Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 56 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 This is what our Father says: Keep justice and do what is right, for my salvation is coming soon, and my righteousness is about to be revealed. Tala liloba oyo Yawe alobi : « Botambola na alima mpe bosala kolanda bosembo, pamba te lobiko na Ngai ekomi pene mpe bosembo na Ngai ekomi pene ya komonisama.
2 Blessed is the one who does this, the person who holds firmly to it: who keeps the Sabbath without profaning it, and keeps from doing any evil. Esengo na moto oyo asalaka bongo, oyo akangamaka na yango, oyo abatelaka mokolo ya Saba mpe abebisaka te bosantu na yango, mpe oyo abatelaka loboko na ye ete esala mabe te ! »
3 Let not the foreigner who has joined himself to our Father say, "Our Father will surely separate me from his people"; and let not the eunuch say, "I am only a dry tree." Tika ete mopaya oyo akangami na Yawe aloba te : « Yawe akokabola ngai solo na bato na Ye ! » Mpe tika ete soda oyo baboma mokongo aloba te : « Nazali na ngai kaka nzete ya kokawuka ! »
4 For this is what our Father says: "To the eunuchs who keep my Sabbaths, who choose what pleases me and hold fast to my covenant, Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Mpo na basoda oyo baboma bango mikongo, oyo babatelaka mokolo na Ngai ya Saba, oyo baponaka makambo oyo esepelisaka Ngai, mpe bakangamaka na boyokani na Ngai :
5 to them I will give within my house and within my walls a memorial and a name better than sons and daughters; I will give them an everlasting name that will not be cut off. nakopesa bango, kati na Tempelo na Ngai mpe na bamir na yango, ekaniseli oyo ezali na kombo : ekozala malamu koleka kozala na bana mibali mpe bana basi. Nakopesa bango kombo ya libela, oyo bakoki kolongola te.
6 And the foreigners who join themselves to our Father, to minister to him, to love the name of our Father, and to be his servants—everyone who keeps the Sabbath without profaning it and holds fast to my covenant, Bapaya oyo bakangami na Yawe mpo na kosalela Ye, mpo na kolinga Kombo na Ye mpe kogumbamela Ye, bato nyonso oyo bakobatela mokolo ya Saba mpe bakobebisa te bosantu na yango, mpe bato oyo bakokangama na boyokani na Ngai ;
7 these I will lead up to my holy mountain, and give them joy in my house of prayer; their sacrifices and burnt offerings will be welcome on my altar, since my house will be named a house of prayer for all peoples. nakomema bango na ngomba na Ngai ya bule mpe nakopesa bango esengo kati na Ndako epai wapi basambelaka Ngai. Bambeka na bango ya kotumba mpe makabo na bango ekondimama na etumbelo na Ngai, pamba te Ndako na Ngai ekobengama Ndako ya losambo mpo na bikolo nyonso. »
8 This is the declaration of the Sovereign Father, who gathers the outcasts of Israel: I will gather still others to them, besides those already gathered." Nkolo Yawe oyo asangisi bawumbu ya Isalaele alobi : « Nakosangisa lisusu bato mosusu elongo na bango, esika moko na bato oyo nasilaki kosangisa. »
9 All you beasts of the field, come to devour—all you beasts in the forest. Bino banyama nyonso ya esobe, boya ; bino banyama nyonso ya zamba, boya kolia !
10 Israel's watchmen are blind, all of them; they know nothing. They are all silent dogs that cannot bark, dreaming, lying down, loving to sleep. Bakengeli ya Isalaele bazali bakufi miso, bango nyonso bazangi mayele ; bango nyonso bazali lokola bambwa oyo egangaka te, bakokaka koganga te, mosala na bango kolala mpe kolota bandoto, balingi pongi makasi.
11 The dogs have a fierce appetite; they never have enough. They are shepherds with no understanding; they have all turned to their own way, each to his own gain, every one of them. Bazali lokola bambwa ya lokoso, batondaka te. Bazali babateli oyo bazangi bososoli, moko na moko kati na bango alandaka kaka nzela na ye moko mpe alukaka kaka bolamu na ye moko.
12 "Come," they say, "let me fetch wine; let us drink our fill of strong drink. And tomorrow will be like today, great beyond all measure." Moko na moko alobaka : « Yaka ! Tika ete nakamata vino mpo ete tomela mpe tolangwa na biso masanga ! Lobi mpe ekozala kaka ndenge moko na lelo, masanga ya komela ezali nanu ebele ! »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]