengebene mpe na bolingo na Ngai.
4 See, I have appointed him a witness to the peoples, a leader and commander of the peoples. Tala, nakomisaki ye motatoli na Ngai na miso ya bato ya bikolo ebele, mokambi mpe motambolisi ya bato.
5 Surely you will summon a nation you do not know, and a nation that does not know you will run to you, because of your Father, the Holy One of Israel, for he has glorified you." Solo, okobenga bikolo oyo oyebi te, mpe bikolo oyo eyebi yo te ekoya na lombangu epai na yo mpo na Yawe, Nzambe na yo, mpo na Mosantu ya Isalaele, pamba te alatisi yo nkembo. »
6 Seek our Father while he may be found; call on him while he is near. Boluka Yawe wana akoki nanu komonana, bobelela Ye wana azali nanu pene.
7 Let the wicked abandon his way, and the unrighteous man his thoughts. Let him return to our Father, and our Father's heart will be moved with compassion for him; return to our Father, for he will freely pardon. Tika ete moto mabe atika banzela na ye, mpe tika ete mosumuki atika makanisi na ye ; tika ete azonga epai na Yawe mpo ete ayokela ye mawa, tika ete azonga epai ya Nzambe na biso, pamba te alimbisaka kaka.
8 "For my thoughts are not your thoughts, neither are your ways my ways,' declares our Father. « Makanisi na Ngai ezali makanisi na bino te, mpe banzela na Ngai ezali banzela na bino te, » elobi Yawe.
9 'For as the heavens are higher than the earth, so are my ways higher than your ways, and my thoughts than your thoughts. « Pamba te ndenge likolo eleki mosika na mabele, ndenge wana mpe banzela na Ngai ezali likolo koleka banzela na bino, mpe makanisi na Ngai ezali likolo koleka makanisi na bino.
10 "For as the rain and the snow come down from heaven and do not return there, but water the earth, making it produce and sprout, giving seed to the sower and bread for those who eat, Ndenge mvula mpe mvula ya pembe enokaka wuta na likolo mpe ezongaka te na likolo soki epolisi mabele te, soki ebotisi yango bambuma mpe bafololo te, soki epesi nkona te na moloni mpe bilei te na moto oyo aliaka,
11 so will my word be that goes out from my mouth: it will not return to me empty, but will accomplish what I desire and achieve the purpose for which I sent it. ndenge wana mpe liloba oyo ebimaka na monoko na Ngai ezalaka : ezongaka pamba te epai na Ngai, soki esali nanu te mokano na Ngai, mpe soki ekokisi nanu te mabongisi oyo natindelaki yango.
12 You will go out in joy and be led out in peace; the mountains and the hills will break into singing before you, and all the trees of the field will clap their hands. Bokobima na esengo, mpe bakotambolisa bino na kimia ; bangomba milayi mpe bangomba mikuse ekoyemba nzembo ya elonga liboso na bino, mpe banzete nyonso ya zamba ekobeta maboko.
13 Instead of the thornbush the cypress will grow, and instead of the brier the myrtle will grow. This will be for the renown of our Father, an everlasting sign that will not be cut off.'" Nzete ya sipele ekobota na esika ya banzube, nzete ya mirite ekobota na esika ya basende ; ekozala, mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, elembo ya libela na libela, oyo ekotikala kobebisama te. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]