Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 58 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "Shout aloud, do not hold back; raise your voice like a trumpet. Declare to my people their rebellion, to the house of Jacob their sins. « Ganga na mongongo makasi, kotika te ! Matisa mongongo na yo lokola kelelo, yebisa bato na Ngai botomboki na bango, mpe lakisa libota ya Jakobi masumu na ye.
2 "Yet day after day they seek me and delight to know my ways, like a nation that does what is right and has not forsaken the justice of their Father. They ask me for righteous judgments; they delight to draw near to our Father. Pamba te mokolo na mokolo, balukaka Ngai, basalaka lokola bato bazali na esengo ya koyeba nzela na Ngai, lokola ekolo oyo esalaka makambo ya sembo mpe esundolaka te mibeko ya Nzambe na bango ; basengaka Ngai mikano ya sembo, mpe basalaka lokola bato bazali na esengo ya kozala pene ya Nzambe ;
3 Why have we fasted, and you have not seen it? Why have we humbled ourselves, and you take no notice?' Look—on the day of your fast you pursue your own desire, and you drive all your workers hard. balobaka : ‹ Mpo na nini tokila bilei, soki ozali komona na Yo yango te ? Mpo na nini tomikitisa, soki ozali koyeba na yo yango te ? › Nzokande, na mokolo na bino ya kokila bilei, bozali kosala makambo oyo bolingi mpe bozali konyokola basali na bino nyonso.
4 "Look—you fast only to quarrel and to fight and to strike with a wicked fist. You cannot fast as you do today and expect your voice to be heard in heaven. Kokila bilei na bino ezali kosuka na koswana mpe na bitumba, bozali kobetana makofi na kanda nyonso ; bozali kokila bilei te ndenge esengeli kozala na mokolo oyo bozali kozela ete mongongo na bino eyokana na likolo.
5 Is this the kind of fast I choose, a day for a person to humble himself? Is it only to bow the head like a reed, and to spread coarse cloth and ashes beneath him? Is this what you call a fast, a day pleasing to your Father? Boni, ezali penza kokila bilei oyo Ngai nalingaka, mokolo oyo moto amikitisaka penza ye moko ? Boni, ezali kaka kogumba moto lokola nzete oyo ebotaka na mayi, kolata bilamba ya saki mpe kolala na putulu ? Ezali yango nde bino bozali kobenga kokila bilei, mokolo oyo Yawe alingaka ?
6 "Is not this the fast I choose: to loosen the chains of wickedness, to untie the cords of the yoke, to set the oppressed free, and to break every yoke? Tala lolenge ya kokila bilei oyo Ngai nalingaka : kokata minyololo ya masumu, kofungola basinga ya ekangiseli, kopesa bonsomi na mowumbu mpe kobuka ekangiseli nyonso.
7 Is it not to share your bread with the hungry, and to bring the homeless poor into your house; when you see the naked, to clothe him, and not to hide yourself from your own flesh and blood? Boni, ezali te kokabola bilei na yo na moto oyo azali na nzala ? Ezali te koyamba kati na ndako na yo, mobola oyo azali koyengayenga ? Ezali te kolatisa moto oyo azali bolumbu mpe koboya kopesa mokongo na ndeko na yo ?
8 "Then your light will break forth like the dawn, and your healing will spring up quickly; your righteousness will go before you, and my glory will be your rear guard." Bongo, pole na yo ekongenga lokola moyi ya tongo, mpe nzoto na yo ekokoma kolongono na lombangu ; bosembo na yo ekotambola liboso na yo mpe nkembo na Yawe ekokengela yo na sima.
9 Then you will call, and I will answer; you will cry for help, and I will say, 'Here I am.' If you remove the yoke from among you, the pointing finger and malicious talk, Boye, tango okobelela Yawe, akoyanola yo ; tango okosenga lisungi, akoloba : ‹ Ngai oyo. › Soki kati na yo, olongoli ekangiseli, otiki kolakisa bato mosapi mpe otiki maloba mabe ;
10 "if you pour yourself out for the hungry and satisfy the desire of the afflicted, then your light will rise in the darkness, and your night will become like noonday. soki opesi bilei na yo epai na ye oyo azali na nzala mpe okokisi posa ya moto oyo bazali konyokola, pole na yo ekongenga kati na molili, mpe molili na yo ekokoma lokola moyi ya ngonga midi.
11 I will guide you continually, and satisfy you in scorched places; I will strengthen your bones. You will be like a watered garden, like a spring of water whose waters never fail. Yawe akotambolisa yo tango nyonso, akokokisa baposa na yo kati na mokili ekawuka mpe akokembisa mikuwa na yo. Okozala lokola elanga oyo basopeli mayi, lokola liziba oyo mayi na yango ekawukaka te.
12 Your people will rebuild the ancient ruins; you will raise up the age-old foundations. You will be called Repairer of the Breach, Restorer of Streets to Live In. Mpo na yo, bakotonga lisusu bandako oyo ebukana-bukana na kala, bakomatisa lisusu miboko oyo ebukana wuta kala ; bakobenga yo : ‹ Mobongisi ya bamir oyo ebukana mpe ya banzela oyo bato balekaka. ›
13 "If you keep your foot from breaking the Sabbath, from pursuing your own desire on my holy day; if you call the Sabbath a delight and honor my holy day; if you honor it by not going your own way, not pursuing your own desire or speaking idle words, Soki obateli matambe na yo ete ebebisa te lokumu ya mokolo ya Saba, mpe ete osala te mosala oyo yo olingi na mokolo na Ngai ya bule ; soki mokolo ya Saba ekomi esengo na yo mpe opesi lokumu na mokolo ya bule ya Yawe ; soki opesi yango lokumu na koboya kolanda nzela na yo moko, kosala misala na yo moko mpe kokoba na makambo oyo ezanga tina,
14 then you will find your delight in me, and I will make you ride on the heights of the land and feed you with the heritage of your father Jacob—for the mouth of your Father has spoken." wana okozwa esengo na yo kati na Yawe mpe nakomema yo na bisika ya likolo ya mokili, nakoleisa yo wuta na libula ya Jakobi, tata na yo, » elobi Yawe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]