Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 57 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The righteous one perishes, and no one takes it to heart; faithful men are taken away, and no one understands that the righteous are spared from the evil to come. Moto ya sembo azali kokufa, kasi ezali kosala ata moto moko te motema pasi ; bato ya malamu bazali kosila, mpe ata moto moko te azali kososola ete bato ya sembo bazali kolongolama mpo ete bazala mosika na mabe.
2 He enters into peace; they rest on their beds—everyone who walks in integrity. Bato oyo batambolaka na bosembo bakokota na kimia, bakozwa bopemi na bambeto na bango.
3 But you—come here, you children of a sorceress, you offspring of an adulterer and a prostitute! « Kasi bino, boya awa, bino bana ya mwasi ya soloka, bino bana oyo bobotami na nzela ya ekobo mpe ya kindumba.
4 Who are you mocking? Against whom do you open wide your mouth and stick out your tongue? Are you not children of rebellion, offspring of falsehood, Bozali koseka nani ? Bozali kofungolela nani monoko ? Bozali kotiela nani penza monoko ? Boni, bozali bana ya batomboki te, bozali libota ya lokuta te ?
5 you who burn with lust among the oaks, under every green tree, who slaughter your children in the valleys, under the clefts of the rocks? Bozali kopela na posa mabe na se ya banzete minene oyo babengaka terebente, na se ya banzete nyonso ya mibesu ; bozali kobonza bana na bino ya mibali lokola bambeka kati na lubwaku mpe kati na mabulu ya mabanga.
6 Among the smooth stones of the valley is your portion; yes, they are your lot. To them you have poured out a drink offering, you have brought a grain offering. Should I be satisfied with all this? Libula na yo ezali nde banzambe ya bikeko kati na mabanga ya lubwaku, oyo babongisa ; solo, yango nde ezali libula na yo. Solo penza, ezali epai na yango nde ozali kosopa makabo ya masanga ya vino mpe kobonza makabo ya bambuma. Boni, nasepela solo na makambo ya boye ?
7 On a high and lofty mountain you have set your bed; there too you went up to offer sacrifice. Otiaki mbeto na yo na likolo, na songe ya ngomba ; kuna nde ozalaki komata mpo na kobonza mbeka.
8 Behind the door and the doorpost you have set up your symbol. Deserting me, you uncovered your bed; you went up to it and made it wide. You made a covenant with them; you loved their bed, you gazed on their nakedness. Otiaki nzambe na yo ya ekeko na sima ya ekuke na yo mpe ya mabaya oyo esimbaka ekuke yango. Osundoli ngai, olongoli bilamba na yo, omati likolo ya mbeto na yo ; osali boyokani elongo na bato oyo olingaka kosangisa na bango nzoto mpe oluki komona bolumbu na bango.
9 You journeyed to the king with oil and heaped up your perfumes; you sent your envoys far away, and sent them down even to the realm of the dead. Okendeki epai ya Moloki na mafuta ya olive mpe obakisaki lisusu malasi na yo. Otindaki bantoma na yo mosika, omikitisaki na se penza kino na mboka ya bakufi.
10 You were wearied by the length of your way, yet you did not say, "It is hopeless." You found renewed strength, and so you did not grow faint. Nzela na yo nyonso elembisaki yo nzoto, kasi omilobelaki te : ‹ Ezali na tina te ! › Loboko na yo ezwaki lisusu makasi ya sika, yango wana olembaki te.
11 Whom did you so dread and fear that you lied, and did not remember me, and gave it no thought? Have I not been silent for so long that you no longer fear me? Ozalaki na somo ya nani to ozalaki kobanga nani mpo ete okosa Ngai to obosana Ngai, to mpe obimisa Ngai na motema na yo ? Boni, ezali te mpo ete navandaki kimia tango molayi nde ozali kobanga Ngai te ?
12 I will expose your righteousness and your deeds, but they will not profit you. Nakobimisa bosembo mpe misala na yo na pwasa, mpe ekozala na litomba ata moko te mpo na yo.
13 When you cry out, let your collection of idols deliver you! The wind will carry them all off, a breath will take them away. But whoever takes refuge in me will possess the land and inherit my holy mountain. Tika ete mopiku ya banzambe na yo ya bikeko ebikisa yo tango okoluka lisungi ! Mopepe makasi ekomema yango nyonso, mopepe moko ekopikola yango. Kasi moto oyo akomisaka Ngai ebombamelo na ye akozwa lokola libula mokili mpe ngomba na Ngai ya bule. »
14 And it will be said: "Build up, build up, prepare the way! Remove every obstacle from my people's path." Bakoloba : « Botondisa mabele, botondisa mabele, bobongisa nzela, bolongola mabaku na nzela ya bato na Ngai ! »
15 For this is what the high and exalted One says—our Father, who lives forever, whose name is Holy: "I dwell in the high and holy place, and also with the one who is contrite and lowly in spirit, to revive the spirit of the lowly and to revive the heart of the contrite. Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.
16 For I will not keep fighting forever, nor will I always be angry; for then the spirit would grow faint before me—the very breath of life that I made. Nakosambisa mpo na libela te mpe nakozala na kanda tango nyonso te, noki te molimo ya moto nyonso oyo nasala ekokufa na miso na Ngai.
17 Because of his sinful greed I was angry; I struck him, I hid my face, and I was angry—yet he kept turning away, following the path of his own heart. Natombokaki likolo ya posa na ye ya kozwa bomengo na nzela ya moyibi ; napesaki ye etumbu, nabombaki elongi na Ngai na kanda, kasi apengwaki kaka mpo na kolanda posa mabe ya motema na ye.
18 I have seen his ways, but I will heal him; I will lead him and restore comfort to him and to those who mourn for him, Namonaki banzela na ye, kasi nakobikisa ye ; nakotambolisa ye mpe nakobondisa ye.
19 bringing praise to their lips. Peace, peace to the far and to the near," says our Father, "and I will heal them." Nakotia masanzoli na bibebu ya bato oyo bazali kolela na Isalaele. Kimia, kimia ezala epai na ye oyo azali mosika, mpe epai na ye oyo azali pene, » elobi Yawe. « Mpe nakobikisa bango. »
20 But the wicked are like the tossing sea, which cannot be still, whose waters churn up mire and mud. Kasi bato mabe bazali lokola ebale oyo etomboki, oyo evandaka kimia te : mayi na yango ebwakaka potopoto mpe bosoto libanda.
21 "There is no peace," says our Father, "for the wicked." Nzambe na ngai alobi : « Kimia ezali te mpo na bato mabe. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]